Moto nyonso alingaka kozala na bonsomi
“Moto abotamá na bonsomi, kasi na bisika nyonso azali na minyolɔlɔ,” Jean-Jacques Rousseau, moto ya filozofi na ekólo France akomaki maloba yango na mobu 1762. Kobotama na bonsomi ezali mpenza likambo ya malamu! Kasi, lokola Rousseau alobaki yango, banda mokili ebanda tii lelo, bato ebele mpenza bazwá bonsomi te. Na bomoi na bango mobimba, bakangamaki “na minyɔlɔlɔ” na bolɔkɔ ya ebongiseli oyo epekisaki bango kozala na bolamu mpe na esengo ya solosolo.
LELO oyo, bato ebele mpenza bazali naino komona ete “moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Mpo na kozwa bokonzi, bato oyo balukaka lokumu bazali koyoka mawa te na kozangisa basusu bonsomi na bango. Lisolo moko oyo elobeli likambo yango eyebisi ete, “etuluku moko ya bato mabe babéngi ‘Les escadrons de la mort’ babomi bato 21.” Lisolo mosusu esaleli liloba “kosasa” mpo na kolobela ndenge oyo basoda ‘bazali koboma basi, bana mpe mibange oyo bakoki ata komibatela te, bazali kokata bango nkingo, kokanga basivili mpe kobɛta bango masasi na motó, kobebisa bamboka mpe bazali kopona te esika oyo bakoki kobwaka bɔmbi.’
Tokoki kokamwa te na komona ete bato bazali na mposa makasi mpe bazali ata kobunda mpo bálongwa na monyoko mpe bázwa bonsomi. Kasi na mawa nyonso, tozali komona ete ntango bato bazali kobunda mpo na koluka bonsomi, mbala mingi bazali mpe kobuka ntomo mpe bonsomi ya bato mosusu. Ntango bato bazali koluka bonsomi, mibali, basi, na bana oyo basali eloko te bazali kokufa mpe bato yango bazali koloba ete soki bakufi, bakufi mpo na bolamu mpe bosembo. Na ndakisa, na mbula eleki, na ekólo Irlande, “bato oyo bazali kobunda mpo na bonsomi” batikaki vuatire oyo ezalaki na bɔmbi na mwa mboka babéngi Omagh. Ntango bɔmbi epanzanaki, ebomaki bato 29 na esika yango mpe bankama mingi ya bato mosusu bazokaki.
Bazali kaka “na minyɔlɔlɔ”
Na ntango etumba esili, eloko nini bazwaka? Ntango “bato oyo babundaka mpo na bonsomi” balongi bitumba, mwa bonsomi ekoki kozwama. Kasi, bato bazwaka mpenza na bonsomi ya solosolo? Ata na mikili ya bonsomi, epai balobi ete bato basikwami mpenza, bato bazali kaka na “minyɔlɔlɔ” ya makambo ya mpasi lokola bobola, bomoto ya masumu, maladi, mpe liwa. Ndenge nini moto akoki koloba ete azali mpenza na bonsomi soki makambo wana ezali naino kokanga ye na boombo?
Mose, moto moko ya kala oyo mpe akomaki Biblia, alobaki malamu ndenge oyo bomoi ya bato mingi ezalaki kala mpe ezali se bongo tii lelo oyo. Alobaki ete tokoki koumela mbula 70 to 80, “bakangami se na bwale na makambo ya mpasi.” (Nzembo 90:10, NW) Likambo yango ekosila mokolo mosusu? Mokolo mosusu biso nyonso tokozala na bomoi malamu, bomoi ezangi mpasi mpe bwale oyo ezali konyokola ebele ya bato lelo oyo?
Biblia elobi ete ɛɛ! Elobeli “lisiko ya nkembo ya bana ya Nzambe.” (Baloma 8:21) Tótalela naino bonsomi yango malamumalamu, bonsomi oyo ntoma Paulo alobelaki na mokanda oyo atindelaki baklisto ya Loma na ekeke ya liboso. Na mokanda yango, Paulo alimboli polele ndenge oyo mokomoko na biso akoki kozwa “bonsomi ya nkembo,” bonsomi ya solosolo mpe ya libela.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Euti na buku Beacon Lights of History, Vol. XIII