Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/10 nk. 28-31
  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kobimisa libongoli mosusu?
  • Makambo oyo ekesenisi yango
  • Kozongisama ya nkombo ya Nzambe
  • Ekómi epai ya bato oyo balobaka Lingelesi te
  • Na mokili mobimba, bato ebele bazali kosepela na Libongoli ya Mokili ya Sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Libongoli ya Mokili ya Sika
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolamá malamu?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • “Traduction du monde nouveau” Mosala ya mayele na sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/10 nk. 28-31

Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe

Na mobu 1998, ezalaki na likambo moko ya esengo oyo esepelisaki bato nyonso oyo balingaka liloba ya nzambe. na mobu wana, biblia “les saintes écritures—traduction du monde nouveau” milio 100 ebimisamaki. na bongo, biblia yango ekɔtaki na molɔngɔ ya babiblia oyo ebimisami na ekeke oyo mpe oyo bato mingi bazali na yango!

LIKAMBO yango ezali mpenza ya kokamwisa mpamba te, ntango Biblia wana ebimaki, bato balobelaki yango malamu te. Atako bongo, Biblia yango ezali kaka mpe bato mingi bazali na yango, ezali na bamilio ya bandako —mpe ya mitema—na mokili mobimba! Libongoli wana ya Biblia, ekeseni na mabongoli nyonso, euti wapi? Nani asalaki yango? Mpe ndenge nini okoki kozwa litomba na kosalela yango?

Mpo na nini kobimisa libongoli mosusu?

Ekoki lelo bambula koleka monkama, la Société Watch Tower, ndenge Batatoli ya Yehova bayebani na mibeko ya Leta, ezali kokabola ebele ya Biblia. Kasi mpo na nini Batatoli ya Yehova bamonaki malamu kobimisa libongoli mosusu ya Liloba ya Nzambe? Buku ya Sakae Kubo mpe Walter Specht (So Many Versions?) elobi ete: “Ezali na libongoli moko te ya Biblia oyo bakoki koloba ete ezali ya nsuka. Lokola bato bazali se koyeba makambo mingi ya sika na oyo etali Biblia mpe lokola minɔkɔ mizali ntango nyonso kobongwana, mabongoli ya sika ekobanda kaka kobima.”

Na ekeke na biso, bato bakómi na boyebi mingi ya Liebele, Greke mpe Aramɛyɛ—minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli. Lisusu, bakundolaki bamaniskri ya kalakala ya Biblia, baminiskri yango elobeli makambo malamu koleka bamaniskri oyo babongoli ya kala ya Biblia bazalaki kosalela. Na ndenge wana, lelo oyo, Liloba ya Nzambe ekoki mpenza kobongolama malamu koleka ndenge oyo bazalaki kobongola yango liboso! Yango wana, ezalaki na ntina mpenza nde básala Komite ya Kobongola Biblia Traduction du monde nouveau na elobeli oyo bato balobaka lelo.

Na mobu 1950, babimisaki Écritures grecques chrétiennes—Traduction du monde nouveau na Lingelesi. Lokola bato bamesani kobenga biteni mibale ya Biblia ete: testama ya “Kala” mpe testama ya “Sika” esengelaki kolongola kobanga mpo na kopesa nkombo wana ya sika oyo ekeseni mpenza. Na bambula oyo elandaki, biteni ya Makomami ya Liebele ekómaki kobimisama ndambondambo. Na mobu 1961, babimisaki Biblia yango mobimba na Lingelesi.

Banani babongolaki Biblia ya kitoko boye? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1950 (na Lingelesi) elobaki ete: “Bato oyo bazali na kati ya komite ya kobongola Biblia bamonaki malamu . . . bankombo na bango eyebana te, mpe bazali na mposa kutu te ete nkombo na bango elobelama, ezala ntango bazali na bomoi to nsima ya liwa na bango. Libongoli oyo esalemi nde mpo na kokumisa nkombo ya Nzambe ya solo, oyo azali na bomoi.” Banganga-batyoli mosusu balobaki ete libongoli oyo esengeli koboyama mpo esalemi na bato oyo bayebi makambo mingi te, kasi bamosusu bazalaki na likanisi wana te. Alan S. Duthie akomi ete: “Soki toyebi banani bazali babongoli to babimisi ya Biblia moko boye, yango ekosalisa biso nde na kokata soki libongoli ezali malamu to mabe? Mpenzampenza te. Esengeli nde kotalela makambo oyo ezali na kati ya libongoli wana.”a

Makambo oyo ekesenisi yango

Bamilio ya batángi basalaki bongo mpe bamonaki ete Traduction du monde nouveau ezali libongoli oyo okotánga yango na mpasi te mpe ezali mpenza libongoli oyo ezali kolobela makambo na ndenge moko ya sikisiki. Makambo oyo babongoli babongolaki bazwaki yango na minɔkɔ ya ebandeli: Liebele, Aramɛyɛ mpe Greke na kosaleláká makomi oyo ezalaki malamu koleka na ntango wana.b Basalaki mpe makasi mingi mpo na kobongola liloba moko na moko ya makomi ya kala ndenge yango ezalaki mpenza mpe na esika oyo likoki ya kosala bongo ezalaki kasi na elobeli oyo bato ya lelo bakokanga ntina na yango na mpasi te. Na yango, banganga-mayele mosusu bakumisaki libongoli oyo mpo maloba na yango ebebisami te mpe mpo na bosikisiki na yango. Na ndakisa, zulunalo Andover Newton Quarterly ya Yanuali 1963 elobaki ete: “Libongoli ya Testama ya Sika oyo ezali elembeteli oyo emonisi ete banganga-mayele ya makoki bazali na lingomba na bino, bango bayebi na mayele mpenza kolonga ebele ya mikakatano ya kobongola Biblia.”

Babongoli na yango bapesaki bato eloko ya sika mpo na kosalisa bango báyeba Biblia malamumalamu. Mikapo ya Biblia oyo bato bazalaki kokanga ntina na yango mpenza te na ntango ya kala ekómaki mpenza polelepolele. Na ndakisa, maloba ya makasimakasi oyo ezalaki na Matai 5:3: “mapamboli epai na babola na elimo” (King James Version), ebongolamaki na ndenge moko ya polele: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” Na Biblia Traduction du monde nouveau liloba mokomoko ya ntina mingi ebongolami bobele ndenge moko bipai nyonso oyo yango ebimi. Na ndakisa, liloba ya Greke psukê ebongolami “molimo” epai nyonso oyo yango emonani. Na ndenge yango, batángi bakoki nokinoki kososola ete, na kokesana na mateya ya mangomba, molimo ezali te eloko oyo ekufaka te!—Matai 2:20; Malako 3:4; Luka 6:9; 17:33.

Kozongisama ya nkombo ya Nzambe

Likambo mosusu ya ntina mpenza na Traduction du monde nouveau ezali bongo kozongisama ya nkombo ya Nzambe, Yehova. Na bakopi ya kala ya Biblia ya Liebele, nkombo ya Nzambe emonisami na mileli (consonnes) minei oyo ekoki kokomama boye: YHWH to JHVH. Nkombo yango ekeseni na bankombo nyonso mosusu mpe ezali komonana soko mbala 7 000 kaka na eteni oyo babengaka Testama ya Kala. (Exode 3:15; Nzembo 83:18) Ya solo mpenza, Mozalisi na biso azalaki na likanisi ete basambeli na ye báyeba mpe básalela nkombo wana!

Nzokande, mpo na kobanga oyo bazalaki na yango mpo na biyambayamba, Bayuda batikaki kosalela nkombo ya Nzambe. Nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu, bakomi ya Makomami ya Greke babandaki kotya, na esika oyo basengelaki mpenza kotya nkombo ya Nzambe, maloba oyo ya Greke Kurios (Nkolo) to Théos (Nzambe). Likambo ya mawa, babongoli ya mikolo na biso balandaki momeseno wana. Bazali kokumisa Nzambe te, balongoli nkombo ya Nzambe na Babiblia mingi mpe babombi kutu nkombo ya Nzambe. Na ndakisa, na Yoane 17:6 tozali kokuta maloba ya Yesu oyo elobi ete: “Nasili komonisa nkombo na yo.” Nzokande, Biblia Today’s English Version, ebongoli maloba yango boye: “Nasali ete oyebana.”

Banganga-mayele mosusu bandimaka ndenge bato balongolá nkombo ya Nzambe mpamba te ebengeli na yango ya sikisiki eyebani te. Nzokande, bankombo ya Biblia oyo bato bamesená na yango lokola Yilimia, Yisaya mpe Yesu ekomamaka na momeseno na ndenge oyo ekeseni mpenza na ebengeli na yango na Liebele. Lokola ekomeli Yehova ezali ndenge oyo endimami mpo na kokoma nkombo ya Nzambe—mpe lokola bato mingi bameseni na nkombo yango—boye makanisi oyo bazali kopesa mpo na koboya kosalela nkombo yango ezali na ntina te.

Komite ya Kobongola Biblia Traduction du monde nouveau ebangaki te mpo na kosalela nkombo Yehova na biteni ya Makomami ya Liebele mpe ya Greke. Bazali bato ya liboso na kosala bongo te, mabongoli oyo esalemaki kala na bamisionere mpo na bato ya Amérique centrale, ya Pacifique Sud mpe ya Orient esalelaki mpe nkombo yango. Nzokande, kosalela nkombo ya Nzambe motindo wana ezali likambo ya mpamba te. Koyeba nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na koyeba ye lokola moto. (Exode 34:6, 7) Bamilio ya bato oyo batángaka Traduction du monde nouveau balendisami kosalela nkombo na ye!

Ekómi epai ya bato oyo balobaka Lingelesi te

Banda 1963 tii 1989, na kati wana, Biblia Traduction du monde nouveau mobimba to ndambo, ebimaki na minɔkɔ mosusu zomi. Nzokande, mosala ya kobongola ezalaki mosala moko ya makasi, mabongoli mosusu eumelaki mbula 20 to koleka. Na nsima, na mobu 1989, na biro monene ya Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba, basalaki departema oyo etalelaka misala ya kobongola mikanda (Translation Services Department). Na litambwisi ya Komite ya Rédaction ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, departema wana ekɔtaki na mosala ya kolukaluka ndenge nini mosala ya kobongola Biblia ekoki kosalama nokinoki. Babimisaki mayele moko ya kosangisa boyekoli ya maloba ya Biblia mpe makambo ya informatique. Ndenge nini ebongiseli yango esalaka?

Soki Komite ya Rédaction endimi ete Biblia ebongolama na monɔkɔ moko boye, baponaka etuluku moko ya baklisto oyo bamipesi mpo básala ekipi ya babongoli. Biblia oyo ebongolami na bato ebele ezalaka malamu koleka oyo ebongolami kaka na moto moko. (Kokanisá na Masese 11:14.) Mingimingi, moto mokomoko ya ekipi azalaka moto oyo ameseni kobongola mikanda ya la Société. Na nsima, babongoli oyo bazali na ekipi yango bazwaka mateya ya solosolo mpo na lolenge ya kobongola Biblia mpe mpo na lolenge ya kosalela baprograme ya ordinatɛrɛ oyo ebongisami mpo na mosala yango. Ordinatɛrɛ yango moko ebongolaka te, kasi ekoki nde kopesa ekipi ya babongoli nzela ya kozwa makambo ya ntina oyo bazali na yango mposa mpe ekoki kosalisa bango na kobomba makambo oyo bayokani ete ekosalema boye to boye.

