Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/8 lok. 10
  • Tosengeli kolimbola Biblia na kolanda makanisi ya nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosengeli kolimbola Biblia na kolanda makanisi ya nani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • Eklezia ya ebandeli eteyaki ete Nzambe azali bosato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Biblia ezali mpenza koteya Trinité?
    Osengeli kondima Trinité?
  • Liteya ya Trinité ezali na Biblia?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Trinité elimbolami ndenge nini?
    Osengeli kondima Trinité?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/8 lok. 10

Tosengeli kolimbola Biblia na kolanda makanisi ya nani?

DIKSIONERE moko (Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary) elimboli liloba “kolimbola” lokola “kososola na kolanda bindimeli, makanisi, to ezalela ya moto.” Na bongo, ndenge oyo moto alimbolaka likambo elandaka mingimingi makambo oyo akutaná na yango, makambo oyo ayekolá, mpe makambo oyo akolá na yango.

Kasi, tokoki koloba nini na likambo etali kolimbola Biblia? Tokoki kolimbola bavɛrsɛ ya Biblia na kolanda “bindimeli, makanisi, to ezalela” na biso? Ya solo, balimboli mpe babongoli mingi ya Biblia balobaka ete basalaka bongo te, kasi Nzambe nde atambwisaka bango.

Tozali na ndakisa moko na maloba na nse ya lokasa na Yoane 1:1 na Biblia moko (A New Version of the Four Gospels), oyo John Lingard abimisaki na 1836. Abombaki nkombo na ye mpe ekomamaki ete ebongolami na “Mokatolike moko.” Elobi boye: “Bato ya mangomba nyonso basalelaka Biblia Mosantu mpo na kondimisa makanisi na bango: mpamba te, ezali Biblia te nde eteyaka bango, kasi balimbolaka Biblia na ndenge na bango moko.”

Atako mokomi yango alobaki malamu, kasi likanisi na ye ezalaki nini? Maloba na ye ezalaki kondimisa ndenge oyo ye alimbolaki vɛrsɛ yango; abongolaki yango boye: “Na ebandeli ‘liloba’ ezalaki, mpe ‘liloba’ ezalaki elongo na Nzambe, mpe ‘liloba’ ezalaki Nzambe.” Ndenge mpenza bato oyo bateyaka Bosato babongolaka yango.

Nini epusaki mokomi yango abongola Yoane 1:1 na ndenge oyo ezali kolongisa Bosato? ‘Biblia nde eteyaki’ ye asala bongo? Ekoki kozala bongo te mpamba te Biblia eteyi Bosato ata na esika moko te. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye mpo na liteya yango: “Ata na esika moko te Kondimana ya Sika elobeli liloba to liteya ya Bosato.” Lisusu, profesere Washburn Hopkins, molakisi na iniversite Yale alobaki boye: “Namoni ete Yesu na Paulo bayebaki liteya ya bosato te; . . . balobeli yango ata moke te.”

Sikoyo, tokoloba nini mpo na baoyo basalelaka Yoane 1:1 to vɛrsɛ mosusu nyonso ya Biblia mpo na koteya Bosato? Na kolanda kaka maloba ya Mr. Lingard, ezali “Biblia te nde eteyaka bango, kasi balimbolaka Biblia na ndenge na bango moko.”

Tozali na esengo ete tozali na Liloba ya Nzambe mpo na kolakisa biso nzela na likambo yango. Ntoma Petelo alobaki, “Bóyeba liboso na nyonso ete moko te na bisakweli na Makomi ebimaki na makanisi na bato mpenza. Mpo esakweli moko te ebimaki na mokano na moto, kasi bato bauti na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusama na elimo santu.”—2 Petelo 1:20, 21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto