Mangomba ekotya kimya na mokili?
NA MOKOLO ya 28 tii na mokolo ya 31 Augusto 2000, bato koleka 500 oyo bautaki na mikili 73 bakendaki na New York. Bakutanaki na ndako monene ya ONU na “Likita ya bakonzi ya mangomba mpo na kimya na mokili mobimba na milɛnɛrɛ ya sika.” Bakonzi ya mangomba ndenge na ndenge, basusu balataki bikɔti oyo ezali lokola elamba balingi na motó, basusu balataki bazambala ya langi ya mosaka, bamosusu balataki bikɔti etondi na bansala ya ndɛkɛ, mpe bamosusu bazipaki bilamba moindo na motó. Ezalaki na bato ya Lingomba ya Baha’ie, ya Bamizilma, ya Bayuda, ya Bouddha, ya Hindu, ya Jaïn, ya Shinto, ya Sikh, ya Tao, ya Zoroastre, mpe ya mangomba ya boklisto.
Mikolo mibale ya liboso, bango nyonso bakutanaki na ndako monene ya ONU mpo na likita yango oyo eumelaki mikolo minei. Likita yango ebongisamaki na ONU te, kasi na masangá mosusu ndenge na ndenge. Atako bongo, bakambi ya ONU na bakonzi ya mangomba balobaki ete ezali na ntina bápesana mabɔkɔ mpo na kosilisa bobola, koyinana kati na bato oyo bakeseni na mposo, kobebisa mopɛpɛ, bitumba, mpe kosala mindoki oyo ezali koboma ebele ya bato.
Bato oyo bazalaki na likita yango batyaki sinyatili na mokanda moko oyo likoló na yango bakomi ete “Boyokani mpo na kimya na mokili mobimba.” Atako na kati ya mokanda yango bandimi ete mobulu mpe bitumba “ezali ntango mosusu kosalema na nkombo ya lingomba,” mokanda yango elobi mpe ete bato oyo batyaki sinyatili “bakosala elongo na ONU . . . mpo na koluka kimya.” Kasi, bazwaki ekateli moko te mpo na ndenge oyo basengeli mpenza kosala mpo na koluka kimya yango.
Na mokolo ya mibale, na maloba na ye ya nsuka, Bawa Jain, oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ya likita yango, alobaki ete eleki mwa bambula amonaki liyemi moko na biro monene ya ONU. Ezalaki na moto oyo azalaki molai koleka ndako molai ya biro ya ONU. Moto yango azalaki kobɛta na ndako yango molai lokola nde azali kobɛta na ekuke. Na nse ya liyemi yango bakomaki maloba oyo: “Mokonzi ya Kimya.” Mr. Jain alobaki ete: “[Liyemi yango] esimbaki mpenza motema na ngai ntango namonaki yango. Natunaki ndimbola na [yango] epai ya bato ndenge na ndenge. Nabanzi ete lelo oyo nazwi eyano. Ndenge oyo bino bakonzi ya mangomba ya mokili mobimba boyangani na esika oyo emonisi ngai ete [bino] nde mokonzi ya kimya oyo azali kobɛta na ekuke ya ONU.”
Biblia ezali koteya likanisi mosusu. Biblia ezali komonisa ete Mokonzi ya Kimya ezali Yesu Klisto. Ye akotya kimya na mokili mobimba, na milende ya bakonzi ya politiki to ya mangomba te, kasi na nzela ya Bokonzi ya Nzambe. Ezali Bokonzi yango—guvɛrnɛma ya Nzambe kuna na likoló—nde ekosangisa bato ya botosi esika moko mpe ekokokisa mokano ya Nzambe awa na mabele.—Yisaya 9:6; Matai 6:9, 10.