Calendrier ya 2011 elobeli Losambo na libota
Calendrier des Témoins de Jéhovah 2011 elobeli Losambo na libota. Calendrier yango emonisi mabota ya ntango na biso mpe mabota oyo ekokani na yango, oyo Biblia elobeli. Emonisi mpe basaleli ya Yehova oyo babalá mpe baoyo bazali minzemba, bazali koyekola Biblia.
Bato oyo Biblia elobeli, oyo balakisi na Calendrier yango, bazalaki mpenza kosepela na mobeko ya Yehova, mpe yango nde esalisaki bango bálonga mikakatano oyo kaka bango nde bakutanaki na yango. (Nz. 1:2, 3) Ntango tozali kotalela elilingi moko na moko, ekokundwela biso ntina ya Losambo na libota, ezala tozali na libota ya monene to ya moke, ezala bato nyonso ya libota na biso bazali Batatoli to te. Calendrier yango ezali na esika oyo osengeli kokoma mokolo oyo libota na bino eponá mpo na Losambo na libota. Osili kokoma yango?