Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/7 lok. 31
  • Kondima na ye elendisaka basusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima na ye elendisaka basusu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo mosusu
  • Azwi eyano na motuna oyo azalaki komituna banda kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • “Namoná naino bolingo lokola oyo te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • “Nasili kobatela kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/7 lok. 31

Kondima na ye elendisaka basusu

NTANGO Silvia abotamaki na Desɛmbɛ 1992, emonanaki lokola azali nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi, ntango akómaki na mbula mibale, minganga balobaki ete azali na maladi ya mpema mpe ya libumu. Mpo azala malamu, Silvia azalaki komɛla bankisi ya mbuma 36 na mokolo, kobenda bankisi ya zolo mpe bazalaki konika ye bankisi mosusu na nzoto. Lokola akómá na mpema mokuse, asengeli ntango nyonso kozala na masini ya mpema, ata soki akei kotambola.

Teresa, mama ya Silvia, alobi ete: “Ndenge Silvia akokaka maladi yango ekamwisaka mingi.” “Boyebi ya Biblia esalisaka ye azala na kondima makasi. Kondima yango esalisaka ye mpo amizindisa na mawa te. Abosanaka te mokili ya sika oyo Yehova alaki, epai bato nyonso ya maladi bakobika.” (Emoniseli 21:4) Soki bato ya libota na ye bakómi mawamawa, mwa kosɛka na ye epesaka bango makasi. Ayebisaka baboti na ye ná ndeko na ye ya mobali ete: “Bomoi na mokili ya sika ekofuta bampasi nyonso oyo tozali komona lelo.”

Silvia asakwelaka basusu nsango malamu ya Liloba ya Nzambe ntango nyonso, mpe bato oyo asololaka na bango bamonaka ete elongi na ye engɛngaka mpenza na esengo. Na lisangá oyo ayanganaka na Bisanga Canaries, bandeko basepelaka mpe mingi ntango bayokaka biyano mpe masolo na ye na makita. Soki makita esili, Silvia awelaka kozonga te, asololaka na bandeko. Lokola asololaka na moto nyonso mpe azalaka ntango nyonso esengoesengo, bandeko nyonso ya lisangá balingaka ye.

Tata na ye, Antonio alobi ete: “Silvia apesi biso liteya moko ya ntina mpenza. Ata soki tozali na mikakatano, bomoi ezali likabo ya Nzambe, mpe tosengeli kosepelaka na yango.” Lokola Silvia, basaleli nyonso ya Nzambe, bilenge ná mikóló, bazali kozela na motema likoló ntango oyo “Mofandi moko akoloba te ete: ‘Ngai nazali na maladi.”​—Yisaya 33:24.

[Elilingi na lokasa 31]

Silvia azali kotánga vɛrsɛ mpe mama na ye asimbeli ye masini na ye ya mpema

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto