Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/10 lok. 3
  • Nguya ya mabe nde ezali kosala mosala?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nguya ya mabe nde ezali kosala mosala?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Malamu ekolónga mabe mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Malamu na mabe: Etumba oyo eumeli bikeke mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nini ekómisaka biso bato malamu to bato mabe?
    Lamuká!—2010
  • Nani mpenza azali koyangela mokili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/10 lok. 3

Nguya ya mabe nde ezali kosala mosala?

“Mokili ekómi na kizunguzungu, ezali lokola nde nguya oyo ezali komonana te ezali kosala nyonso mpo na kokanga bato na boombo.”​—⁠Jean-Claude Souléry, mopanzi-nsango.

‘Lokola moto azali kokoka kosilisa mikakatano na ye te, ezali kotinda ye na kokanisa ete nguya moko ya mabe ezali kosala mosala.’​—⁠Josef Barton, moto ya mayele na makambo ya kala.

LIKAMBO ya nsɔmɔ oyo bato ya mobulu basalaki na mokolo ya 11 Sɛtɛmbɛ 2001 na États-Unis etindaki bato na kokanisa mingi. Michael Prowse akomaki na zulunalo moko (Financial Times) oyo ebimaka na Angleterre ete: “Ata nyama ekoki to ekokoka kosala makambo ya yauli motindo wana te.” Na zulunalo mosusu (The New York Times), bakomaki ete longola komibongisa malamumalamu, “tosengeli mpe kotalela koyina makasi oyo bazalaki na yango mpo na kosala likambo yango. Eleki koyina oyo basoda bazalaka na yango na bitumba, ezali koyina oyo eleki makasi, ezali ata na mawa moke te.”

Bato ndenge na ndenge bazali kokanisa ete ekoki kozala na nguya moko ya mabe nde ezali kosala mosala. Moto moko ya mombongo na Sarajevo, nsima ya komona makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki na mboka Bosnie kati na bato ya bituluka ya mboka yango oyo bazali koyokana te, alobaki ete: “Nsima ya mbula moko oyo bitumba eumeli na Bosnie, nakanisi ete oyo esengeli kozala mosala oyo Satana azali kosala. Ezali mpenza ligboma.”

Ntango batunaki Jean Delumeau, moto ya mayele na makambo ya kala, soki andimaka ete Zabolo azali, ayanolaki ete: “Ndenge nini nakoki koloba ete nguya ya mabe ezali te soki natali makambo oyo ezali kosalema na oyo esili kosalema banda nabotamá? Na ndakisa, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, oyo ebomaki bato koleka milio 40; kaa ya bakangami ya Auschwitz na bakaa mosusu epai babomaki ebele ya bato; ndenge oyo babomaki ebele ya bato na ekólo Cambodge; ndenge oyo prezida Ceauşescu abomaki ebele ya bato; mpe ndenge oyo baguvɛrnɛma mingi na mokili mobimba ezali konyokola bato. Makambo yango ya nsɔmɔ eleki mingi. . . . Yango wana, nakanisi ete tobengaka nyonso wana na ndenge ebongi mpenza ete makambo ‘ya Zabolo,’ elingi koloba te ete makambo yango ezali kouta na Zabolo oyo azali na maseke mpe misapi ya makolo na ye ekabwaná lokola nkanya ya mino mibale, kasi na Zabolo oyo azali elembo ya nguya ya mabe oyo ezali kosala na mokili.”

Lokola Jean Delumeau, bato mingi babengaka makambo ya nsɔmɔ oyo ezali kosalema lelo oyo, banda na kati ya libota tii na bikólo, ete ezali makambo ‘ya Zabolo.’ Kasi yango elingi mpenza koloba nini? Makambo wana ya nsɔmɔ eutaka na nguya mpamba ya mabe, to ezali nde bikelamu mabe oyo ezali kosala mosala, ezali kotinda bato na kosala makambo ya nsɔmɔ oyo moto akoki kosala te? Nguya yango ezali nde kotambwisama na mokonzi ya mabe, Satana Zabolo?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Bana: Fɔtɔ ya U.S. Coast Guard

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto