Mituna ya batángi
Ndenge nini mwasi moklisto akoki kozala na bokatikati na ntina etali bosembo na ye epai ya Nzambe mpe botosi epai ya mobali na ye oyo azali moklisto te, soki mobali yango asalaka bafɛti ya mangomba?
Mpo na kozala na bokatikati esengeli azala na mayele. Kasi ezali mpenza malamu wana azali kosala makasi ete azala na bokatikati na ntina etali kotosa Nzambe mpe mobali na ye. Yesu apesaki toli moko oyo ekokani na likambo yango: “pesá na Kaisala yango ezali na Kaisala mpe na Nzambe yango ezali na Nzambe.” (Matai 22:21) Ezali solo ete azalaki kolobela makambo oyo moto asengeli kotosa Leta, oyo na nsima baklisto basengelaki kotosa yango. (Baloma 13:1) Atako bongo, toli ya Yesu ezali mpe kotalela mwasi oyo asengeli kozala na bokatikati na makambo oyo asengeli kotosa na yango Nzambe mpe makambo oyo asengeli kotosa mobali na ye na kotalela Makomami, ata soko mobali yango azali moklisto te
Moto moko te oyo atángaka Biblia akoki kotya ntembe ete Biblia emonisi polele te mokumba ya liboso ya moklisto oyo ezali bongo kozala sembo epai ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, kotikala ntango nyonso sembo epai na ye. (Misala 5:29) Nzokande, na makambo mingi mosaleli ya solo ya Nzambe akoki koyokanisa bamposa ya mobali na ye to makambo oyo mokonzi na ye oyo azali moklisto te azali kosɛnga soki ezali te kobuka mibeko ya likoló ya Nzambe
Tokokuta ndakisa kitoko epai ya Baebele misato, oyo balobelami na Daniele mokapo ya 3. Nebukadanesala, mokonzi ya Leta oyo azalaki liboso na bango, apesaki etinda ete bango mpe bato mosusu bakende komimonisa na esobe ya Dula. Lokola Baebele wana misato bayebaki ete losambo ya lokuta ebongisamaki kuna, mbala mosusu bakokaki komona malamu ete bazala kuna te. Ntango mosusu Danyele azalaki na likoki ya kosɛnga nzela ete azala kuna te, kasi baninga na ye misato bakokaki kosala bongo te.a Yango wana, batosaki etinda ya kokende na liyangani yango, kasi baboyaki kosangana na likambo nyonso ya mabe mpe kutu basanganaki na yango te.—Danyele 3: 1-18.
Ndenge moko mpe, na ntango ya bafɛti ya mokili, mobali oyo azali moklisto te akoki kosɛnga mwasi na ye moklisto ete asala likambo oyo aboyaka kosala yango. Tokamata ndakisa: Ayebisi mwasi na ye ete alamba biloko ya kolya mokolo oyo ye mpe bato mosusu bakokumisa fɛti moko. Akoki mpe koloba ete libota na ye (elongo na mwasi na ye) bakende kotala baboti na ye na mokolo wana mpo na kolya to kaka mpo na kotala bango. Kutu, ata liboso ya fɛti yango, mobali akoki koyebisa mwasi na ye ete ntango akei kosomba biloko ya kolya, asengeli kosombela ye mwa biloko mosusu, lokola biloko ya kolya oyo ezali bobele mpo na fɛti, biloko ya kopesa makabo, to mpe lokasa ya kitoko oyo bazingaka na yango biloko oyo bakopesa makabo na bakalati oyo basalelaka mpo na kopesa makabo.
Na yango mwasi moklisto asengeli kozwa ekateli ete asangana te na misala ya mangomba ya lokuta, kasi akosala nini na makambo oyo mobali na ye asɛngi ete asala? Mobali azali motó na libota, mpe Liloba ya Nzambe elobi: “bino basi, bótosaka mibali na bino, lokola ebongi kati na Nkolo.” (Bakolose 3:18) Na makambo yango, akoki komonisa botosi oyo esengeli ete mwasi azala na yango epai ya mobali na ye nzela moko na bosembo na ye epai na Nzambe? Asengeli kokanisa ndenge ya komonisa bokatikati na oyo etali botosi epai ya mobali na ye mpe botosi libosoliboso epai na Yehova.
Na bantango ya bafɛti te, mobali na ye akoki kosɛnga na ye ete alamba biloko ya kolya ya lolenge moko boye, ezala mpo ete biloko yango emonanaka bobele na eleko wana to mpo ete mobali na ye alingaka yango mingi. Mwasi akolinga komonisa ete alingaka mobali na ye mpe atosaka bokonzi na ye. Akotosa mobali na ye ata soki asɛngi na ye ete alamba biloko ya kolya yango mokolo moko ya fɛti? Basi baklisto mosusu bakoki kosala bongo mpe na lisosoli malamu, komona yango lokola mwa mosala moko ya kolamba biloko ya kolya lokola basalaka yango mikolo nyonso. Ya solo, moklisto ya sembo moko te akoki kokanisa ete azali kosangana na fɛti, ata soki mobali na ye azali kosala bongo. Ezali ndenge moko mpe, soki mobali na ye asɛngi na ye ete bakende elongo mpo na kotala libota na bantango ekeseni sanza nyonso to mbula nyonso. Akoki kosala yango ata soki ezali mokolo ya fɛti? To mpe ntango azali kosomba biloko akoki kosomba na motema moko biloko oyo mobali asɛngi, kozanga ete ayeba biloko oyo mobali asɛngi soki mokano na ye ezali ya kosala na yango nini?
Ya solo, mwasi moklisto asengeli kokanisa soki bato mosusu bakokanisa nini mpo na yango. (Bafilipi 2:4) Asengeli te kopesa basusu likanisi ete ye mpe azali kosangana na fɛti, ndenge Baebele misato mbala mosusu basepelaki te ete bato mosusu bamona bango ntango bazali kokende na esobe ya Dula. Yango wana, asengeli komeka kosolola na mobali na ye na mayele nyonso mpo na komona soki, mpo na komemya makanisi ya mwasi na ye , mobali akoki kosala makambo mosusu ya fɛti ye moko. Na ndenge yango mobali akomonisa ete alingi kosepelisa mwasi na ye oyo alingaka ye mpe atosaka ye. Akoki kososola ete soki mwasi na ye akoboya kosala makambo ya mangomba ya lokuta, ekoki kozala nsɔni mpo na bango nyonso na miso ya bato. Ya solo, bakoki kolonga mokakatano yango na kimya soki basololi liboso na boboto nyonso. (Masese 23:3)
Na nsuka, moklisto ya sembo nde asengeli komeka kotala malamumalamu makambo nyonso mpe koyeba nini asengeli kosala. Libosoliboso, asengeli kotosa Nzambe, lokola Baebele misato basalaki. (1 Bakolinti 10:31) Na kobateláká likambo yango na makanisi, moklisto ye moko akoyeba makambo nini akondima kosala na oyo basɛngi ye, soki ebuki mibeko ya Nzambe te, ndenge esɛngami epai na moto oyo azali na bokonzi kati na libota to kati na mboka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya 1 Augusto, 2000.