Tozali nde na mposa ya toli?
LELO oyo, bato mingi bazali kokanisa ete bayebi kokesenisa malamu ná mabe mpe ete bazali na lotomo ya kosala nyonso oyo balingi. Bato mosusu bazali koloba ete likambo nyonso oyo ezali komemela moto bolamu ezali malamu. Libala mpe libota oyo bato batalelaka banda kala lokola bibongiseli ya ntina mingi, ezali mpenza kobeba.—Genese 3:5.
Tózwa ndakisa ya Verónicaa oyo afandaka na Mexique. Ye alobi boye: “Mwa moke liboso tókokisa mbula 15 ya libala, mobali na ngai ayebisaki ngai ete azalaka na mwasi mosusu. Alobaki ete lokola mwasi yango azali elenge mpe asepelaka na ye, akoki koboya ye te. Nayokaki mpasi mingi na komona ete mobali na ngai, moto oyo azalaki moninga na ngai ya motema, asundoli ngai. Nazalaki kokanisa ete liwa ya ndeko to moninga nde likambo eleki mpasi. Kasi, namonaki ete ekobo oyo mobali na ngai azalaki kosala epesaki ngai mpasi koleka, kaka te mpo nabungisaki moto oyo nalingaki mingi, kasi mpo akobaki kosala makambo oyo ezalaki kosala ngai mpasi na motema.”
Tozali mpe na ndakisa ya elenge mobali moko ya mbula 22 oyo akabwaná na mwasi na ye mpe azali na mwana, kasi alingi te kokokisa mokumba na ye ya tata. Elenge yango alingi ete mama na ye nde aleisaka ye ná mwana na ye mpe asalelaka bango makambo nyonso. Soki mama na ye aboyi kosalela ye nyonso oyo alingi, akosilika mpe akoswanisa ye lokola mwana oyo abɔkwamá malamu te. Bizaleli mabe na ye esilisaki mpenza mama na ye mayele.
Bandakisa ya boye ezali mingi. Bipai nyonso, ebele ya bato bazali kokabwana mpe mabala mingi ezali kokufa. Bana mingi bazali na mabota oyo moko ya baboti na bango akimá ndako mpo na kofanda na molongani mosusu. Bilenge mingi bazali lisusu na botosi te, ata epai ya baboti na bango; bakómi kosala makambo oyo moto akokaki kondima te ete bilenge bakoki kosala. Na mikili mingi, bilenge mingi bamipesi na pite, na komɛla bangi, na mobulu, mpe bazali koboma balakisi to baboti na bango. Ntango mosusu yo mpe ozali komona ete lelo oyo mikakatano esuki kaka te na kobɔkɔla bana mpe na libala.
Ntango tozali komona makambo nyonso wana, tokoki komituna soki mokili oyo ezali kokende wapi. Soki mpenza bato bayebi kokesenisa mabe ná malamu, mpo na nini mikakatano ezali kosila te? Tozali nde na mposa ya toli? Ezali nde na esika oyo tokoki kozwa toli oyo tokoki kotyela motema? Atako bato mingi balobaka ete bandimelaka Nzambe mpe Liloba na ye, nzokande batalelaka makanisi na ye te mpo na kozwa bikateli. Kasi, matomba nini tokozwa soki toluki mpe tozwi toli epai ya Nzambe? Tótalela yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Oyo ezali nkombo topesi ye kopesa.