Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
Na France, Batatoli basɛngi na bato bátalela bango likambo
KOBANDA mokolo ya mitano, 29 Yanuali 1999 na ntɔngɔ mpe na wikende mobimba oyo elandaki, Batatoli ya Yehova ya ekólo France bakabolaki milio 12 ya trakte moko oyo ezalaki na moto ya likambo ete: Français, on vous trompe! (Bana ya France, bazali kokosa bino!). Bakabolaki yango liboso na babalabala mpe na nsima bazalaki kokɔta ndako na ndako. Mpo na nini basalaki kampanye yango?
Na mokolo wana ya mitano na ntɔngɔ, na Paris, bayebisaki ntina oyo basalaki kampanye yango na likita moko oyo babongisaki mpo na kosolola na bapanzi-nsango. Motatoli oyo azalaki molobeli ayebisaki boye: “Lelo oyo tolingi kolakisa soki tozali mpenza banani mpe kokanga minɔkɔ ya bato oyo bazali koloba makambo ya lokuta mpo na biso. Toboyi te ete bato báloba mabe mpo na biso, kasi tolingi lisusu te tóyokaka lokuta mpe makambo oyo ezali kobebisa lokumu na biso.”
Atako na France, Lingomba ya Batatoli ya Yehova ezali lingomba ya misato kati na mangomba ya boklisto mpo na motango ya bandimi, Batatoli mingi oyo bazali banakelasi bazali kofingama mpe bazali kotungisa bango na bakelasi. Baoyo bazali mikóló bazali kolongolama na misala mpe basusu bazali kotungisa bango; makambo oyo nyonso ezali kokómela bango se mpo bazali Batatoli ya Yehova. Likambo ya kokamwa, ezala makabo oyo bazali kopesa na lingomba na bango, Leta azali kosɛnga báfutela yango mpako makasi (60 %). Ndenge nini kampanye wana ebimisaki likambo yango polele?
Na trakte bakomaki boye: “Batatoli ya Yehova na baninga na bango, bango nyonso bazali bato 250 000 na France balobi ete BABOYI ndenge oyo bato mosusu bazali kosalela bango makambo ezangi sembo. Banda 1995, bato yango bazali kotya lingomba na bango ya boklisto na molɔngɔ ya mangomba mikemike ya molili, oyo ekoki komema likama na mboka. Lingomba na bango ezali na France banda mobu 1900. . . . BABOYI motungisi oyo bazali kosalela bango.” Babimisaki bifundeli ya lokuta oyo bato mosusu balobaki mpo na Batatoli na France mpe ndenge oyo ezali sembo te oyo banguna na bango bazali kosalela mpo na kobebisa lokumu na bango. Maloba ya nsuka na trakte yango ezalaki oyo: “Lelo oyo, Batatoli ya Yehova na baninga na bango bazali koleka milio mibale na Mpoto mobimba. Na mboka nyonso oyo bafandi, batosaka mibeko ya Leta na ndenge balandaka mateya ya Evanzile. Bana ya France, oyo nde bosolo ya makambo. Mokumba na biso ezali ya koyebisa ndenge makambo ezali!”
Bato baumelaki te komonisa makanisi na bango mpe ezalaki malamu
Na mokolo ya liboso, bamilio ya batrakte ekabolamaki. Kaka na Paris, ntango ekómaki na ngonga ya midi, Batatoli koleka 7 000 bakabolelaki bato trakte koleka milio 1,3. Ezalaki mbala ya liboso na komona mbala moko ebele ya Batatoli bazali kokabola batrakte na babalabala. Baradio, batelevizyo, na bazulunalo, ezala ya mboka mobimba to ya baprovense, elobelaki kampanye yango na ndenge ya malamu. Zulunalo Le Progrès de Lyon ekomaki boye: “Likambo oyo esalemi . . . emonisi ndenge oyo liloba moko esalelamaka mabe. Banda soki mbula zomi, liloba ‘mwa lingomba’ [secte] . . . ezali kosalelama na ndimbola moko ya mabe, ezali kopesa likanisi ya lingomba oyo ekoki kozala likama mpo na bato. . . . Batatoli ya Yehova bazali te bato oyo bakoki kozala likama na mboka.”
Baoyo bayebi Batatoli ya Yehova basepelaka na kimya mpe limemya mingi oyo bazalaka na yango mpo na mibeko ya mboka. Yango wana, na balabala, bato mingi bamonisaki ete basepelaki mpe bazali nsima ya ebele ya Batatoli oyo basalaki kampanye yango. Eumelaki te, bato bakómaki kobénga na telefone, kotinda fax mpe mikanda mpo na komonisa botɔndi na bango mpo na trakte yango. Likambo eleki ntina ezali ete bato ya sembo bayokaki bosolo ya likambo mpo na Batatoli. Yango ekeseni mpenza na maloba ya lokuta mpe ya mpambampamba oyo bato mosusu bazali koloba. Mpe bango moko [Batatoli], oyo bindimeli na bango ezali kotyolama, bazwaki libaku ya komonisa makanisi na bango mpo na makambo oyo bamonaka ete ezali na ntina mingi.