Mosala ya kobongola Biblia ekabwani na biteni mibale. Na boumeli ya eteni ya liboso, bapesaka babongoli molɔngɔ ya maloba oyo esalelami na Traduction du monde nouveau ya Lingelesi. Na Lingelesi, maloba lokola “atone” (kopesa mbɔndi), “atonement” (mbɔndi) mpe “propitiation” (koluka bolimbisi) etyami esika moko, mpo babongoli báyeba ete mwa bokeseni ezali na ndimbola ya maloba wana. Babongoli basangisaka maloba ya monɔkɔ na bango oyo makokani na maloba wana ya Lingelesi esika moko. Atako bongo, na bantango mosusu mobongoli akoki kokutana na mokakatano mpo na kobongola vɛrsɛ moko boye. Programe moko ya koluka makambo oyo ozali na yango mposa na ordinatɛrɛ epesaka mobongoli likoki ya koyeba maloba ya Liebele mpe ya Greke mpe epesaka ye nzela ya kokóma epai mikanda ya la Société ezali na kati ya ordinatɛrɛ.

Ntango mosala yango ekómi na eteni na yango ya mibale, maloba oyo babongoli baponaki na monɔkɔ na bango ekotyama mbala moko na mikapo ya Biblia. Yango epesaka nzela ete maloba ebongolama na bosikisiki mpe ekomeli ya maloba ezala bobele ndenge moko bipai nyonso na kati ya libongoli wana. Nzokande, makambo oyo eutaka na tekniki babengi “search and replace” (luká mpe tyá) ezalaka mpasi mpo na kotánga mpo etyami na molɔngɔ te. Boye, babongoli basalaka mosala moko ya makasi mpo na kosangisa mpe kobongisa maloba ya bavɛrsɛ ya Biblia mpo etángama na mpasi te.

Kosala na baordinatɛrɛ ndenge wana mpo na kobongola Biblia emonani ete ezali mpenza malamu. Ekipi moko esalaki mbula mibale mpamba mpo na kobongola Makomami ya Liebele mobimba. Nzokande ekipi mosusu oyo ezalaki na baordinatɛrɛ te esalaki mbula 16 mpo na kobongola yango na monɔkɔ mosusu oyo ekokani mwa moke na oyo wana. Banda mobu 1989 tii lelo, Makomami ya Greke ya boklisto ebimi na minɔkɔ mosusu 18. Sikoyo, Traduction du monde nouveau, mobimba to ndambo, ebimi na minɔkɔ 34. Yango wana, Batatoli ya Yehova koleka 80 kati na monkama bazali na Makomami ya Greke ya Boklisto na minɔkɔ ya mboka na bango.

Ebongiseli moko (United Bible Societies) eyebisi ete na minɔkɔ 6 500 oyo ezali na mokili mobimba, biteni ya Biblia ezali bobele na minɔkɔ 2 212.c Na yango, babongoli 100 bazali sikoyo kosala mpo na kobimisa Traduction du monde nouveau ya Makomami ya Liebele na minɔkɔ 11 mpe ya Makomami ya Greke na minɔkɔ 8. Mokano ya Nzambe ezali “ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe báyeba solo malamumalamu.” (1 Timote 2:4, NW) Mpe Traduction du monde nouveau ekobanda kosalisa bato ntango nyonso na likambo yango.

