“Talá! oyo Nzambe na biso”
Masolo mibale ya boyekoli oyo euti na buku Approchez-vous de Jéhovah, oyo ebimaki na mayangani ya etúká oyo esalemaki na mokili mobimba na 2002-2003.—Talá lisolo oyo ezali na motó ya likambo ete “Ekokisi mposa moko ya motema na ngai,” na lokasa 20.
“Talá! Oyo Nzambe na biso. Totyelaki ye motema, mpe akobikisa biso. Talá Yehova.”—YISAYA 25:9, NW.
1, 2. (a) Yehova abengaki Abalayama nani, mpe yango ekoki kotinda biso tómituna motuna nini? (b) Biblia elobi nini oyo ezali kondimisa biso ete tokoki kokóma baninga ya Nzambe?
YEHOVA, Mozalisi ya likoló na nse, abengaki Abalayama ete “moninga na ngai.” (Yisaya 41:8) Kanisá ete moto oyo asalami na mputulu azala moninga ya Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba! Okoki komituna ete, ‘Ngai mpenza nakoki kozala moninga ya Nzambe?’
2 Biblia ezali koyebisa biso ete tokoki kozala baninga ya Nzambe. Abalayama akómaki moninga ya Nzambe mpo “andimelaki Yehova.” (Yakobo 2:23) Lelo oyo mpe, Yehova “azalaka moninga ya motema ya bato ya sembo.” (Masese 3:32, NW) Na Yakobo 4:8, Biblia ezali kolendisa biso na maloba oyo: “Bópusana penepene na Nzambe mpe ye akopusana penepene na bino.” Yango elingi koloba ete soki topusani penepene na Yehova, ye mpe akopusana penepene na biso. Kasi, maloba yango elimboli nde ete biso, bato ya masumu mpe ya kozanga kokoka, tobandaka kopusana penepene na Nzambe mpo ye apusana penepene na biso? Te. Soki tozali na likoki ya kokóma baninga ya Yehova ezali mpo Nzambe na biso ya bolingo asali makambo mibale ya ntina.—Nzembo 25:14.
3. Wapi makambo mibale oyo Yehova asali mpo biso tókóma baninga na ye?
3 Ya liboso, Yehova atindaki Yesu ‘apesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.’ (Matai 20:28) Mbeka oyo epesamaki mpo na kobikisa biso epesi biso nzela ya kopusana penepene na Nzambe. Biblia elobi boye: “Nde biso, tozali kolinga, mpamba te ye alingaki biso liboso.” (1 Yoane 4:19) Ya solo, lokola Nzambe “alingaki biso liboso,” afungolaki nzela mpo biso tókóma baninga na ye. Ya mibale, Yehova amiyebisi epai na biso. Toyebi ete mpo na kosala boninga na moto, esɛngaka koyeba ye malamu mpe kosepela na bizaleli na ye. Yango elingi koloba nini? Soki Yehova amiyebisaki te mpo biso tókoka koyeba ye, mbɛlɛ tokokaki kopusana penepene na ye ata mokolo moko te. Kasi, Yehova amibombi te, alingi tóyeba ye. (Yisaya 45:19) Na kati ya Biblia, Liloba na ye, asaleli maloba ya polele mpo na komiyebisa na biso; yango ezali komonisa ete alingaka biso mpe alingaka tóyeba ye mpe tólinga ye lokola Tata na biso ya likoló.
4. Soki toyebi bizaleli ya Yehova malamu, tokoyoka ndenge nini mpo na ye?
4 Osí omoná mwana moke azali kolakisa tata na ye epai na baninga na ye mpe azali koloba na esengo mpe na mwa lolendo ete, “Wana papa na ngai”? Basambeli ya Nzambe bazali na bantina mingi ya koyoka ndenge yango mpo na Yehova. Biblia esakoli ntango moko oyo bato ya sembo bakoganga ete: “Talá! Oyo Nzambe na biso.” (Yisaya 25:8, 9, NW) Ntango tozali koyeba bizaleli ya Yehova malamu, tokomona mpe ete tozali na Tata oyo aleki malamu mpe Moninga oyo aleki baninga nyonso oyo tokoki kozala na bango. Ya solo, koyeba bizaleli ya Yehova epesaka biso bantina mingi ya kopusana penepene na ye. Yango wana, tótalela ndenge Biblia elobeli bizaleli minei ya minene ya Yehova: nguya, boyengebene, bwanya mpe bolingo. Na lisolo oyo, tokolobela bizaleli misato ya liboso.
“Azali monene na nguya”
5. Mpo na nini kaka Yehova nde abongi kobengama “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” mpe ndenge nini asalelaka nguya na ye ya kokamwa?
5 Yehova “azali monene na nguya.” (Yobo 37:23) Yilimia 10:6 elobi ete: “Mosusu azali lokola yo te, ee [Yehova]; yo ozali monene, nkombo na yo ezali monene, kati na nguya.” Nguya ya bikelamu mosusu nyonso ezali na nsuka, nzokande nguya ya Yehova ezali na nsuka te. Yango wana, kaka ye nde abengami “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 15:3) Yehova asalelaka nguya na ye ya kokamwa mpo na kokela, kobebisa, kobatela, mpe kobongisa. Tótalela kaka ndakisa mibale: nguya na ye ya kokela mpe oyo ya kobatela.
6, 7. Moi ezali na nguya ya ndenge nini, mpe yango ezali komonisa bosolo ya ntina mingi na likambo nini?
6 Soki otɛlɛmi libándá na mokolo oyo moi ezali makasi, oyokaka ndenge nini na loposo na yo? Oyokaka ete moi ezali koswa na nzoto. Nzokande, nguya ya kokela ya Yehova nde esalaka ete oyoka bongo. Oyebi nguya oyo moi ezali na yango? Mɔtɔ oyo ezali na katikati mpenza ya moi ezali na degré celsius milio 15. Yango elingi koloba boye: Soki ekokaki kosalema ete ozwa mwa litanga ya mɔtɔ ya moi moke lokola motó ya ntonga mpe obwaka yango awa na mabelé, ekozikisa biloko nyonso ata soki ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 140 banda na esika oyo litanga yango ekokwea! Na sɛgɔnde mokomoko, moi ebimisaka nguya oyo ekokani na nguya ya bamilio na bamilio ya babɔmbi nikleere. Kasi, ntaka oyo ekaboli mabelé ná moi ebongi mpenza. Soki mabelé epusani mwa moke lisusu pene na moi, mai nyonso ekokauka; soki mpe epusani mwa mosika na moi, mai nyonso ekokóma mabanga. Soki ezali pene, bikelamu ya bomoi ekozala te; soki mpe ezali mwa mosika, bikelamu ya bomoi ekozala te.
7 Atako moi esalisaka biso tózala na bomoi, bato mingi bazwaka ntango ya kokanisa mosala na yango te. Na bongo, bayebaka te liteya oyo moi ekoki kopesa biso. Nzembo 74:16 elobi na ntina na Yehova ete: “Yo obongisaki pole mpe moi.” Ya solo, moi ekumisaka Yehova, “Motongi ya likoló mpe mabelé.” (Nzembo 146:6) Nzokande, moi ezali kaka moko ya ebele ya biloko oyo Yehova akelá, oyo emonisaka biso ete azali na nguya mingi mpenza. Ntango tozali koyeba mingi nguya ya kokela oyo Yehova azali na yango, limemya oyo tosengeli kopesa ye ezali mpe kobakisama.
8, 9. (a) Maloba nini ya elilingi ezali komonisa mposa ya Yehova ya kobatela basambeli na ye mpe kokokisa bamposa na bango? (b) Na ntango ya kala, mobateli ya mpate azalaki kosala nini mpo na bampate na ye, mpe yango ezali koteya biso nini mpo na Mobateli na biso Monene?
8 Yehova asalelaka mpe nguya mingi oyo azali na yango mpo na kobatela basaleli na ye mpe mpo na kokokisa bamposa na bango. Biblia esaleli maloba kitoko ya elilingi mpo na kolobela ndenge oyo Yehova alaki kobatela biso. Na ndakisa, tótalela Yisaya 40:11. Na vɛrsɛ yango, Yehova alobi ete azali lokola mobateli ya mpate, mpe basaleli na ye bazali lokola bampate. Tozali kotánga boye: “Akoleisa etonga na ye lokola mobateli, akoyanganisa bana ya mpate na mabɔkɔ na ye; akokumba bango na ntolo na ye, akokamba malɛmbɛmalɛmbɛ baoyo bazali konungisa.” Ozali komona na makanisi na yo likambo oyo vɛrsɛ yango elobeli?
9 Mpate ekeseni na banyama mosusu mingi, yango esɛngaka mpenza bábatela yango. Na ntango ya kala, mobateli ya mpate asengelaki kozala na mpiko mpo na kobatela bampate na ye mpo bambwa ya zamba, bangombolo, ata mpe bankɔsi, elya yango te. (1 Samwele 17:34-36; Yoane 10:10-13) Kasi, ntango mosusu kobatela bampate ezalaki kosɛnga kozala na boboto. Na ndakisa, ntango mpate moko eboti mosika na etonga, ndenge nini mobateli akokaki kobatela mwana ya mpate oyo abotami sika? Asengelaki komema mwana ya mpate, ntango mosusu na boumeli ya mikolo, na “ntolo” na ye, elingi koloba akogumba elamba na ye ya likoló mpe akotya ye na kati. Kasi, ndenge nini mwana ya mpate azalaki kokóma na ntolo ya mobateli ya mpate? Mwana ya mpate akokaki kopusana penepene ya mobateli, ata mpe komilalisa na lokolo na ye. Kasi, mobateli nde asengelaki kogunzama, kokamata mwana ya mpate mpe kotya ye na ntolo na ye. Maloba yango ya elilingi ezali komonisa ete Mobateli na biso Monene azalaka mpenza na mposa ya kobatela biso basaleli na ye!
10. Libateli nini Yehova azali kopesa lelo oyo, mpe mpo na nini libateli yango ezali na ntina mingi?
10 Yehova asuki te kaka na kolaka ete akobatela biso. Na ntango ya kala, asalaki makamwisi oyo emonisaki ete akoki mpenza “kosikola uta na komekama bato ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (2 Petelo 2:9) Tokoloba nini mpo na lelo oyo? Toyebi ete lelo oyo azali te kosalela nguya na ye mpo na kobatela biso na makama nyonso. Kasi azali kobatela biso na ndenge oyo eleki mpenza, elingi koloba na elimo. Tata na biso ya bolingo azali kobatela biso na makama ya elimo; mpo na yango, azali kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na koyikela mikakatano mpiko mpe kobatela boyokani malamu na ye. Na ndakisa, Luka 11:13 elobi ete: “Na yango, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!” Nguya monene wana ekoki kopesa biso makasi ya kolonga ata komekama to mokakatano nini oyo tokoki kokutana na yango. (2 Bakolinti 4:7) Na bongo, Yehova azali kobatela bomoi na biso, kaka mpo na mwa bambula te, kasi mpo na libela. Lokola tozali na elikya wana, tokoki kotalela mpasi nyonso oyo tokoki kokutana na yango na mokili oyo ete “ezali ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ.” (2 Bakolinti 4:17) Tozali te koyoka mposa ya kopusana penepene ya Nzambe oyo azali kosalela nguya na ye mpo na bolamu na biso?
“Yehova alingi boyengebene”
11, 12. (a) Mpo na nini boyengebene ya Yehova ezali kobenda biso epai na ye? (b) Likanisi nini Davidi azwaki na ntina na boyengebene ya Yehova, mpe ndenge nini maloba yango oyo epemami ekoki kobɔndisa biso?
11 Yehova asalaka makambo oyo ezali sembo mpe malamu; asalaka yango ntango nyonso mpe na kopona bilongi te. Boyengebene ya Nzambe ezali na makambo makasi to ya nko te oyo ekoki mbala mosusu kobangisa biso kopusana penepene na ye; kasi ezali nde ezaleli malamu oyo ezali kobenda biso epai ya Yehova. Biblia ezali komonisa polele mpenza malamu ya ezaleli yango. Yango wana, tótalela ndenge misato oyo Yehova amonisaka boyengebene na ye.
12 Ya liboso, boyengebene ya Yehova etindaka ye na kozala sembo epai na basaleli na ye. Davidi, mokomi ya nzembo amonaki na bomoi na ye moko lolenge yango ya boyengebene ya Yehova. Likanisi nini Davidi azwaki na kotalela makambo oyo akutanaki na yango mpe na boyebi oyo azalaki na yango ya banzela ya Nzambe? Alobaki boye: “Yehova alingi boyengebene, mpe akotika bato na ye ya sembo te. Akobatela bango seko na seko.” (Nzembo 37:28, NW) Maloba yango ezali mpenza kolendisa biso! Ata mokolo moko te Nzambe na biso akobosana bato oyo bazali sembo epai na ye. Yango wana, tokoki kozala na elikya ete azali pene na biso mpe azali kobatela biso. Ndanga na yango ezali boyengebene na ye!—Masese 2:7, 8.
13. Ndenge nini Mibeko oyo Yehova apesaki Yisalaele ezali komonisa ete amibanzabanzaka mpo na bato oyo bazali konyokwama?
13 Ya mibale, boyengebene ya Nzambe etindaka ye atyela bato oyo bazali konyokwama likebi. Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisalaele ezali komonisa ete amibanzabanzaka mpo na baoyo bazali na mposa ya lisalisi. Na ndakisa, Mibeko eyebisaki ndenge oyo basengelaki kosalisa bitike mpe basi oyo bakufelá mibali. (Deteronome 24:17-21) Lokola Yehova ayebaki ete bato ya ndenge wana bakokaki kozala na mikakatano, ye moko akómaki Zuzi mpe Mobateli na bango. (Deteronome 10:17, 18) Ayebisaki Bayisalaele ete soki banyokoli basi mpe bana oyo bazali na moto ya kosunga bango te, ye akoyoka kolela na bango. Alobaki, ndenge ekomami na Exode 22:22-24, ete: “Nkanda na ngai ekopela.” Atako nkanda ezali te moko ya bizaleli minene ya Nzambe, boyengebene na ye etindaka ye asilika ntango bato bazali kosala makambo mabe na nko, mingimingi soki bazali kosalela yango bato oyo bazangi mobateli.—Nzembo 103:6.
14. Nini ezali mpenza komonisa ete Yehova aponaka bilongi te?
14 Ya misato, na Deteronome 10:17 (NW), Biblia elobi na biso ete Yehova ‘aponaka bilongi te mpe andimaka avoka te.’ Yehova azali te lokola bato mingi oyo bazali na bokonzi to na nguya, ye atalaka bozwi ya moto te to ndenge oyo moto azali komonana na miso. Akaniselaka bato mabe te, aponaka mpe bilongi te. Likambo oyo ezali mpenza komonisa yango ezali oyo: Aponi kaka mwa bato moke te mpo bákóma basambeli na ye ya solo mpe bázala na elikya ya bomoi ya seko. Nzokande, Misala 10:34, 35 elobi ete: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” Moto nyonso, mobola to mozwi, moto oyo atángá mingi to te, mondɛlɛ to moindo, ata mpe soki afandaka na ekólo nini, akoki kozala na elikya yango. Tomoni te ete yango ezali boyengebene ya solosolo oyo eleki boyengebene nyonso? Ya solo, soki toyebi boyengebene ya Yehova malamu, yango ekotinda biso tópusana penepene na ye!
