Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/11 lok. 26
  • “Liloba ya Nzambe ezali mpenza na nguya!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Liloba ya Nzambe ezali mpenza na nguya!”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Calendrier ya 2011 elobeli Losambo na libota
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/11 lok. 26

“Liloba ya Nzambe ezali mpenza na nguya!”

“LILOBA ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” (Baebele 4:12) Mpo na komonisa nguya ya Liloba ya Nzambe, Manaka ya Batatoli ya Yehova 2003 elobeli masolo motoba ya bato ya mikili ndenge na ndenge. Na motó ya likambo “Liboso mpe nsima,” manaka yango emonisaki ndenge mosala ya Batatoli ya Yehova ezali kosalisa bato bákóma na bizaleli ya malamu, bátika makambo ya mabe, bábongisa mabota na bango mpe bákóma baninga ya Nzambe.

Tozwaki ebele ya mikanda ya botɔndi mpo na manaka ya 2003. Mwa makambo oyo bakomelaki biso yango oyo:

“Manaka yango ezali komonisa baklisto ya solo ete bato mosusu mpe babundaki etumba makasi ya kondima, kaka ndenge bango moko bazali kobunda. Bakoki komona bafɔtɔ oyo ezali kolakisa mbongwana oyo bato mosusu basali na bomoi na bango.”​—Steven, États-Unis.

“Nazalaki mpenza na mposa ya kokomela bino mwa maloba oyo mpo na koyebisa bino ndenge oyo manaka ya 2003 esimbi motema na ngai. Naino manaka esepelisá ngai lokola oyo wana te. Nakobanda kotambola na masolo yango ntango nyonso na sakosi na ngai ya mosala ya kosakola mpo nalakisaka bato bámona na miso ndenge Biblia ekoki kobongola bomoi ya bato.”​—Marc, Belgique.

“Manaka yango elendisaki ngai mingi. Motema na ngai esimbamaki mpenza na komona ndenge Yehova abongoli bomoi ya bato yango. Yango epesi ngai mposa ya kokoba kobongwana. Nakómi komimona ete nazali mpenza na lisangá ya bandeko ya mokili mobimba.”​—Mary, États-Unis.

“Yesu ayokaki mpenza mawa mpo ebele ya bato bazalaki konyokwama na elimo. Natɔndi bino mpo bolandi ndakisa ya Klisto na ndenge bobimisi masolo yango na manaka na biso ya 2003. Naino manaka etangisá ngai mai ya miso lokola oyo te.”​—Cassandra, États-Unis.

“Ntango nazalaki na mbula 11, nabandaki komɛla makaya; mpe na nsima nakómaki komɛla bangi. Mbala mingi nazalaki na likanisi ya komiboma. Ntango nayebaki Yehova, yango esalisaki ngai natika mimeseno wana. Manaka yango ezali na ntina mingi mpo na ngai. Masolo ya bandeko na ngai na mokili mobimba elendisi ngai mpenza. Nayebi sikoyo ete nazali ngai moko te na etumba yango mpe ete eloko eleki ntina ezali nde kolinga Yehova mpe kosalela ye na motema mobimba.”​—Margaret, Pologne.

“Ya solo mpenza, Liloba ya Nzambe ezali na nguya! Ntango nazwaki manaka ya 2003, nasalaki makasi mpo nalela te. Masolo ná bafɔtɔ ya manaka yango ezali mpenza kolendisa kondima.”​—Darlene, États-Unis.

“Bomoi oyo bato mosusu bazalaki na yango kala ekokani mpenza na bomoi na ngai ya kala. Yehova apesi ngai makasi ya kotika makambo ya mabemabe oyo nandimaki te ete nakokoka kotika. Natɔndi bino mingi mpo na masolo yango oyo elobeli mpenza makambo oyo bato bakutanaki na yango.”​—William, États-Unis.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto