Paulo abongisi ndenge ya kopesa makabo mpo na kosunga babulami
MATOMBA ya elimo ezalaka na ntina mingi na miso ya baklisto ya solo. Atako bongo, bamibanzabanzaka mpe mpo na matomba ya mosuni ya bato mosusu. Mbala mingi basalisaki baoyo bazali na mikakatano. Bolingo mpo na bandeko etindaka baklisto básalisa bandeko na bango oyo bazali kokelela.—Yoane 13:34, 35.
Bolingo oyo ntoma Paulo azalaki na yango mpo na bandeko na ye na elimo etindaki ye azwa bibongiseli mpo na kokɔngɔla makabo na masangá oyo ezalaki na bitúká ya Akaya, Galatia, Makedonia mpe Azia. Mpo na nini asalaki yango? Ndenge nini abongisaki lisungi yango? Ndenge nini bandeko bayambaki bibongiseli wana? Mpe makambo oyo elekaki etali biso na nini?
Makambo oyo ezalaki na lisangá ya Yelusaleme
Nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., Bayuda na baprozelite oyo bautaki bipai mosusu mpe bakómaki bayekoli na mokolo ya Pantekote batikalaki mpo na mwa ntango na Yelusaleme mpo na koyekola makambo mosusu etali losambo ya solo. Bandeko na bango bandimi oyo bazalaki kofanda na engumba yango bandimaki kosalisa baoyo bazangaki makoki ya komileisa mpo na mikolo oyo batikalaki lisusu na Yelusaleme. (Misala 2:7-11, 41-44; 4:32-37) Bayuda oyo bazalaki koluka ete ekólo na bango ezwa lipanda batombokaki mpe basalaki mobulu oyo ebakisaki kokelela ya bayekoli. Yango wana, mokolo na mokolo bazalaki kokabolela basi-bakufeli-mibali oyo bakelelaki biloko mpo ete ata moyekoli moko te ya Klisto akufa nzala. (Misala 6:1-6) Elode akómaki konyokola baklisto, mpe na katikati ya bambula ya 40 T.B. nzala ekɔtaki na Yudea. Ekoki kozala ete mpo na bayekoli ya Yesu, makambo nyonso wana ezali yango oyo Paulo abengaki “bolɔzi,” “minyoko,” mpe ‘kobɔtɔlama ya biloko na bango.’—Baebele 10:32-34; Misala 11:27–12:1.
Soki na mobu 49 T.B., mpasi ezalaki kaka. Yango wana, nsima ya kopesa Paulo nzela ete asakola mingimingi epai ya bapakano, Petelo, Yakobo na Yoane balendisaki ye ete ‘akanisa babola.’ Paulo asalaki molende mpo na kosala likambo yango.—Bagalatia 2:7-10.
Bibongiseli mpo na kokɔngɔla makabo
Paulo atambwisaki makambo mpo na koyanganisa mbongo mpo na kosunga baklisto ya Yudea oyo bazalaki babola. Soki na mobu 55 T.B., ayebisaki Bakolinti ete: “Mpo na kokɔngɔla makabo na ntina na Babulami, [lokola] nalakisaki [masangá, NW] ya Galatia, ekoki na bino kosala bobele bongo. Na mokolo ya Yenga, moko na moko na bino akaba mpe abatela eloko ye moko kati na yango esili ye kozwa . . . [Bongo] nakotinda bango bakolobelama na mokanda na bino ete bámema likabo na bino na Yelusaleme.” (1 Bakolinti 16:1-3) Mbula moko na nsima, Paulo alobaki ete masangá ya Makedonia na ya Akaya ezalaki mpe kopesa mabɔkɔ mpo na lisungi wana. Lokola na ntango batindaki makabo nyonso na Yelusaleme bato oyo bautaki na Azia bazalaki wana, emonisi ete ekoki mpenza kozala ete masangá ya bamboka wana epesaki mpe makabo.—Misala 20:4; 2 Bakolinti 8:1-4; 9:1, 2.
Basɛngisaki moto moko te ete apesa makabo oyo eleki makoki na ye. Kutu, nyonso esalamaki mpo na kokokanisa mpo ete bozwi ya bamosusu esunga kozanga ya babulami oyo bazalaki na Yelusaleme mpe na Yudea. (2 Bakolinti 8:13-15) Paulo alobaki ete: “Moto na moto asala lokola akanisi na motema na ye, na komitungisa te mpe na kotindikama te, mpamba te Nzambe alingaka ye oyo apesaka na esengo.”—2 Bakolinti 9:7, NW.
