Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/9 lok. 31
  • Azwi eyano na motuna oyo azalaki komituna banda kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Azwi eyano na motuna oyo azalaki komituna banda kala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Masolo mosusu
  • Kondima na ye elendisaka basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/9 lok. 31

Azwi eyano na motuna oyo azalaki komituna banda kala

“YEHOVA? Yehova azali nani?” Ntango Silvia azalaki na mbula mwambe, amonaki nkombo yango na kati ya Biblia ya monɔkɔ ya Arménien; mwana mwasi mosusu nde alakisaki ye Biblia yango. Yango ezalaki eloko ya motuya mpenza na libota na bango. Silvia atunaki bato nyonso, kasi ata moto moko te na engumba Yerevan, na ekólo Arménie epai bazalaki kofanda, akokaki koyebisa ye soki Yehova azali nani, ezala baboti na ye, balakisi na ye, ata mpe bato oyo bazalaki koteya na ndakonzambe ya mboka na bango.

Silvia akolaki, asilisaki bakelasi na ye mpe abandaki kosala, kasi ayebaki kaka te soki Yehova azali nani. Ntango azalaki elenge, akimaki ekólo Arménie; mwa moke na nsima, akómaki na ekólo Pologne mpe azalaki kofanda na mwa ndako moko na bato mosusu oyo bakimá mboka na bango. Mbala na mbala, bato moko bazalaki koya kotala mwasi moko oyo bazalaki kofanda na ye. Silvia atunaki mwasi yango: “Bato oyo bayaka kotala yo bazali banani?” Mwasi yango alobaki ete: “Bazali Batatoli ya Yehova, bayaka koteya ngai Biblia.”

Silvia asepelaki mingi ntango ayokaki nkombo Yehova. Nsukansuka, abandaki koyekola soki Yehova azali nani mpe ayekolaki ete Yehova azali Nzambe ya bolingo. Kasi eumelaki te, alongwaki na Pologne. Akatisaki Mai Monene ya Baltique mpo na kokende kofanda na ekólo Danemark. Amemaki biloko mingi te, kasi na kati ya biloko oyo amemaki, ezalaki na mikanda ya Batatoli ya Yehova. Na nsuka ya mokanda moko, Silvia amonaki adresi ya babiro ya Société Watch Tower. Yango ezalaki eloko oyo ezalaki na ntina koleka biloko nyonso oyo amemaki, mpamba te ayaki koyeba Yehova mpo na yango!

Ntango Silvia akómaki na Danemark, bamemaki ye na kaa ya bato bakimá mboka mpe abandaki mbala moko koluka Batatoli ya Yehova. Baadresi esalisaki ye na koyeba ete biro ya Société Watch Tower na Danemark ezali na engumba Holbæk. Kasi engumba yango ezalaka wapi? Batindaki Silvia na kaa mosusu mpe bamemaki ye kuna na engbunduka. Engbunduka yango elekaki na engumba Holbæk! Motema ya Silvia etondaki lisusu na esengo.

Mwa moke na nsima, mokolo moko moi ezalaki makasi, Silvia akɔtaki na engbunduka mpe azongaki na Holbæk; atambolaki kobanda na gare tii na biro ya Société. Alobi boye: “Ntango nakɔtaki na lopango, nafandaki na kiti moko mpe nalobaki ete: ‘Oyo nde paladiso!’ ” Bayambaki ye malamu na biro yango mpe nsukansuka, abandaki koyekola Biblia.

Kasi na nsima, batindaki ye na bakaa mosusu mingi. Na bakaa nyonso ya bato bakimá mboka oyo azalaki koleka, Silvia azalaki koluka Batatoli ya Yehova mpe azalaki mbala na mbala kobandela boyekoli na ye ya Biblia. Kasi, nsima ya mbula mibale, ayebaki makambo mwa mingi oyo epesaki ye nzela amipesa epai ya Yehova. Azwaki batisimo mpe mwa moke na nsima, akómaki mobongisi-nzela. Na 1998, bakonzi ya Leta ya Danemark bapesaki ye mikanda oyo ezali kopesa ye nzela afanda na mboka yango.

Lelo oyo, Silvia azali na mbula 26 mpe azali kosala na Biro ya Batatoli ya Yehova na Danemark, esika oyo amonaki lokola paladiso. Sikoyo alobi boye: “Nakoloba lisusu nini? Banda bomwana na ngai nazalaki koluka Yehova. Lelo oyo nayebi ye. Nazalaki kokanisa kosalela ye bomoi na ngai mobimba, mpe lelo oyo, nazali kosala na Betele. Libondeli na ngai ezali ete naumela lisusu bambula ebele na Betele!”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto