Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/7 lok. 31
  • Kasɛti-video oyo ezali kosimba mitema ya bilenge

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kasɛti-video oyo ezali kosimba mitema ya bilenge
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/7 lok. 31

Kasɛti-video oyo ezali kosimba mitema ya bilenge

NSIMA ya kotala kasɛti-video Mituna oyo bilenge batunaka​—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu?a (na Lifalanse), bilenge mingi bamonaki ete basengeli kotalela etamboli na bango malamumalamu. Kasɛti-video yango ezali na toli malamu oyo euti na Biblia, ná maloba kitoko ya bilenge baklisto mpe filme oyo ezali mpenza kosimba mitema, oyo euti na lisolo ya Dina na kati ya Biblia. (Genese, mokapo 34) Makambo oyo elandi ezali maloba ya mwa ndambo ya bilenge ya Mexique mpo na kasɛti-video yango.

Martha alobi boye: “Kasɛti-video yango esimbaki mpenza motema na ngai. Namonaki lokola nde basalaki yango mpo na ngai. Nazalaki kokanisa ete lokola balakisi na ngai ná baninga na ngai ya kelasi bayebi ete nazali Motatoli ya Yehova, ekoki se bongo. Nazalaki kopesa bango litatoli te mpo na komonisa yango. Nazali na botɔndi mingi mpo na mateya nyonso oyo Yehova azali kopesa biso, mingimingi soki ezali kosimba mpenza mitema na biso ndenge kasɛti-video oyo esali.”

Juan Carlos alobi boye: “Kasɛti-video yango ezali mpenza kotinda moto akanisa malamumalamu. Lokola nazali elenge, nasalaka mabunga mingi mpe, mpo na yango, nakoki koloba ete nakokani na bilenge mosusu na kasɛti yango. Eleki mwa bambula, nazalaki kosala makambo ya mabe na kobombama, kasi nayaki komona ete etamboli wana ekoki kosukela ngai mabe. Nsima ya kotala kasɛti-video yango, nazwi mokano ya kozala sembo na miso ya Yehova.”

Sulem alobi ete: “Ntango natalaki kasɛti-video yango, nazalaki lisusu ngai te. Liboso na yango, nazalaki lisusu kotánga Biblia te, nazalaki mpe kobondela Yehova mingi lisusu te. Ntango nayokaki maloba ya bilenge oyo balakisi na kasɛti yango, etindaki ngai nazongela koyekola Biblia mpe kobondelaka Yehova.”

Lelo oyo, bilenge bazali kokutana na mikakatano mingi, mpe baninga oyo bazali kopona bakoki kobongisa to kobebisa bango. (Nzembo 26:4; Masese 13:20) Kasɛti-video Mituna oyo bilenge batunaka​—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu? ezali kosalisa bilenge mingi na kozwa bikateli ya malamu na likambo yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto