‘Bateyaka bato bázala na boboto mpe na bolingo’
NA BAMBULA oyo euti koleka, bato mosusu bamipesaki mosala ya kokosela Batatoli ya Yehova makambo na ekólo France. Banguna yango babalolaki solo mpe balobaki makambo ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya Batatoli na miso ya bato. Na ebandeli ya 1999, Batatoli ya Yehova bakomaki mwa trakte oyo motó ya likambo na yango elobaki ete: Bato ya France, bazali kokosa bino mpe bakabolaki batrakte milio 12 na France mobimba. Na kati ya mwa trakte yango, balobaki polele makambo nyonso ya lokuta oyo bakoselaki bango.
Mwa mikolo nsima ya kokabola mwa trakte yango, Jean Bonhomme, ye azali monganga mpe azalaká depite, atindelaki bakomi ya zulunalo moko mokanda. Akómaki boye: “Batatoli ya Yehova bayaka mbala na mbala na ndako na ngai. Bayaka koteya ngai kozala na boboto mpe na bolingo epai ya bato nyonso. . . . Balukaka kosolola na bato na makasi te. Balobaka na boboto mpe bayokaka ngai na boboto nyonso ntango nakakatanaka mpo na kondima.”
Na oyo etali elimo ya Batatoli ya Yehova, Bonhomme alobaki ete: “Atako bazali na makanisi oyo ekeseni na makanisi ya bato mingi, yango ekoki kosala bato mosusu mabe ata moke te. Kutu, makanisi mosusu ya bato mosusu ya politiki nde ezali mpenza likama mpo na kimya mpe boyokani ya bato na kati ya mboka.”