Ntoma amonisaki Bakolinti ntina oyo basengelaki kokaba. Yesu ‘akómaki mobola mpo na bango ete bázala bazwi’ na elimo. (2 Bakolinti 8:9) Na ntembe te, bango mpe basengelaki komekola elimo na ye ya kokaba. Lisusu, lokola Nzambe, “na ndenge nyonso ya kokaba” azalaki kopesa bango bozwi, ebongaki ete bápesa lisungi mpo na kokokisa bamposa ya babulami.—2 Bakolinti 9:10-12, NW.
Elimo ya baoyo bapesaki makabo
Tokoki koyekola makambo mingi mpo na kokaba na motema na biso moko soki totaleli elimo ya baoyo bapesaki makabo mpo na kosunga babulami na ekeke ya liboso. Bakɔngɔlaki makabo kaka mpo na kolakisa te ete bazali komibanzabanza mpo na bandeko na bango basaleli ya Yehova oyo bazalaki babola. Emonisaki mpenza ete bondeko ezalaki na kati ya Bayuda oyo bakómaki baklisto na baklisto ya bikólo mosusu. Lokola bamosusu bapesaki mpe bamosusu bandimaki kozwa makabo, yango emonisi ete bomoko mpe boninga ezalaki na kati ya Bayuda na bato ya bikólo mosusu oyo babongwanaki. Lisungi na bango ezalaki na biloko ya mosuni mpe na elimo.—Baloma 15:26, 27.
Ekoki kozala ete na ebandeli Paulo asɛngaki te na baklisto ya Makedonia ete bápesa makabo mpamba te, bango mpe bazalaki na bobola makasi. Kasi, ‘basɛngaki na etingya ete bápesa bango libaku ya kokaba.’ Atako bazalaki na kati ya “komekama makasi mpe na mpasi,” kasi bapesaki na esengo mpenza, “koleka ata makoki na bango”! (2 Bakolinti 8:1-4, NW) Ekoki kozala ete komekama oyo elekaki makasi mpo na bango ezalaki ete bazalaki kofunda bango ete bazali na losambo oyo Loma epekisi. Yango wana, tokoki komona ete bazalaki komitya na esika ya bandeko na bango ya Yudea oyo mpe bazalaki konyokwama lokola bango.—Misala 16:20, 21; 17:5-9; 1 Batesaloniki 2:14.
Atako Paulo alobelaki molende oyo Bakolinti bazalaki na yango na ebandeli mpo na kopesa makabo mpo na kolendisa bandimi ya Makedonia, kasi nsai wana ya Bakolinti ekitaki. Nde na nsima, ntoma alobelaki bokabi ya bandimi ya Makedonia mpo na kolendisa Bakolinti. Amonaki ete ekozala malamu alamuisa makanisi na bango ete ntango ekoki mpo básukisa likambo oyo babandaki mbula moko liboso. Likambo nini esalemaki?—2 Bakolinti 8:10, 11; 9:1-5.
Tito abandaki kokɔngɔla makabo na Kolinti, kasi makambo oyo elekaki kuna elɛmbisaki ye. Nsima ya kotalela likambo yango na Paulo na Makedonia, Tito azongaki na Kolinti elongo na bandeko mibale mpo na kolendisa bandeko ya lisangá ya Kolinti mpe kosilisa kokɔngɔla makabo. Ekoki kozala ete bato mosusu bakanisaki ete Paulo alukaki kolya makabo na bango. Ntango mosusu, yango esalaki ete Paulo atinda bato misato mpo básilisa likambo ya kokɔngɔla makabo mpe asɛngaki ete bátyela bango motema. Paulo alobaki boye: “Tozali kokeba ete moto te akweisa biso mpo na mosala na biso na kobongisa [makabo, NW] oyo minene. Mpo tolingi kosala yango ezali malamu bobele na miso ya Nkolo te nde na miso na bato lokola.”—2 Bakolinti 8:6, 18-23; 12:18.
Bamemi makabo na Yelusaleme
Na ebandeli ya eleko ya molunge ya mobu 56 T.B., basangisaki mbongo nyonso oyo bazwaki mpo bámema yango na Yelusaleme. Paulo asengelaki kokenda elongo na bato oyo masangá oyo epesaki makabo wana eponaki. Na Misala 20:4, tozali kotánga boye: “Bato bakei na ye, Sopatele mwana na Pulu, moto ya Beloya; na Alisitalaka na Sekundu, bato ya Tesaloniki; na Gayo, moto ya Delebe; na Timote; na Tukiko na Tolofimi, bato ya Azia.” Na ntembe te, Luka mpe azalaki, ntango mosusu, ye azalaki momonisi ya baklisto ya Filipi. Boye, bato libwa to koleka basalaki mobembo wana.
Dieter Georgi, molimboli moko ya Biblia, alobi boye: “Ekoki mpenza kozala ete mbongo nyonso oyo bakɔngɔlaki ezalaki mpenza mingi mpamba te milende nyonso oyo Paulo na ebele ya batindami basalaki, elingaki kozala na ntina te soki ezalaki bongo te.” Bato oyo nyonso basalaki mobembo wana kaka mpo na kobatela mbongo wana te, kasi bazalaki mpe wana mpo na nsima báloba te ete Paulo abubi bandeko. Batindami bautaki na masangá ya bato ya bikólo mosusu mpo na komonisa masangá na bango na miso ya babulami na Yelusaleme.
Soki bakendaka na nzela ya mai, longwa na Kolinti tii Sulia, balingaki kokóma na Yelusaleme na ntango ya Elekeli. Kasi, ntango bayokaki ndungundungu ete bazali kokanela Paulo mpo báboma ye, bakendaki na nzela mosusu. (Misala 20:3) Ntango mosusu, banguna na ye bazalaki na mokano ya kobwaka ye na mbu.
Ezalaki na makambo mosusu oyo ezalaki kotungisa Paulo. Liboso ya kosala mobembo, akomelaki baklisto oyo bazalaki na Loma ete bábondela mpo ete ‘abika longwa na bato bazangi kondima kati na Yuda, mpe ete mosala na ye na Yelusaleme moyambama na babulami.’ (Baloma 15:30, 31) Na ntembe te, atako babulami balingaki koyamba makabo wana na botɔndi mpenza, kasi Paulo azalaki ntango mosusu komibanzabanza mpo na mobulu oyo koya na ye ekokaki kobimisa na kati ya Bayuda nyonso.
Na ntembe te, ntoma azalaki kokanisa babola. Atako Makomami eyebisi te ntango oyo bapesaki makabo yango, kasi kokóma na yango na mabɔkɔ ya baoyo basengelaki na yango ekolisaki bomoko. Epesaki mpe nzela na baklisto ya bikólo mosusu bámonisa botɔndi na bango epai ya bandeko na bango baklisto ya Yudea mpo na bozwi ya elimo oyo bazwaki epai na bango. Ntango bato bamonaki Paulo na tempelo, mwa moke na nsima ya koya na ye na Yelusaleme, mobulu ebimaki mpe bakangaki ye. Kasi, nsukansuka, kokangama na ye epesaki ye libaku ya kotatola liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe liboso ya mikonzi.—Misala 9:15; 21:17-36; 23:11; 24:1–26:32.
Makabo na biso lelo oyo
Banda na ekeke ya liboso tii lelo oyo, makambo mingi ebongwani, kasi mitinda ya Biblia ebongwani te. Bayebisaka baklisto polele soki mposa ya mbongo ezali. Makabo nyonso oyo basali mpo na baoyo bazali kokelela esengeli kosalema na motema malamu mpe mpo balingi Nzambe mpe bazalani na bango.—Malako 12:28-31.
Bibongiseli oyo bazwaki mpo na kosunga babulami na ekeke ya liboso emonisi ete makabo motindo wana esengeli kobongisama malamu mpe nyonso esengeli kosalema na bosembo mpenza. Ya solo, Yehova Nzambe ayebi bamposa na biso, mpe azali kosunga basaleli na ye mpo bálanda kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato mosusu ata mikakatano ezali. (Matai 6:25-34) Atako bongo, ozala mobola to mozwi, okoki mpe kopesa lisungi na yo. Na ndenge yango, ‘moto oyo azali na mingi, akozala na mingi koleka te, mpe moto oyo azali na moke, akozala na moke koleka te.’—2 Bakolinti 8:15, NW.