Tozali bongo na esengo ndenge libongoli oyo ebimi ebele koleka milio 100, mpe tozali kobondela ete bamilio mingi mosusu ekoka kobima na mikolo mizali koya. Tozali kolendisa yo oluka koyeba yo moko makambo oyo ezali na kati. Okosepela na makambo mingi ya ntina oyo ezali na kati ya libongoli yango: mpasi te mpo na kotánga, mitó ya makambo mikemike oyo ezali likoló ya lokasa mokomoko, index oyo ekoki kosalisa yo oyeba esika bavɛrsɛ oyo bato bameseni kosalela ezalaka, bakalati na yango oyo ezali kolakisa makambo ya ndenge na ndenge, mpe makambo ya kitoko oyo ezali na eteni oyo babengi appendice. Likambo ya ntina mpenza, ntango ozali kotánga Biblia oyo yebaká ete ezali koyebisa maloba ya Nzambe na ndenge moko ya malamu mpenza na monɔkɔ ya mboka na yo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Likambo mpenza ya kobenda likebi, ezipeli ya Biblia American Standard Bible oyo ezali na Mitindami, oyo ebimaki na 1971, elobaki mpe ndenge moko ete: “Totángi nkombo ya nganga-mayele moko te mpo bato bálobaka ezali moto boye to batángaka ye, mpo tondimi ete Liloba ya Nzambe yango moko ezali na motuya na yango.”

b Mpo na Makomami ya Greke basalelaki The New Testament in the Original Greek, buku ya Westcott mpe Hort. Mpo na Makomami ya Liebele basalelaki Biblia Hebraica, buku ya R. Kittel.

c Lokola bato mingi balobaka minɔkɔ mibale, tokanisi ete Biblia, mobimba to ndambo, ebongolami na minɔkɔ mingi mpo bato koleka 90 kati na monkama oyo bafandi awa na mabelé bákoka kotánga yango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

“Libongoli ya Testama ya Sika oyo ezali elembeteli oyo emonisi ete banganga-mayele ya makoki bazali na lingomba na bino, bango bayebi na mayele mpenza kolonga ebele ya mikakatano ya kobongola Biblia.”—ANDOVER NEWTON QUARTERLY, YANUALI 1963

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]

“Lokola bato bazali se koyeba makambo mingi ya sika na oyo etali Biblia mpe lokola minɔkɔ mizali ntango nyonso kobongwana, mabongoli ya sika ekobanda kaka kobima”

[Etanda/​Elilingi na lokasa 31]

BANGANGA-MAYELE BAZALI KOKUMISA TRADUCTION DU MONDE NOUVEAU

EDGAR J. GOODSPEED, mobongoli ya “Testama ya Sika” ya Greke ya Biblia An American Translation, akomaki boye na mokanda na ye ya mokolo ya 8 Desɛmbɛ 1950, mpo na Biblia Écritures grecques chrétiennes—Traduction du monde nouveau: “Nalandelaka mosala na bino ya misionere mpe ndenge yango ezali kotambola na mokili mobimba; lisusu, libongoli na bino ezali polele mpe esimbaka motema, esepelisaka ngai mingi. Nakoki koloba ete, na makambo mingi, bato oyo basalaki yango bazali na mayele moko ya kosakana te.”

Alexander Thomson, nganga-mayele, oyo ayebi malamu lokota ya Liebele mpe ya Greke, akomaki ete: “Libongoli oyo ezali mpenza eloko oyo esalemaki na bato ya mayele oyo bayebi makambo mingi, oyo balukaki kobimisa ndimbola ya solosolo ya makomi ya Greke na ndenge oyo yango ekoki kolobama na monɔkɔ ya Lingelesi.”—The Differentiator, Aprili 1952, nkasa 52-57.

Na mobu 1989, Profesere Benjamin Kedar, nganga-mayele na Israël, oyo ayebi malamu lokota ya Liebele, alobaki boye: “Ntango nalukalukaka makambo ya minɔkɔ oyo etali Biblia ya Liebele mpe mabongoli, natalaka mingimingi na kati ya Biblia ya Lingelesi oyo eyebani na nkombo New World Translation. Na kosaláká bongo, nayebaka mbala mingi ete, namikosaka te, ndenge nandimaka ete milende ya solosolo esalemaki na libongoli oyo mpo na kobimisa ndimbola ya sikisiki ya makomi na ndenge oyo ekoki.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto