Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/7 lok. 32
  • Nini ekómelá bamboka yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ekómelá bamboka yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/7 lok. 32

Nini ekómelá bamboka yango?

NOFO ná No ezali bankombo oyo Biblia ebengaka Memphis ná Thèbes, bamboka-mokonzi ya Ezipito oyo eyebanaki mingi. Esika oyo Nofo (Memphis) ezalaki ezali soki na ntaka ya kilomɛtrɛ 23 na sudi ya Caire, na wɛsti ya Ebale Nile. Memphis ezalaki liboso mboka-mokonzi ya Ezipito, kasi na nsima makambo ebongwanaki. Na ebandeli ya ekeke ya 15 liboso ya ntango na biso, Ezipito ekómaki na mboka-mokonzi ya sika, No (Thèbes); mboka yango ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 500 na sudi ya Memphis. Na esika oyo engumba Thèbes ezalaká, tokokuta bitika ya ebele ya batempelo oyo moko na yango ezalaki tempelo ya Karnak, oyo balobaka ete ezalaki ndako eleki monene oyo ezalaki na makonzí. Amona, nzambe-mokonzi ya Baezipito azalaki mpe nzambe ya engumba Thèbes mpe bazalaki kosambela ye na tempelo ya Karnak.

Biblia esakolaki nini mpo na Memphis ná Thèbes? Bakatelaki Falo mokonzi ya Ezipito mpe banzambe na yango etumbu, mingi mpenza nzambe-mokonzi na yango “Amona ya No.” (Yilimia 46:25, 26) Ebele ya bato oyo bazalaki kokende kosambela kuna basengelaki ‘kobomama.’ (Ezekiele 30:14, 15) Mpe yango esalemaki bongo. Losambo ya Amona ezalaka lisusu te, okokuta kaka bitika ya batempelo. Lelo oyo, ndambo ya engumba Louxor etongami likoló ya bitika ya Thèbes, mpe mwa bamboka mosusu ya mikemike etongamá na bitika ya mboka yango.

Mpo na Memphis, kaka malita na yango nde etikalá. Louis Golding, molimboli moko ya Biblia, alobi boye: “Na boumeli ya bankama ya bambula, Baarabe oyo bayaki kofanda na Ezipito batongaki mboka-mokonzi na bango [Caire] na ngámbo mosusu ya ebale mpe bazalaki kozwa mabanga na esika monene mpenza oyo engumba Memphis ezalaki. Mabelé oyo Ebale Nile ememaka ezipá esika wana na ntaka ya bakilomɛtrɛ na bakilomɛtrɛ mpe Baarabe bamemá ebele ya mabanga, yango wana okomona ata libanga moko te na esika oyo engumba yango ezalaká.” Ya solo, lokola Biblia esakolaki yango, Memphis etikalá ‘mpamba . . . mpe ezali na mofandi te.’​—Yilimia 46:19.

Oyo ezali kaka ndakisa mibale oyo ezali komonisa bosikisiki ya bisakweli ya Biblia. Kobebisama ya Thèbes ná Memphis ezali kondimisa biso ete tosengeli kotya motema na bisakweli ya Biblia oyo ekokisami naino te.​—Nzembo 37:10, 11, 29; Luka 23:43; Emoniseli 21:3-5.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Fɔtɔ na ndingisa ya British Museum

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto