Yehova atyelaka yo likebi
‘Bwaká mitungisi na yo nyonso likoló na [Nzambe], mpamba te ye atyelaka yo likebi.’—1 PETELO 5:7.
1. Yehova na Satana bakeseni na likambo nini ya monene?
YEHOVA akeseni mpenza na Satana. Satana asepelaka ata moke te na moto nyonso oyo azali pene na Yehova. Buku moko (Encyclopædia Britannica, ebimeli ya 1970) ezali komonisa likambo yango. Na kotalela ndenge mokanda ya Yobo emonisi misala ya Satana, buku yango elobi boye: ‘Satana azali koyengayenga na mabele mpo na koluka misala to mpe bato oyo akokosela bango makambo; na yango, mosala na ye ekeseni mpenza na oyo “miso ya Nkolo” esalaka, mpamba te miso ya Nkolo etalaka bipai nyonso na mabele mpo na kolendisa makambo nyonso ya malamu. (2 Nta. 16:9) Satana andimaka te ete bato bakoki mpenza komonisa motema malamu kozanga koluka matomba na bango moko; batikelá ye nzela ya komeka motema malamu ya bato, kasi kaka na bandelo oyo Nzambe atii.’ Ya solo, bokeseni ezali mpenza monene!—Yobo 1:6-12; 2:1-7.
2, 3. (a) Ndenge nini ndimbola ya liloba “Zabolo” ezali komonana malamu na makambo oyo ekómelaki Yobo? (b) Ndenge nini Biblia ezali komonisa ete Satana azali kotika te kofunda basaleli ya Yehova oyo bazali awa na mabele?
2 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “Zabolo” elimboli “mofundi ya lokuta” to mpe “mokoseli-bato-makambo.” Mokanda ya Yobo ezali komonisa ete Satana afundaki Yobo, mosaleli ya sembo ya Yehova, ete azalaki kosalela Yehova mpo na matomba na ye moko. Satana alobaki boye: “Yobo akotosaka Nzambe bobele mpamba?” (Yobo 1:9) Mokanda ya Yobo ezali komonisa ete Yobo atikalaki kaka pene na Yehova atako amekamaki na makambo ndenge na ndenge. (Yobo 10:9, 12; 12:9, 10; 19:25; 27:5; 28:28) Nsima ya konyokwama na bampasi, alobaki na Nzambe ete: “Nayokaki mpo na yo na koyoka na litoi, nde [sikoyo] miso mamoni yo.”—Yobo 42:5.
3 Nsima ya ntango ya Yobo, Satana atiká nde kofunda basaleli ya sembo ya Nzambe? Te. Mokanda ya Emoniseli ezali komonisa ete na mikolo oyo ya nsuka, Satana azali kotika te kofunda bandeko ya Klisto, elingi koloba baklisto bapakolami; na ntembe te, azali mpe kofunda baninga na bango oyo bazali sembo. (2 Timote 3:12; Emoniseli 12:10, 17) Yango wana, ezali kosɛnga ete biso nyonso baklisto ya solo tótosa Yehova, Nzambe na biso ya boboto, mpe tósalela ye na bolingo ya solosolo mpe na bongo, tómonisa ete Satana azali na lokuta. Soki tozali kosala bongo, tokosepelisa motema ya Yehova.—Masese 27:11.
Yehova alukaka kosalisa biso
4, 5. (a) Yehova alukaka nini oyo Satana alukaka te ntango azali kotala awa na mabele? (b) Soki tolingi ete Yehova asepela na biso, tosengeli kosala nini?
4 Zabolo azali koyengayenga na mabele, azali koluka moto ya kofunda mpe ya kolya. (Yobo 1:7, 9; 1 Petelo 5:8) Nzokande, Yehova alukaka kosalisa baoyo bazali na mposa ya nguya na ye. Mosakoli Hanani alobaki na Mokonzi Asa ete: “Miso ya [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na baoyo bazali na [motema mobimba, NW] liboso na ye.” (2 Ntango 16:9) Yango ezali komonisa ete makanisi ya Satana ekeseni mpenza na oyo ya Nzambe. Satana ayinaka bato; nzokande, Yehova alingaka bato mpe asalelaka bango makambo na boboto!
5 Yehova akɛngɛlaka biso te mpo na kozwa biso na libunga mokomoko oyo tozali kosala. Mokomi ya nzembo akomaki ete: “Soki olandelaka mabunga, Ee Yah, Ee Yehova, nani akoki kotɛlɛma?” (Nzembo 130:3, NW) Eyano ezali ete: moto moko te. (Mosakoli 7:20) Soki topusani penepene na Yehova na motema mobimba, miso na ye ekozala likoló na biso mpo na kotala milende na biso mpe mpo na koyoka mabondeli oyo tozali kosala mpo na kosɛnga ye lisalisi mpe bolimbisi; kasi te mpo na kokweisa biso. Ntoma Petelo akomaki ete: “Miso ya Yehova ezali likoló ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali epai ya lilɔmbɔ na bango; kasi elongi ya Yehova ezali kotɛmɛla baoyo bazali kosala makambo ya mabe.”—1 Petelo 3:12.
6. Na ndenge nini likambo oyo ekómelaki Davidi ezali kobɔndisa biso mpe ezali kokebisa biso?
6 Davidi azalaki moto ya kozanga kokoka mpe asalaki lisumu monene. (2 Samwele 12:7-9) Kasi, ayebisaki Yehova nyonso oyo ezalaki na motema na ye mpe apusanaki penepene na Ye na kati ya libondeli moko oyo eutaki mpenza na motema. (Nzembo 51:1-12 mpe mwa maloba oyo ezali likoló) Yehova ayokaki libondeli na ye mpe alimbisaki ye, atako na nsima Davidi abukaki mbuma mabe ya lisumu na ye. (2 Samwele 12:10-14) Yango esengeli kobɔndisa biso mpe kokebisa biso. Tokoki mpenza kobɔndisama na koyeba ete Yehova asepelaka kolimbisa masumu na biso soki tobongoli mpenza motema, kasi koyeba ete mbala mingi masumu ebimisaka makambo ya mpasi ezali kotinda biso na kokanisa malamu. (Bagalatia 6:7-9) Soki tolingi kopusana penepene na Yehova, tosengeli kozala mosika mpenza na eloko nyonso oyo esepelisaka ye te.—Nzembo 97:10.
Yehova abendaka basaleli na ye epai na ye
7. Yehova atalaka bato ya ndenge nini, mpe ndenge nini abendaka bango epai na ye?
7 Na nzembo moko oyo akomaki, Davidi alobaki ete: “Ata [Yehova] azali likoló, akomonaka baoyo na bopɔlɔ, mpe akososolaka mosika baoyo na [lofundo, NW].” (Nzembo 138:6) Nzembo mosusu emonisi mpe likanisi wana, elobi ete: “Nani akokani na Yehova Nzambe na biso, Ye oyo afandaka na likoló? Azali komikitisa mpo na kotala likoló mpe mabele, azali kotombola oyo moke longwa na mputulu ya mabele.” (Nzembo 113:5-7, NW) Ya solo, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ye oyo azali na nguya nyonso, amikitisaka mpo na kotala awa na mabele, mpe miso na ye emonaka ‘bato oyo bazali na bopɔlɔ,’ ‘bato mike,’ bato oyo ‘bazali kokimela mpe kolela na ntina na makambo nyonso ya mbindo oyo ezali kosalema.’ (Ezekiele 9:4) Abendaka bato yango epai na ye na nzela ya Mwana na ye. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, alobaki ete: “Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te . . . Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata apesi ye nzela te.”—Yoane 6:44, 65.
8, 9. (a) Mpo na nini biso nyonso tosengeli koya epai ya Yesu? (b) Mpo na nini lisiko ezali ebongiseli moko ya malamu mpenza?
8 Bato nyonso basengeli koya epai ya Yesu mpe kondima mbeka oyo apesaki mpo na kobikisa bango, mpamba te bango nyonso babotamaka bato ya masumu mpe bazalaka mosika na Nzambe. (Yoane 3:16) Basengeli kozongisa boyokani na Nzambe. (2 Bakolinti 5:20) Nzambe azelaki te ete bato ya masumu básɛnga ye abongisa makambo oyo ekozongisa kimya kati na bango na ye. Ntoma Paulo akomaki ete: “Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye moko na likambo oyo ete, wana tozalaki naino basumuki, Klisto akufelaki biso. . . . Mpo soki, ntango tozalaki banguna, tozongisamaki na boyokani elongo na Nzambe na nzela ya liwa ya Mwana na ye, na koleka mpenza, sikoyo lokola tozongisami na boyokani, tokobikisama na nzela ya bomoi na ye.”—Baloma 5:8, 10.
9 Ntoma Yoane amonisaki lisusu solo yango ete Nzambe azali kozongisa bato na boyokani elongo na ye ntango akomaki ete: “Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele na oyo etali biso, mpamba te Nzambe atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko na kati ya mokili mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye. Bolingo na likambo oyo ezali te ete, biso tolingaki Nzambe, kasi nde ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbeka ya mbɔndi mpo na masumu na biso.” (1 Yoane 4:9, 10) Nzambe nde azwaki likanisi ya kosala likambo yango, kasi bato te. Ozali kobendama te na Nzambe oyo amonisaki bolingo mingi epai na biso bato, oyo tozalaki “basumuki,” tóloba ata “banguna” na ye?—Yoane 3:16.
Tosengeli koluka Yehova
10, 11. (a) Tosengeli kosala nini mpo na koluka Yehova? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela mokili ya Satana?
10 Toyebi ete Yehova abengaka biso na makasi te ete tóya epai na ye. Tosengeli koluka ye, ‘koluka ye na komekameka epai na epai mpe kozwa ye mpenza, atako, ya solo, azali mosika te na mokomoko na biso.’ (Misala 17:27) Tosengeli kondima lotomo oyo Yehova azali na yango ya kosɛnga biso tótosa ye. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Na yango, bótosaka Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino. Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino. Bópɛtola mabɔkɔ na bino, bino basumuki, mpe bókómisa mitema na bino pɛto, bino bato ya mitema mibale.” (Yakobo 4:7, 8) Tosengeli kokakatana te mpo na kotɛmɛla Zabolo mpe mpo na komonisa ete tozali na ngámbo ya Yehova.
11 Yango elakisi ete tosengeli kokabwana na ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo, oyo Satana azali kotambwisa. Yakobo akomaki mpe ete: “Boyebi te ete boninga ná mokili ezali bonguna ná Nzambe? Na yango, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.” (Yakobo 4:4) Nzokande, soki tolingi kozala baninga ya Yehova, tosengeli kotya na makanisi na biso ete mokili ya Satana ekoyina biso.—Yoane 15:19; 1 Yoane 3:13.
12. (a) Maloba nini ya kobɔndisa Davidi akomaki? (b) Likebisi nini Yehova apesaki na nzela ya mosakoli Azalia?
12 Soki mokili ya Satana etɛmɛli biso na lolenge moko boye, tosengeli mpenza kopusana epai ya Nzambe na nzela ya libondeli mpo na kosɛnga ye lisalisi. Mpo na kobɔndisa biso, Davidi, ye oyo Yehova abikisaki ye mbala ebele, akomaki ete: “[Yehova] azali penepene na bango nyonso bakobenga ye, baoyo bakobenga ye na solo. Akosukisa mposa ya bango baoyo bakobanga ye, akoyoka mpe koganga na bango mpe akobikisa bango. [Yehova] akobatela baoyo nyonso bakolinga ye kasi akoboma bato nyonso mabe.” (Nzembo 145:18-20) Nzembo yango ezali komonisa ete Yehova akoki kobikisa mokomoko na biso na ntango oyo azali komekama mpe ete akobikisa basaleli na ye nyonso na “bolɔzi monene.” (Emoniseli 7:14) Yehova akozala penepene na biso soki biso tozali penepene na ye. ‘Elimo ya Nzambe’ etindaki mosakoli Azalia na koloba likambo moko ya solo, ete: “[Yehova] azali na bino elongo wana bino bozali na ye elongo. Soko bokoluka ye, akozwana na bino nde soko bokotika ye, akotika bino.”—2 Ntango 15:1, 2.
Yehova asengeli mpenza kozala moto ya solo na miso na biso
13. Ndenge nini tokoki komonisa ete Yehova azali mpenza moto ya solo na miso na biso?
13 Ntoma Paulo akomaki ete Moize “atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Baebele 11:27) Moize amonaki Yehova na miso te. (Exode 33:20) Kasi, Yehova azalaki mpenza moto ya solo na miso na ye na boye ete ezalaki lokola azali komona Ye. Ndenge moko mpe, nsima ya komekama oyo Yobo akutanaki na yango, miso na ye ya kondima emonaki Yehova malamu koleka; emonaki ete azali Nzambe oyo atikaka nzela ete basaleli na ye ya sembo bámekama kasi asundolaka bango soki moke te. (Yobo 42:5) Biblia elobaka ete Enoka na Noa ‘batambolaki na Nzambe,’ mpamba te bazalaki koluka kosepelisa Nzambe mpe kotosa ye. (Genese 5:22-24; 6:9, 22; Baebele 11:5, 7) Soki Yehova azali mpenza moto ya solo na miso na biso, ndenge oyo azalaki moto ya solo na miso ya Enoka, Noa, Yobo mpe Moize, ‘tokokanisa ye’ na makambo nyonso, mpe ye ‘akosembola banzela na biso.’—Masese 3:5, 6, NW.
14. ‘Kokangana’ na Yehova elimboli nini?
14 Liboso Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Moize apesaki bango toli oyo: “[Bokolanda Yehova] Nzambe na bino mpe bokobanga ye mpe bokobatela malako na ye mpe bokotosa mongongo na ye mpe bokosalela ye mpe bokokangana na ye.” (Deteronome 13:4) Basengelaki kolanda Yehova, kobanga ye, kotosa ye, mpe kokangana na ye. Moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobaki ete liloba ya Liebele oyo ebongolami na ‘kokangana’ “ezali komonisa boninga ya makasi mpenza.” Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Boninga ya makasi mpenza elongo na Yehova ezali mpo na baoyo babangaka ye.” (Nzembo 25:14, NW) Mpo tózala na boninga ya ndenge wana na Yehova, asengeli mpenza kozala moto ya solo na miso na biso mpe tosengeli kolinga ye mingi na boye ete tokobanga kosala ata likambo moko oyo ekopesa ye mawa.—Nzembo 19:9-14.
Omonaka ete Yehova atyelaka yo likebi?
15, 16. (a) Ndenge nini Nzembo 34 ezali komonisa ete Yehova atyelaka biso likebi? (b) Tosengeli kosala nini soki tozali na mokakatano mpo na koyeba lisusu bolamu oyo Yehova asalelaka biso?
15 Mayele mabe mosusu oyo Satana asalelaka ezali ya koluka kobosanisa biso ete Yehova, Nzambe na biso, atyelaka biso basaleli na ye ya sembo likebi ntango nyonso. Ata na ntango oyo bomoi ya Davidi, mokonzi ya Yisalaele, ekómaki na likama mpenza, ayebaki malamu ete lobɔkɔ ya Yehova ezali kobatela ye. Ntango akosaki ete azali na ligboma na miso ya Akisi, mokonzi ya Gata, Davidi asalaki nzembo moko kitoko mpenza; na nzembo yango, atyaki mpe maloba oyo ezali komonisa kondima na ye ete: “[Bókumisa Yehova, NW] esika moko na ngai; tókumisa nkombo na ye elongo. Nalukaki [Yehova] mpe ye ayambaki ngai; abikisaki ngai na nsɔmɔ na ngai nyonso. Anzelu ya [Yehova] akozingela esika ya baoyo bakotosaka ye; mpe akobikisa bango. Meká mpe sosolá ete [Yehova] azali malamu; esengo ezali na moto oyo akoluka ekimelo epai na ye. [Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na [elimo enyatami, NW]. Moyengebene azali na makambo mingi ya mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango nyonso.”—Nzembo 34:3, 4, 7, 8, 18, 19; 1 Samwele 21:10-15.
16 Ondimaka mpenza ete Yehova azali na nguya ya kobikisa? Omonaka ete baanzelu na ye babatelaka? Osili komeka mpe komona ete Yehova azali malamu? Ozali koyeba lisusu mbala ya nsuka oyo omonaki mpenza ete Yehova azalaki malamu epai na yo? Meká kokanisa yango lisusu. Mbala mosusu ezalaki na ndako ya nsuka oyo obɛtaki na mosala ya kosakola, ntango okanisaki ete okokoka lisusu te! Ntango mosusu okutanaki na moto moko oyo osololaki na ye malamu. Okanisaki kotɔnda Yehova na ndenge apesaki yo makasi oyo ozalaki na mposa na yango mpe mpo na mbuma malamu oyo ozwaki? (2 Bakolinti 4:7) Ntango mosusu ozali koyeba lisusu te bolamu moko oyo Yehova asalelaki yo. Ekoki kosɛnga okanisa lisusu makambo oyo osalaki eleki sikoyo pɔsɔ moko, sanza moko, mbula moko, to koleka. Soki ezali bongo, okoki kosala makasi mpo na kopusana penepene na Yehova mpe komeka komona ndenge oyo azali kotambwisa yo. Ntoma Petelo alendisaki baklisto boye: “Bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe . . . wana bozali kobwaka mitungisi na bino nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka bino likebi.” (1 Petelo 5:6, 7) Okokamwa na komona ndenge oyo azali mpenza kotyela yo likebi!—Nzembo 73:28.
Tólanda koluka Yehova
17. Tosengeli kosala nini mpo na kolanda koluka Yehova?
17 Tosengeli ntango nyonso kokanisaka ndenge oyo tokoki kobatela boninga na biso na Yehova. Yesu alobaki na libondeli moko epai ya Tata na ye ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Tosengeli ntango nyonso kosala milende mpo na koyekola koyeba Yehova na Mwana na ye. Tosengeli kozwa lisalisi na libondeli mpe na elimo santu mpo tókanga ntina ya “makambo mozindo ya Nzambe.” (1 Bakolinti 2:10; Luka 11:13) Tozali mpe na mposa ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesaka biso bilei ya elimo “na ntango oyo ebongi.” (Matai 24:45) Na nzela ya moombo yango, Yehova apesi biso toli tótángaka Liloba na ye mokolo na mokolo, tóyanganaka na makita ya boklisto pɔsɔ na pɔsɔ, mpe tómipesa na kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi.’ (Matai 24:14) Soki tozali kosala bongo, tokolanda koluka Yehova, Nzambe na biso ya boboto.
18, 19. (a) Tosengeli kozala na ekateli makasi ya kosala nini? (b) Mapamboli nini tokozwa soki topiki mpende liboso ya Zabolo mpe tolandi koluka Yehova?
18 Satana azali kosala nyonso oyo akoki mpo na kobimisela basaleli ya Yehova minyoko, botɛmɛli mpe mitungisi na bipai nyonso. Azali koluka kobebisa kimya na biso mpe lokumu oyo tozali na yango na miso ya Nzambe. Alingi te ete biso tólanda mosala na biso ya koluka bato ya mitema sembo mpe kosalisa bango bámitya na ngámbo ya Yehova na ntembe oyo Satana abimisaki mpo na bokonzi oyo Yehova azali na yango likoló ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Kasi, tosengeli kozala na ekateli makasi ya kotikala sembo epai ya Yehova, tosengeli kotyela ye motema ete akobikisa biso na mabɔkɔ ya moto mabe. Soki tozali kotika ete Liloba ya Nzambe etambwisaka biso mpe soki tozali ntango nyonso kosala elongo na ebongiseli na ye awa na mabele, tokoki kozala na elikya ete akosunga biso ntango nyonso.—Yisaya 41:8-13.
19 Yango wana, tiká ete biso nyonso tópika mpende liboso ya Zabolo mpe ya mayele mabe na ye, tóluka ntango nyonso Yehova, Nzambe na biso ya bolingo, ye oyo akozanga te ‘kokómisa biso ngwi mpe kokómisa biso makasi.’ (1 Petelo 5:8-11) Soki tozali kosala bongo, ‘tokomibatela na kati ya bolingo ya Nzambe, wana tozali kozela motema mawa ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpo na bomoi ya seko.’—Yuda 21.
Okopesa eyano nini?
• Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “Zabolo” elimboli nini, mpe ndenge nini Zabolo azali komonisa ete abongi na nkombo yango?
• Bokeseni nini ezali kati na ndenge oyo Yehova atalaka bato oyo bazali awa na mabele mpe ndenge oyo Satana atalaka bango?
• Mpo na nini moto asengeli kondima lisiko ntango azali kopusana penepene na Yehova?
• ‘Kokangana’ na Yehova elimboli nini, mpe ndenge nini tokoki kolanda koluka ye?
[Elilingi na lokasa 15]
Atako Yobo amekamaki mingi, ayebaki ete Nzambe azalaki kotyela ye likebi
[Bililingi na lokasa 16]
Kotánga Biblia mokolo na mokolo, koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya lisangá, mpe kosakola na molende esalisaka biso tóbosana te ete Yehova atyelaka biso likebi