Baboti: Bókokisa bamposa ya bana na bino!
BANA bazalaka na mposa ya toli mpe disipilini oyo bazali kopesa bango na bolingo, mingimingi oyo baboti bapesaka bango. Na ntina yango, Tania Zagury, molakisi moko ya mboka Brésil alobi: “Mposa ya mwana nyonso ezalaka ya koluka kosepela. Ezali na ntina kotyela bango bandelo. Baboti nde basengeli kotya bandelo yango. Soki bandelo ezali te, bana bakobeba.”
Nzokande, na bamboka mingi, lokola bato bazali kokanga miso na makambo mingi mpe bazali kosɛnga ete moto na moto azala na bonsomi, yango ezalii kosala ete baboti bálanda batoli wana te. Bongo, epai wapi baboti bakoki kozwa lisalisi? Baboti oyo babangaka Nzambe bayebi ete bana na bango bazali “Likabo na [Yehova].” (Nzembo 127:3). Yango wana, bazali kotika ete Biblia, Liloba ya Nzambe, eteya bango mpo na kobɔkɔla bana na bango. Na ndakisa, Masese 13:24 elobi: “Ye oyo aboyi fimbo abebisi mwana na ye, kasi ye oyo alingi ye akopesa ye etumbu na ntango ekoki.”
Liloba “fimbo” na kati ya Biblia elimboli kaka etumbu te; ezali elilingi ya lolenge ya kosembola mwana; ezala kosembola ya ndenge nini. Ya solo, mbala mingi, kaka maloba ekoki mpo na kolongola mwana na nzela ya mabe. Masese 29:17 elobi: “pamelá mwana na yo mpe akopesa yo kimya; ɛɛ akosepelisa mpe molimo na yo.”
Bana bazali na mposa ya disipilini oyo bazali kopesa bango na bolingo mpenza mpo na kolongola bizaleli ya mabe. Disipilini ya ndenge wana oyo epesami na lisɛki te kasi na boboto, ekomonisa ete moboti azali komibanzabanza mpo na mwana na ye. (Masese 22:6) Yango wana baboti, bólɛmba te! Bólanda batoli ya mayele oyo euti na Biblia, bokosepelisa Nzambe mpe bokozwa limemya ebongi epai ya bana na bino.