Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/10 nk. 5-8
  • ‘Likambo na likambo ezali na ntango na yango’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Likambo na likambo ezali na ntango na yango’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Ntango ya kolela mpe ntango ya kosɛka”
  • Atako bazali kolela, bazali mpenza na esengo!
  • “Ntango ya koyamba mpe ntango ya koboya koyamba”
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Libala ezali likabo ya Nzambe ya bolingo
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Kobala mpe kobota na ntango oyo ya nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Biblia elobi nini mpo na libala?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/10 nk. 5-8

‘Likambo na likambo ezali na ntango na yango’

“Ntango ezali mpo na eloko na eloko mpe [ntango] mpo na likambo na likambo na nse na moi.” —MOSAKOLI 3:1.

1. Bato ya masumu bazalaka na mokakatano nini, mpe na bantango mosusu yango ebimisaki makambo nini?

MBALA mingi bato balobaka ete: “Esengelaki nasala yango noki.” To, wana mbala mosusu ntango esili koleka balobaka ete: “Ebongaki nazela.” Maloba wana ezali komonisa ete bato ya masumu bazali na mokakatano mpo na kopona ntango oyo ebongi mpo na kosala makambo mosusu. Mokakatano yango ebebisá boninga ya bato. Eyokisá bato mawa mpe nkanda. Mpe, likambo ya mabe koleka, elɛmbisá kondima ya bato mosusu epai ya Yehova na ebongiseli na ye.

2, 3.(a)Mpo na nini eleki malamu tóndimaka ndenge oyo Yehova aponaka ntango? (b) Makanisi nini ya malamu tosengeli kozala na yango mpo na kokokisama ya bisakweli ya Biblia?

2 Lokola Yehova azali na mayele mpe bososoli oyo bato bazali na yango te, soki alingi yango, akoki koyeba makambo oyo ekoya mpe ndenge likambo mokomoko ekosuka. Akoki koyeba “makambo na nsuka longwa na ebandeli.” (Yisaya 46:10) Yango wana, akoki komikosa te soki aponi ntango oyo ebongi mpenza mpo na kosala likambo nyonso oyo alingi. Na yango, na esika tótyela mayele na biso moko motema mpo na koyeba ntango, ebongi mpenza tóndima ndenge oyo Yehova aponaka ntango!

3 Na ndakisa, baklisto oyo bateli na elimo bazelaka na bosembo nyonso ntango oyo Yehova aponi mpo na kokokisa bisakweli mosusu oyo ezali na Biblia. Bamipesi na mosala, mpe babosanaka te maloba ya Bileli 3:26 (NW): “Ezali malamu kozela, ɛɛ na kimya, lobiko oyo ekouta epai ya Yehova.” (Talá Habakuku 3:16.) Lisusu, bandimaka mpenza ete Yehova akopesa etumbu ndenge alakaki, “ata ezali koumela, . . . ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.”​—Habakuku 2:3.

4. Ndenge nini Amosa 3:7 na Matai 24:45 esengeli kosalisa biso tózela Yehova na motema mpiɔ?

4 Nzokande, soki tozali na mokakatano mpo na kokanga ntina ya mikapo mosusu ya Biblia to makambo mosusu oyo elimbolami na mikanda ya la Sociéte Watch Tower, ezali na ntina te tókóma motema mɔ́tɔmɔ́tɔ. Ebongi tózela ntango oyo Yehova aponi mpo na komonisa makambo polele. “Nkolo [Mokonzi Yehova, NW] akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.” (Amosa 3:7) Elaka yango ezali malamu mpenza! Kasi tosengeli koyeba ete Yehova ayebisaka makambo na ye na ntango oyo ye amoni ete ebongi. Yango wana, Nzambe atindi “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesaka basaleli na ye “bilei [ya elimo] na elaka na yango.” (Biso nde totɛngisi makomi; Matai 24:45) Na bongo, ntina ya komitungisa ezali te, to tókóma mitema mɔ́tɔmɔ́tɔ te, mpo makambo mosusu elimbolami na mozindo te. Kasi, tokoki kozala na elikya ete soki tozali kozela Yehova na motema mpiɔ, na nzela ya moombo ya sembo, akopesa biso nyonso oyo tozali na yango mposa “na elaka na yango.”

5. Soki toyekoli Mosakoli 3:1-8, tokozwa bolamu nini?

5 Salomo, mokonzi ya mayele mingi, atángaki makambo 28 oyo mokomoko na yango ezali na “ntango” na yango. (Mosakoli 3:1-⁠8) Soki tososoli ndimbola ya maloba ya Salomo, ekosalisa biso tóyeba ntango nini ebongi mpe oyo ebongi te na miso ya Nzambe mpo na kosala makambo mosusu. (Baebele 5:14) Yango ekosalisa biso tótambwisa bomoi na biso ndenge yango.

“Ntango ya kolela mpe ntango ya kosɛka”

6, 7. (a) Makambo nini ezali kotinda bato oyo bamibanzabanzaka ‘bálela’? (b) Mokili ezali kosala nini mpo bato bábosana ete bazali na mikolo mabe?

6 Atako ezali na “ntango ya kolela mpe ntango ya kosɛka,” moto nyonso alingaka ntango ya kosɛka, boye te? (Mosakoli 3:4) Kasi, ezali mawa na komona ete mokili oyo etondi na makambo oyo ezali kolelisa biso. Radio, televizyo na bazulunalo etondi na bansango ya mabe. Epesaka biso nsɔmɔ ntango tozali koyoka ete bilenge babomi baninga na bango na kelasi, to baboti bazali konyokola bana na bango, to bato ya mobulu babomi to mpe bakati bato oyo basali eloko te binama ya nzoto, to makama esalemi na bisika mosusu mpe ebomi bato mpe ebebisi bandako. Na televizyo tozali komona bililingi oyo ezali kopesa biso mawa: epai moko bana bakondá na nzala, epai mosusu bato bazali kokima bamboka na bango mpo na bitumba. Lelo oyo, maloba mosusu oyo toyebaki te lokola kosilisa bato nyonso ya ekólo moko (épuration ethnique), sida, bitumba oyo bazali kobénga guerre bactériologique, mpe makama mosusu, ezali kobangisa ntango tozali koyoka yango, mokomoko na ndenge na yango.

7 Tokoki kotya ntembe te ete mokili etondi na makama mpe na makambo oyo ezali kopesa motema mpasi. Nzokande, mpo na komonisa lokola nde makambo yango ezali mpenza minene te, bato ya masano, televisyo, bakomi ya bazulunalo, bazali ntango nyonso kobimisela biso makambo ya mpambampamba, makambo ezangi ntina mpe mbala mingi makambo ya nsɔni mpe ya mobulu, mpo na kokosa makanisi na biso mpo tótyela mpasi ya bato mosusu likebi te. Kasi elimo ya kozala mafumafu mpe kolinga biloko kosɛka oyo yango ezali kopesa bato, ezali kopesa esengo ya solosolo te. Esengo oyo ezali mbuma ya elimo ya Nzambe ekoki kouta na mokili ya Satana te.​—Bagalatia 5:22, 23; Baefese 5:3, 4.

8. Lelo oyo, baklisto basengeli nde kolela to kosɛka? Limbolá.

8 Lokola toyebi ete mokili ebebi mingi, tokoki kokanga ntina ete oyo ezali ntango ya komipesa na kosɛka te. Ezali ntango ya komipesa na kominanola te to kotika ete “kosɛka” ezwa esika ya liboso bongo makambo ya elimo eya na nsima. (Talá Mosakoli 7:2-⁠4.) Ntoma Paulo alobaki ete “bango bakosalisa mokili mosala” basengeli kozala “[lokola] bango bazali kosalisa mokili mosala te.” Mpo na nini? “Mpo ete motindo na mokili oyo ezali kolimwa.” (1 Bakolinti 7:31) Na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, baklisto ya solo babosanaka te ete oyo ezali mikolo ya kozwa makambo na lisɛki te.​—Bafilipi 4:8.

Atako bazali kolela, bazali mpenza na esengo!

9. Makambo mabe nini ezalaki kosalema liboso ya Mpela, mpe yango ekoki koteya biso nini lelo oyo?

9 Bato oyo bazalaki na ntango Mpela eyaki na mokili bayebaki te ete wana ezalaki ntango ya kozala na bomoi ya lipwalipwa te. Bamipesaki na misala na bango ya mokolo na mokolo mpe balelaki te atako “masumu na bato izalaki mingi na mokili,” mpe atako “mokili etondaki na yauli” etalaki bango te. (Genese 6:5, 11) Yesu alobelaki makambo ya mawa oyo elekaki na ntango wana, mpe asakolaki ete na mikolo na biso bato bakozala mpe ndenge wana. Alobaki boye: “Mpo ete na mikolo yango liboso na mpela monene, bazalaki kolya mpe komela, kobala mpe kobalisa, kino mokolo eingelaki Noa na [masuwa]; bayebaki likambo te kino eyaki mpela mpe elongolaki bango nyonso. Koya na Mwana na moto ekozala mpe bongo.”​—Matai 24:38, 39.

10. Ndenge nini Bayisalaele na mikolo ya Hagai bamonisaki ete bazalaki kotyela ntango oyo Yehova aponaki likebi te?

10 Na mikolo ya Hagai, mbula soki 1 850 nsima ya Mpela, Bayisalaele mingi bazalaki kotyela makambo ya elimo likebi oyo esengeli te. Bamipesaki na koluka bolamu na bango moko, basosolaki te ete ntango wana ezalaki libosoliboso ntango ya kosalela Yehova. Biblia elobi boye: “Libota oyo balobi ete, Naino ntango ekómi te mpo na kotonga ndako na [Yehova]. Bongo liloba na [Yehova] eyaki na nzela na mosakoli Hagai ete, Ezali na ntango mpo na bino mpenza kofanda na ndako na kitoko na bino naino ndako oyo elali mpamba? [Sikoyo, Yehova] na bibele alobi boye ete, Bóbanza na mitema na bino mpo na nzela na bino.”​—Hagai 1:1-⁠5.

11. Mituna nini ebongi mpenza tómituna?

11 Lelo oyo, lokola tozali Batatoli na ye, Yehova apesi biso bolamu mpe mikumba ndenge apesaki Bayisalaele na ntango ya Hagai, ebongi mpe tótalela bomoi na biso malamumalamu. Tozali “kolela” mpo na makambo oyo ezali koleka na mokili mpe ndenge oyo makambo yango ezali kofingisa nkombo ya Nzambe? Tozali koyoka mpasi na motema ntango bato bazali koboya kondima ete Nzambe azali to bazali kobuka mibeko na ye na nko? Tomiyokaka lokola bato oyo batyamaki elembo, bato oyo Ezekiele amonaki na emonaneli eleki sikoyo mbula 2 500? Mpo na bato yango, Biblia elobi boye: “[Yehova] alobelaki [moto oyo azalaki na molangi ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ, NW], Leká kati na mboka, katikati na Yelusaleme, mpe tyá elembo na bilongi na mibali oyo bakokimela mpe bakolela na ntina na makambo na mbindo nyonso masalami na kati na mboka.”​—Ezekiele 9:4.

12. Maloba ya Ezekiele 9:5, 6 ezali na ntina nini mpo na bato lelo oyo?

12 Lelo oyo, ntango tozali kotánga malako oyo bapesaki mibali motoba oyo bazalaki na bibomeli, tozali komona ete lisolo yango ezali na ntina mpo na biso. Elobi ete: “Bóleka na kati na mboka nsima na ye, mpe bóbɛta; liso na bino ekotala na mawa te mpe bokotika te; bomá nyɛ mobali anuni, mobali elenge mpe moseka, bana mike mpe basi; kasi bɛlɛmá na moto oyo azali na elembo te; mpe bandá epai na esika mosantu na ngai.” (Ezekiele 9:5, 6) Tokobika na bolɔzi monene oyo etikali moke mpenza eya se soki tozali koyeba ete oyo ezali mpenza ntango ya kolela.

13, 14. (a) Bato oyo Yesu abéngaki bato ya esengo ezali banani? (b) Yebisá mpo na nini okanisi ete maloba yango ebongi mpenza mpo na Batatoli ya Yehova.

13 Kasi, ntango tozali koloba ete basaleli ya Yehova bazali “kolela” mpo na makambo mabe oyo ezali koleka na mokili, elingi koloba te ete bazali na esengo te. Kutu, bazali na esengo koleka bato mosusu nyonso na mokili. Yesu amonisaki eloko oyo epesaka esengo ya solosolo na maloba oyo: “Esengo na baoyo bayebi bamposa na bango ya elimo, . . . baoyo bazali kolela, . . . bato ya boboto, . . . baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya mai mpo na bosembo, . . . bato ya motema mawa, . . . bato ya motema pɛto, . . . bato ya kimya, . . . baoyo banyokwami mpo na bosembo.” (Matai 5:3-10, NW) Bilembeteli mingi ezali komonisa ete makambo yango ezali komonana epai ya Batatoli ya Yehova soki tokamati bango lokola moto moko; ezali komonana epai na bango koleka bato ya mangomba mosusu nyonso.

14 Mingimingi banda 1919 ntango losambo ya solo ezongaki, basaleli ya Yehova, bato ya esengo, bazali na likambo oyo epesi bango nzela na “kosɛka.” Na elimo, bayokaki esengo ndenge moko na bato oyo babimaki na Babilone na ekeke ya motoba L.T.B.: “[Ntango Yehova azongisaki baombo, NW] na Siona, biso tozalaki [lokola] balɔti na ndɔtɔ. Kosɛka etondisaki minɔkɔ na biso, konganga na esengo ezalaki na ndemo na biso. . . . [Yehova] asalaki makambo minene minene mpo na biso; biso mpe tosepeli na yango.” (Nzembo 126:1-3) Kasi, ata bazali kosɛka na elimo, Batatoli ya Yehova bazali na mayele, babosanaka te ete mikolo ezali mabe. Ntango mokili ya sika ekoya mpe bato oyo bakofanda awa na mabelé ‘bakosimba bomoi ya solosolo,’ kolela ekotika esika na kosɛka libela na libela. —1 Timote 6:19; Emoniseli 21:3, 4.

“Ntango ya koyamba mpe ntango ya koboya koyamba”

15. Mpo na nini baklisto baponaka bato oyo bakoki kozala baninga na bango?

15 Baklisto baponaka nani oyo akoki kozala moninga na bango. Babosanaka toli ya Paulo te. Toli yango elobi ete: “Bótika komikosa: ‘Baninga ya mabe babebisaka bizaleli ya malamu.’” (1 Korinto 15:33, Boyokani ya Sika) Mpe Salomo, mokonzi ya mayele mingi, alobaki boye: “Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” —Masese 13:20.

16, 17. Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo ya kopona baninga, kozala fianse, mpe kobala, mpe mpo na nini?

16 Lokola bango moko balingaka Yehova mpe balingaka bosembo na ye, basaleli ya Yehova baponaka bato oyo balingaka Yehova mpo bázala baninga na bango. Ya solo, basepelaka kofanda na baninga na bango kasi, na likambo ya kozala bafianse, baboyaka kolanda makanisi oyo ezali kotikela makambo nyonso nzela, ata oyo ya mabe, ndenge ezali kosalema na mikili mingi. Mpo na bango, kozala bafianse ezali lisano mpamba te. Batalelaka yango lokola ebandeli ya likambo oyo esengeli kosuka na libala; mpe moto asengeli kondima kozala fianse se soki akoli, ezala na nzoto, na makanisi mpe na elimo, mpe soki likambo moko te na Biblia ezali kopekisa ye kobala. —1 Bakolinti 7:36.

17 Bato mosusu bamonaka ete kotalela likambo ya kozala fianse mpe kobala ndenge wana ezali makambo ya kala. Kasi Batatoli ya Yehova balandaka makanisi ya bato te mpo na kopona baninga to kozwa mikano na makambo ya kozala fianse mpe kobala. Bayebi ete “mayele alongi na misala na ye.” (Matai 11:19) Yehova ayebi makambo malamu koleka bato nyonso, yango wana balandaka toli oyo apesi bango ete bábala kaka “kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39; 2 Bakolinti 6:14) Na likambo ya libala, bakendaka mbangumbangu te, mpo bayebi ete kokanisa ete soki mwasi na mobali bazali koyokana lisusu te bakoki ata koboma libala to kokwabana ezali libunga. Bazwaka ntango ya koluka molongani oyo abongi mpo bayebi ete na ntango balapi ndai ya libala, basengeli kotosa mobeko ya Yehova oyo elobi ete: “Bazali lisusu mibale te kasi nzoto moko. Oyo nde Nzambe asili kotonga, tiká te ete moto akangola yango.” —Matai 19:6; Malako 10:9.

18. Mosala nini ekoki kozala ebandeli ya libala ya esengo?

18 Ntango bato babalani ezali mpo na bomoi na bango mobimba, yango wana, esengeli komibongisa malamu. Mobali asengeli komituna boye: ‘Mwana mwasi oyo abongi na ngai mpenza?’ Kasi, asengeli mpe komituna ete: ‘Ngai, nabongi na ye mpenza? Nazali mpenza moklisto oyo akɔmeli mpe akoki kokokisa bamposa na ye ya elimo?’ Yehova azali kosɛnga ete mwasi na mobali oyo balingi kobalana bázala makasi na elimo, bázala bato oyo bakoki kosala libala ya solosolo oyo Nzambe akondima. Baklisto mingi oyo babalaná bakoki koloba na bosembo nyonso ete mosala ya mobongisi-nzela ezali ebandeli malamu mpo bato básala libala ya malamu, mpamba te mosala yango esalisaka moto na kokolisa elimo ya kopesa kasi ya kozwa kaka te.

19. Mpo na nini baklisto mosusu basepelaka kotikala minzemba?

19 Baklisto mosusu ‘baboyaka koyamba,’ na ndenge baponaka kotikala minzemba mpo na nsango malamu. (Mosakoli 3:5, NW) Bamosusu basepelaka kobala noki te tii bakomona ete bateli na elimo mpe bakoki kozwa molongani oyo abongi. Tobosani mpe te baklisto oyo bazali minzemba, baoyo bazalaka na mposa báyoka bisengo mpe bolamu ya libala kasi bazwi naino molongani te. Tokoki kozala na elikya ete Yehova asepelaka na ndenge bazali koluka kobala na ndenge oyo ezali kobatela mibeko na ye. Ekozala malamu soki biso tozali komonisa bango ete tosepelaka na bosembo na bango mpe soki tokolendisa bango na ndenge oyo ebongi mpenza.

20. Mpo na nini ntango mosusu ata bato oyo babalá ‘baboyaka koyamba’?

20 Bato oyo babalá bakoki mpe ntango mosusu ‘koboya koyamba’? Ezali bongo na makambo mosusu, mpamba te Paulo alobaki boye: “Bandeko, nazali koloba ete ntango eyei mokuse, [sikoyo] tiká ete baoyo bazali na basi bázala lokola bango bazangi basi.” (1 Bakolinti 7:29) Yango wana, baye babalá basengeli ntango mosusu kotya naino pembeni bisengo mpe bolamu ya libala mpo bákokisa mikumba na bango na lisangá ya Nzambe. Kozala na makanisi ebongi na likambo oyo ekoki kolɛmbisa libala te kasi ekolendisa yango mpo ekosalisa mwasi na mobali bábosana te ete Yehova asengeli ntango nyonso kozala mobongisi ya liboso ya libala na bango.​—Mosakoli 4:12.

21. Na likambo ya kobota bana, mpo na nini tosengeli te kosambisa mokano oyo mwasi na mobali bazwi?

21 Lisusu, mibali mosusu na basi na bango bamonaki malamu bábota te mpo bázala na mokumba te ntango bazali kosalela Nzambe. Elingi koloba ete bandimaki kozanga eloko moko oyo soki totali malamu basengeli kozala na yango, mpe Yehova akopesa bango mbano mpo na yango. Kasi, na esika oyo tóyeba ete atako Biblia elendisi kotikala monzemba mpo na nsango malamu, elobi eloko moko te na likambo ya koboya kobota mpo na nsango malamu. (Matai 19:10-12; 1 Bakolinti 7:38; kokanisá Matai 24:19 na Luka 23:28-30.) Na bongo, mobali na mwasi na ye basengeli kopona oyo bango moko bamoni malamu nsima ya komitalela mpe kotalela mposa ya mitema na bango. Mpe moto moko te asengeli kotɔnga bango mpo na likambo oyo bango moko baponi kosala.

22. Ebongi mpenza tóyeba likambo nini?

22 Ɛɛ, “Ntango ezali mpo na eloko na eloko mpe [ntango] mpo na likambo na likambo na nse na moi.” Ezali mpe na “ntango ya etumba mpe ntango ya kimya.” (Mosakoli 3:1, 8) Lisolo elandi ekomonisa mpo na nini ebongi mpenza tóyeba soki oyo ezali ntango ya kimya to ntango ya etumba.

Okoki kolimbola?

◻ Mpo na nini ezali na ntina mingi tóyeba ete “likambo na likambo ezali na ntango na yango”?

◻ Mpo na nini lelo oyo ezali mpenza “ntango ya kolela”?

◻ Mpo na nini baklisto, atako bazali “kolela,” kasi bazali mpenza na esengo?

◻ Ndenge nini baklisto mosusu bamonisaka ete mpo na bango sikoyo ezali “ntango ya koboya koyamba”?

[Elilingi na lokasa 6, 7]

Atako baklisto bazali “kolela” mpo na makambo mabe ya mokili oyo baleki bato nyonso na mokili na esengo

[Elilingi na lokasa 8]

Mosala ya mobongisi-nzela ezali ebandeli malamu mpo na kosala libala malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto