Kozala na bazalani ya malamu ezali mpenza malamu
“Mozalani [oyo azali] penepene aleki ndeko [oyo azali] mosika na malamu.”—Masese 27:10.
MOTO moko ya mayele na ekeke ya liboso atunaki Yesu boye: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Yesu alobaki na ye te soki nani azali mozalani na ye, kasi likambo oyo emonisaka ete moto azali mozalani ya solo. Ntango mosusu oyebi lisese yango ya Yesu malamu. Bato mingi babengaka yango lisese ya Mosamalia malamu, mpe ezali na Evanzile ya Luka. Yoká ndenge Yesu abɛtaki lisolo yango:
“Moto moko azalaki kokita banda na Yelusaleme mpo na kokende na Yeliko mpe akweaki na kati ya babandi, oyo babɔtɔlaki ye nyonso mpe babɛtabɛtaki ye, mpe bakendaki, batikaki ye penepene na liwa. Nzokande, na mbala moko kaka boye, nganga-nzambe moko azalaki kokita na nzela yango, kasi, ntango amonaki ye, alekaki na ngámbo mosusu. Ndenge moko mpe, Molevi moko lisusu, ntango akitaki na esika yango mpe amonaki ye, alekaki na ngámbo mosusu. Kasi Mosamalia moko azalaki koleka na nzela yango akómaki pembeni na ye mpe, ntango amonaki ye, mawa ekangaki ye. Bongo apusanaki pene na ye mpe akangaki bampota na ye, kosopeláká yango mafuta mpe vinyo. Boye amatisaki ye likoló ya nyama na ye moko mpe amemaki ye na ndako ya bato ya mobembo mpe abatelaki ye. Mpe na mokolo oyo elandaki abimisaki denali mibale, apesaki yango na mobateli ya ndako ya bato ya mobembo, mpe alobaki ete, ‘Batelá ye, mpe nyonso oyo okobimisa likoló ya oyo, nakozongisela yo yango ntango nakozonga awa.’ Mpo na yo nani na kati na bango misato amimonisi mozalani ya moto oyo akweaki na kati ya babandi?”—Luka 10:29-36.
Na ntembe te, moto yango ya mayele akangaki ntina ya lisese yango. Kozanga kokakatana, alimbolaki malamu nani oyo amimonisaki ete azali mozalani ya moto oyo bazokisaki: “Oyo amimonisaki moto ya motema mawa epai na ye.” Yesu ayebisaki ye nsima ete: “Kende mpe yo moko salá se bongo.” (Luka 10:37) Tomoni ete lisese yango emonisi mpenza ndimbola ya kozala mozalani ya solo! Lisese ya Yesu ekoki mpe kotinda biso na komituna mituna oyo: ‘Nazalaka mozalani ya ndenge nini? Natalelaka loposo na ngai to ekólo na ngai mpo na kopona nani akoki kozala mozalani na ngai? Makambo ya lolenge wana ezali kopekisa ngai nasalela moto nyonso oyo namoni ete azali na mikakatano? Nasalaka makasi mpo na kozala mozalani ya malamu?’
Tosengeli kobanda wapi?
Soki tomoni ete tosengeli kobongisa mwa moke na esika wana, tokobanda naino na makanisi na biso. Tosengeli komibanzabanza mpo tózala bazalani ya malamu. Yango ekosalisa biso tózala na bazalani ya malamu. Eleki pene na bambula nkóto mibale, Yesu amonisaki motinda yango ya ntina mingi oyo etali ndenge ya kofanda malamu na bato mosusu na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba. Alobaki boye: “Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Soki omemyaka bato mosusu, opesaka bango lokumu, mpe omoniselaka bango boboto, yango ekolendisa bango básalela yo mpe bongo.
Na lisolo “Ndenge ya kolinga bazalani na yo” oyo akomaki na zulunalo moko (The Nation Since 1865), Lise Funderburg, ye azali mopanzi-nsango mpe akomaka babuku, alobelaki mwa makambo ya mikemike oyo bato oyo bafandaka penepene bakoki kosala mpo na kozala baninga ya malamu. Akomaki ete: “Nalingi . . . ete bato oyo bafandaka penepene básalisanaka na mwa makambo mingi ya mikemike oyo ekomonisa boboto—na ndakisa komemela moto zulunalo na ye, kokɛngɛla bana, kosombela moto eloko na magazini. Nalingi ete bato básalisanaka ndenge wana na mokili oyo bato bakómi moto na moto na ndenge na ye mpe na makambo na ye, epai bakartye ekómi kobeba likoló ya kobangana mpe kobomana.” Na nsima abakisaki ete: “Osengeli kobanda esika moko boye. Mpe mpo na nini te kobanda na moto oyo bokangani mapango to bandako.”
Zulunalo moko (Canadian Geographic) epesaki mpe likanisi ya malamu oyo ekoki kosalisa bato oyo bafandaka penepene bákóma na makanisi ya malamu na kati na bango. Mokomi Marni Jackson alobaki boye: “Se ndenge toponaki te libota na biso, ndenge moko mpe toponaka te bato oyo tofandi na bango penepene. Mpo na kofanda na bato malamu, esengeli kozala na mayele, kozala na bonkonde, mpe kondima ete básala makambo mosusu na ndenge oyo ekeseni na ndenge biso tosalaka.”
Bazalani ya malamu bakabelanaka
Ya solo, mingi kati na biso bakoki koyoka kilo mpo na kosolola na bato mosusu oyo bafandi na bango penepene. Bakoki komona ete ezali likambo ya pɛtɛɛ koboya kokutana na bango mpe kofanda kaka na ndako. Nzokande, Biblia elobi ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Na yango, mozalani ya malamu asalaka makasi mpo na komesana na bato oyo bafandi na esika ye afandi. Ata soki mposa na ye ezali te ya kokóma moninga na bango ya motema, kasi asalaka makasi mpo na kosolola na bango mwa moke mbala na mbala, ntango mosusu akobanda kaka na mwa kosɛka to na kopɛpa bango mbote.
Ndenge elobamaki liboso, “mwa makambo mingi ya mikemike ya boboto” oyo bazalani basalelanaka ezali na ntina mingi mpo na kobanda mpe kobatela boninga kati na bato oyo bafandi penepene. Yango wana, ezali malamu koluka kosalela moto oyo afandaka penepene na yo makambo ya mikemike na boboto, mpamba te, yango ememaka kosalisana mpe kopesana limemya. Lisusu, soki tozali kosala bongo, tokolanda toli ya Biblia oyo elobi ete: “Boyá kosalela bato malamu te baoyo bakoki kozwa yango, wana lobɔkɔ na yo ezwi mposa ya kosala bongo.”—Masese 3:27; Yakobo 2:14-17.
Bazalani ya malamu bapesanaka matɔndi
Soki bato nyonso bázalaka na ezaleli ya kopesa botɔndi ntango basalisi bango to bakabeli bango eloko, elingaki kozala malamu mpenza. Kasi, ezalaka ntango nyonso bongo te. Bato mingi oyo basalisaki moto mosusu to bakabelaki ye eloko na makanisi ya malamu mpenza, bazongiselaki bango botɔndi ata moke te; mpe yango etindi bato yango báloba na mitema na bango ete ‘mbala ya nsuka nasala yango!’ Ntango mosusu, ata soki osali milende nini mpo na kopesa bato oyo ofandi na bango penepene mbote na boboto nyonso mpe kopɛpa bango lobɔkɔ, bazongisaka kaka mwa mbote moko ya esengo te.
Kasi mbala mingi, moto oyo tozali kosalela ye makambo yango azangi botɔndi te, atako ekoki komonana bongo. Ntango mosusu, ndenge ameseni ezali kotinda ye akakatana mwa moke to ayoka nsɔni to asala makambo oyo bato bakoki kokanisa ete akipaka bato te. To mpe, lokola tofandi na mokili oyo bato bamonisanaka botɔndi te, ekoki kozala ete bato mosusu bakoki komona yo moto ya ndenge mosusu ntango ozali kotyela bango likebi, bakoki kutu kozwela yo makanisi ya mabe. Ekoki kosɛnga omonisa bango ete basengeli kobanga eloko te. Elingi koloba ete koyokana na bazalani na biso ekoki kozwa ntango molai mpe esɛngaka kozala na motema molai. Atako bongo, soki bato oyo bafandi esika moko bakómi kokabelana mpe komonisana botɔndi, bakozala na kimya mpe na esengo.
Ntango likama ekwei
Na ntango ya likama nde mozalani ya malamu azalaka na ntina mingi koleka. Kozala mozalani ya malamu emonanaka mpenzampenza na ntango likambo ekwei. Ezali na masolo ebele oyo elobelaka makambo ya malamu oyo bazalani mosusu basalelá bato oyo bafandi na bango penepene na ntango ya makama. Likama oyo ekweli bato nyonso etindaka bato oyo bafandi esika moko bápesana mbala moko mabɔkɔ mpe moto na moto asala makasi mpo na kosalisa baninga. Mbala mingi, ata baoyo bayokanaka te basalaka elongo.
Na ndakisa, zulunalo moko (The New York Times) elobi ete ntango mabele eninganaki na ekólo Turquie na 1999, bato oyo bazalaki banguna banda kala basalisanaki. Anna Stergiou, mopanzi-nsango na zulunalo moko ya Athènes, akomaki boye: “Banda bambula mingi, bazalaki koteya biso ete tóyinaka bato ya Turquie. Kasi tozali kosepela ata moke te na mpasi oyo bazali koyoka. Tozalaki na mawa mpe tolelaki, lokola nde koyinana oyo ebandá kala esilaki, ntango tomonaki bibembe ya bana mike.” Ntango mosala ya kosunga bato oyo bazwaki makama esilaki, bato ya Grèce oyo bazalaki koluka bato oyo bazalaki naino na bomoi, baboyaki kotika koluka.
Koluka bato oyo bazali naino na bomoi nsima ya makama ezali likambo ya malamu mpe ya mpiko oyo moto akoki kosalela bato oyo bafandi na ye esika moko. Kasi, kokebisa mozalani liboso ya likama mpo na kobikisa bomoi na ye, na ntembe te, eleki makambo nyonso ya boboto oyo okoki kosalela ye. Kasi, makambo oyo eleká ezali komonisa likambo moko ya mawa ete bato basepelaka te na moto oyo azali kokebisa bazalani na ye, mpamba te na ntango oyo azali kokebisa, eloko moko te emonisaka ete likama ezali koya. Mingimingi, bato bandimelaka te bato oyo bakebisaka bango. Kosalisa bato oyo bayebi te ete likama elingi koyela bango, esɛngaka kozala na molende mpe kozala na elimo ya koluka liboso matomba ya bazalani.
Likambo oyo eleki nyonso oyo bazalani bakoki kosalelana
Lelo oyo, likama moko oyo eleki makama nyonso oyo esalemá elingi kokwela bato nyonso ya mokili. Ezali likambo oyo esakolamaki oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akosala mpo na kosilisa kobomana, mabe mpe mikakatano nyonso na mabele. (Emoniseli 16:16; 21:3, 4) Likambo yango ekosalema mpenza solo! Batatoli ya Yehova bazali na mposa makasi ya koyebisa bato ebele mpenza boyebi oyo moto asengeli kozwa mpo na kobika na ntango makambo ya nsɔmɔ ekoningisa mokili. Yango wana basalaka ntango nyonso mosala oyo bayebani na yango mingi ya kosakola na mokili mobimba. (Matai 24:14) Motema na bango moko nde etindaka bango básala yango, mpamba te balingi Nzambe mpe balingi bazalani na bango.
Na yango, kotika te ete makanisi ya mabe to nkanda epekisa yo koyoka Batatoli ntango bayei kotala yo na ndako to na esika mosusu. Balingi nde komonisa ete bazali bazalani ya malamu. Yango wana, tolendisi yo ondima koyekola Biblia soki basɛngi yo oyekola na bango. Yekolá makambo oyo ezali na Liloba ya Nzambe oyo ezali kondimisa biso ete etikali moke bato nyonso oyo bafandi esika moko báfanda na esengo. Na ntango wana, kokesana mposo, lingomba to makambo ya bomoi ekobebisa lisusu te boyokani kati na bato oyo bafandi esika moko, ndenge oyo mingi kati na biso tolingaka ete ezala.
[Bililingi na lokasa 7]
Ezali malamu kosalela bato oyo bafandi penepene na yo makambo ya boboto
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mokili: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.