“Mpiko oyo euti na kondima”
NA MOBU 1998, buku moko ya sika ebimaki na Lifalanse na motó ya likambo ete Les Témoins de Jéhovah face à Hitler, bato bakumisaki buku yango mingi. Buku yango ekomamaki na Guy Canonici. Kati na maloba na ye ya ebandeli, François Bédarida, moto ya France, mokomi ya istware oyo ayebani mingi, akomaki boye: “Buku oyo bato basepeli na yango mingi. Basepeli na yango mingi bobele te mpo elobeli makambo oyo bato mosusu bakomaki yango te, kasi lisusu mpo ebimi na ntango ebongi. . . . Longola banganga-mayele, nani ayebi makambo oyo ekómelaki Batatoli ya Yehova na boyangeli (Reich) ya misato ya Allemagne na ntango ya Hitler? Nzokande, na boumeli ya mbula zomi na mibale ya boyangeli yango, Batatoli banyokwamaki na ndenge ya nsɔmɔ. Batyaki bango mpe na bakaa ya bakangami. Bango mpe bayokaki eloko mpo na kobatela kondima mpe bindimeli na bango. Mpo na nini babosani baklisto yango kati na lisolo na bato? . . .
“Mpo na nini banyokolaki, na ndenge ya nsɔmɔ boye, lingomba moke oyo basangani na yango bazwami bipai na bipai mpe basali eloko te? Talá likambo oyo ezali kokamwisa. Na Allemagne mobimba Batatoli bazali bobele etuluku moke ya bato, mpo bato bakanisaka ete bazali 20 000 na kotalela bato milio 60 na kati ya mboka yango—kasi bazali bango nyonso bana mboka ya kimya mpe batosaka mibeko ya mboka, bakanelaka bato te mpe balukaka bobele kosala mosala mpe kobɔkɔla bana na bango malamu. . . .
“Kasi banyokoli balongaki te, mpamba te bakutanaki na bandimi oyo bazali bato ya elimo, bazali makasi mpe balongoki. Bandimi yango oyo kondima na bango na Yesu Klisto epesi bango makasi ya kobanga minyoko te, babangaki te kobɛtama na Leta, mpe bazalaki bilombe mpe bandimaki ata kokufa lokola martiru.”
Lisolo ya Batatoli ya Yehova oyo, mpo na kondima na bango ya boklisto, bakufaki lokola bamartiru emonisi mpenza mpiko monene na bango. Kolobeláká makambo mazali na buku yango, La Croix, zulunalo ya Lingomba ya Katolike oyo eyebani mingi na France elobaki polele ete: “Na lisolo na bango [Batatoli ya Yehova] oyo eyebani mingi te, Guy Canonici apesi ebele na bilembeteli oyo okotikala monɔkɔ polele mpo na mpiko oyo euti na kondima mpe emonisami polele, kondima oyo ezali makasi kino nsuka, ata na bana mike. Kokanisa likambo yango ekozala na ntina mingi mpo na kosilisa ntembe oyo ezali na mikolo na biso mpo na koyeba soki Batatoli ya Yehova bazali baklisto.”