‘Bwanya ya Nzambe ezali bozindo boni!’
15. Bwanya ezali nini, mpe ndenge nini Yehova amonisaka yango?
15 Ntoma Paulo apusamaki na koloba, ndenge ekomami na Baloma 11:33, ete: “Bwanya [ya Nzambe] mpe boyebi na ye ezali bozindo boni!” Ya solo, soki tokanisi makambo ndenge na ndenge oyo ezali komonisa bwanya ya Yehova, tokotikala mpenza monɔkɔ polele. Kasi, ndenge nini tokoki kolimbola ezaleli yango? Kozala na bwanya elimboli kosalela boyebi, bososoli, mayele mpo na kokokisa likambo moko. Yehova asalelaka boyebi mingi mpe mayele mingi oyo azali na yango, yango wana azwaka kaka mikano ya malamu mingi, mpe akokisaka yango na ndenge oyo eleki malamu.
16, 17. Ndenge nini biloko oyo Yehova akelá ezali komonisa bwanya mingi oyo azali na yango? Pesá ndakisa moko.
16 Wapi mwa makambo oyo ezali mpenzampenza komonisa ete Yehova azali na bwanya mingi? Nzembo 104:24 elobi boye: “Ee [Yehova]! Misala na yo mizali mingi mpenza. Osali yango nyonso na [bwanya, NW]. Mabelé matondi na biloko yo osalaki.” Ya solo, ntango tozali koyeba makambo ya sika na biloko oyo Yehova akelá, bwanya na ye ekobanda se kokamwisa biso. Na ndakisa, koyekola biloko oyo Yehova akelá ezali kosalisa bato ya siansi na koyeba makambo mingi! Kutu, ezali na siansi moko oyo babengi biomimétique, oyo elukaka komekola makambo ya biloko oyo Nzambe akelá.
17 Na ndakisa, mbala mosusu osí ozwá libaku ya kotala motambo ya limpulututu (toile d’araignée). Motambo yango etongamaka na mayele ya kokamwa. Mwa bansinga na yango mikemike oyo emonanaka lokola nde ezali makasi te, ezali makasi koleka ebende oyo bayeisi moke ndenge moko na yango, ezali makasi koleka bansinga ya elamba ya komibatela na masasi [to antibale]. Yango elingi koloba nini? Soki toyeisi motambo ya limpulututu monene lokola monyama oyo basalelaka na masuwa mpe totandi yango na likoló, aviɔ ya monene ekopasola yango te soki etutani na yango! Ya solo, Yehova asalaki mpenza biloko nyonso “na bwanya.”
18. Ndenge nini bwanya ya Yehova ezali komonana na ndenge oyo atindaki bato bákoma Liloba na ye, Biblia?
18 Likambo eleki monene oyo ezali komonisa biso bwanya ya Yehova ezali na kati ya Liloba na ye, Biblia. Toli malamu mingi oyo ezali na kati ya Biblia emonisaka ndenge ya kozala na bomoi ya malamu koleka. (Yisaya 48:17) Kasi, bwanya ekokani na mosusu te oyo Yehova azali na yango ezali mpe komonana na ndenge oyo Biblia ekomamaki. Na ndenge nini? Na bwanya na ye, Yehova amonaki malamu ete bato nde bákoma Liloba na ye. Soki atindaka baanzelu bákoma Biblia, tokanisi mpenza ete tolingaki kosepela na yango ndenge tosepelaka na yango? Ya solo, baanzelu balingaki kolobela Yehova na lolenge oyo bango bamonelaka ye, lolenge oyo eleki mayele na biso, mpe balingaki kolobela ndenge bango bamipesaka mpo na kosalela ye. Kasi, biso tolingaki kokanga ntina ya makambo oyo elobami na ndenge oyo bikelamu ya elimo bamonaka yango, bikelamu oyo boyebi na bango, makambo na bango mpe nguya na bango, eleki ya biso mosika?—Baebele 2:6, 7.
19. Ndakisa nini ezali komonisa ete kotinda bato mpo bákoma Biblia esalaki ete maloba na yango esimbaka motema mpe ezala na elobeli kitoko?
19 Lokola Nzambe atindaki bato bákoma Biblia, ezali na elobeli kitoko, oyo esimbaka motema. Bato oyo bakomaki yango bazalaki na mitema lokola oyo ya biso. Lokola bazalaki bato ya kozanga kokoka, bakutanaki na mikakatano mpe komekama oyo biso tokutanaka na yango. Na bantango mosusu, elimo ya Yehova etindaki bango bákoma makambo oyo bango moko bazalaki kokutana na yango mpe mikakatano na bango. (2 Bakolinti 12:7-10) Na bongo, bakomaki maloba na ndenge oyo anzelu alingaki kobimisa yango te. Na ndakisa, tótalela maloba ya Davidi na Nzembo 51. Maloba oyo ezali likoló ya nzembo yango ezali komonisa ete Davidi akomaki nzembo yango nsima ya kosala lisumu ya monene. Alobaki ndenge oyo azalaki koyoka na motema na ye, alobelaki mawa oyo azalaki koyoka mpe asɛngaki Nzambe bolimbisi. Vɛrsɛ 2 mpe 3 elobi boye: “Sukolá ngai malamu [mpo na] kolongola mabe na ngai, pɛtolá ngai na masumu na ngai. Mpo ete nayebi epɛngweli na ngai mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso.” Yoká ndenge vɛrsɛ 5 elobi: “Talá, ngai nabotami kati na bokesene, mpe mama na ngai azwaki zemi kati na lisumu.” Vɛrsɛ 17 ebakisi boye: “Makabo mazali malamu na miso ya Nzambe ezali [elimo etutami, NW]; ee Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.” Yo mpe okoki koyoka mawa ndenge mokomi ya nzembo ayokaki? Kaka moto ya kozanga kokoka nde akokaki komonisa mawa ya ndenge wana oyo euti mpenza na motema, boye te?
20, 21. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete atako Yehova atindaki bato bákoma Biblia, mokanda yango ezali kaka na bwanya na ye? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
20 Lokola Yehova atindaki bato ya kozanga kokoka bákoma Biblia, yango esali ete tózala na mokanda oyo ebongi na biso mpenza, elingi koloba mokanda oyo ‘epemami na Nzambe’ kasi ekomami na bato. (2 Timote 3:16) Ya solo, elimo santu nde etambwisaki bato oyo bakomaki Biblia. Na yango, makambo oyo bakomaki ezali na bwanya ya Yehova, kasi ya bango moko te. Tokoki mpenza kotyela bwanya yango motema. Bwanya yango eleki ya biso mosika, yango wana Nzambe azali koloba na biso na bolingo nyonso ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:5, 6) Soki tozali kolanda toli malamu wana, tokopusana penepene na Nzambe na biso oyo atondi na bwanya.
21 Ezaleli ya Yehova oyo eleki monene mpe oyo eleki malamu ezali bolingo. Na lisolo oyo elandi tokolobela ndenge oyo Yehova amonisi bolingo na ye.
Ozali koyeba lisusu?
• Yehova asali makambo nini mpo biso tókoka kokóma baninga na ye?
• Pesá mwa bandakisa ya nguya ya kokela mpe ya kobatela oyo Yehova azali na yango.
• Ndenge nini Yehova amonisaka boyengebene na ye?
• Ndenge nini biloko oyo Yehova akelá mpe makambo oyo ezali na Biblia ezali komonisa bwanya na ye?
[Elilingi na lokasa 10]
Yehova abatelaka mpenza bampate na Ye lokola mobateli ya mpate oyo azali komema mwana ya mpate na ntolo na ye
[Elilingi na lokasa 13]
Bwanya ya Yehova ezali komonana na ndenge oyo Biblia ekomamaki