Tólanda toli oyo eleki malamu
MOTO nyonso alingaka kozala na bomoi ya malamu. Koyoka toli ya malamu mpe kondima kosalela yango ezali sɛkɛlɛ mpo na kozala na bomoi ya ndenge wana na mokili oyo ezali na makambo kilikili. Nzokande, bato mingi balingaka koyoka toli te. Bato mingi balobaka ete moto asengeli kosala oyo motema na ye elingi. Kutu, Biblia elobi ete Satana, monguna ya liboso ya bokonzi ya Nzambe, alakaki bato ya liboso bonsomi. Genese 3:5 (NW) ezali na maloba oyo Satana ayebisaki Eva: “Nzambe ayebi ete mokolo kaka oyo bokolya [mbuma ya nzete ya koyeba malamu ná mabe], miso na bino ekofungwama, mpe bokozala lokola Nzambe, koyeba malamu ná mabe.”
Nsima ya kobuka mobeko ya Nzambe, Adama ná Eva bakómaki nde na bomoi ya malamu, oyo ezangi mikakatano, mpo bakómaki komitambwisa bango moko? Ata moke te. Babandaki mbala moko kobuka mbuma mabe ya ntolo oyo babɛtaki ete bakoyeba kokesenisa mabe ná malamu. Yehova aboyaki bango mpe bakómaki na bomoi moko ya mpasi, ya kozanga kokoka, mpe nsukansuka bakufaki. (Genese 3:16-19, 23) Biso nyonso tokosuka na liwa. Biblia elobi boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.”—Baloma 5:12.
Atako mbuma mabe ya kozanga botosi ya Adama ná Eva ezali komonana polele, bato mingi bazali naino kaka kondima te ete kolanda toli ya Nzambe, Mokeli na biso, ezali nzela ya bwanya. Nzokande, Biblia elobi ete ezali mokanda oyo “epemami na Nzambe mpe ezali na litomba,” mpe ekoki kosalisa biso tózala bato oyo ‘bakoki mpenza, oyo bazali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.’ (2 Timote 3:16, 17) Bomoi na biso ekozala malamu koleka soki tolandi toli ya Biblia. Libota ezali esika mpenza oyo esengeli kosalela toli ya Biblia.
Bosembo na libala
Biblia emonisi ete Nzambe asalaki libala mpo eumelaka libela. (Genese 2:22-24; Matai 19:6) Lisusu, Makomami elobi ete “mbeto ya libala [esengeli] ezala na mbindo te,” elingi koloba moto oyo abali asengeli kosangisa nzoto na moto mosusu te, kaka na molongani na ye. (Baebele 13:4) Kasi, na ntembe te oyebi ete na kati ya mabala mingi lelo oyo, balongani bazali kotosa toli wana ya Nzambe te. Bato mosusu bazali na momeseno ya kokangamakangama na bato oyo bazali balongani na bango te na esika ya mosala. Bamosusu bazali kokosa balongani mpe bana na bango mpo na kokende kolekisa ntango na moto oyo azali molongani na bango te. Bamosusu, lokola mobali ya Verónica oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki, bazali kosundola balongani na bango mpo na kokende kofanda na moto oyo azali elenge, mpe bazali koloba ete yango ezali kosalisa bango bátikala bilenge mpe bázala na esengo.
Atako bongo, koluka kaka komisepelisa kozanga kotalela mbuma mabe oyo yango ekoki kobimisa ememaka esengo ya ntango molai te. Ronald amonaki mpenza likambo yango. Lokola akanisaki ete akokóma na bomoi ya malamu koleka, atikaki mwasi na ye mpo akende kofanda na mwasi oyo azalaki makango na ye na boumeli ya mbula motoba mpe babotaki bana mibale. Nzokande, mwa ntango moke na nsima ya koboma libala na ye, makango na ye wana mpe aboyaki ye! Nsukansuka Ronald akendeki kofanda epai ya baboti na ye! Alobaki ete akómi na bomoi moko ya “nsɔni.” Wana ezali kaka ndakisa moko. Makambo ya ndenge wana oyo bato bazali kosala kaka mpo na kokokisa bamposa na bango moko ememi kokabwana ya mabala mpe kopanzana ya mabota na lolenge oyo esalemá naino te, mpe yango ememeli ebele ya bato, mikóló mpe bana, mpasi mingi.
Nzokande, kosalela toli ya Biblia ememaka esengo ya solosolo. Yango nde likambo ekómelaki Roberto. Ye alobi boye: “Toli ya Biblia esalisaki ngai naboya mwasi na ngai te. Moto azwaka bolamu ya solosolo te soki amipesi na moto oyo azali molongani na ye te, ata soki moto yango azali kitoko ndenge nini. Mateya ya Biblia esalisi ngai namona valɛrɛ ya mwasi na ngai oyo tofandi na ye banda bambula ebele.” Toli ya Biblia oyo elobi ete moto “asalela mwasi ya bolenge na ye bokosi te” esalisaki mpenza Roberto. (Malaki 2:15) Na makambo nini lisusu toli ya Biblia ekoki kosalisa biso?
Ndenge ya kobɔkɔla bana
Eleki bambula mingi, bato mingi bazalaki kokanisa ete baboti basengeli te kotyelaka bana ebele ya mibeko. Bazalaki kokanisa ete ezali malamu kotikela bana bápona bango moko makanisi mpe etamboli oyo basepeli na yango. Baboti bazalaki kosala bongo mpo na koboya kotya nkaka na bokoli ya bana na bango. Na bisika mosusu kutu babongolaki ebongiseli ya kelasi mpo na kolɛmbisa makambo mosusu; na ndakisa, bana bango moko bazalaki kopona soki bakokende kelasi to te, ngonga boni bakolekisa na kosakana to na kolanda mateya. Eteyelo moko ya lolenge wana ezalaki “kopesa bana nzela ya komonisa makanisi mpe bamposa na bango nyonso kozanga ete mokóló moko asambisa to apekisa bango.” Lelo oyo bapesi-toli mosusu na makambo etali bizaleli ya bato bazali naino kaka koloba ete ezali malamu te baboti bápesa bana disipilini lokola kobɛta bango fimbo, ata ntango bamoni ete ezali na ntina mingi.
Lolenge wana ya kobɔkɔla bana ebimisi mbuma nini? Bato mingi bazali kokanisa ete kotika bana básala nyonso oyo balingi epesi bango bonsomi oyo eleki ndelo. Balobi ete yango nde ebakisi koboma mpe komɛla bangi. Na ankɛtɛ moko oyo esalemaki na États-Unis, bato mingi (70 %) bapesaki likanisi ete bana mpe bilenge bazali mpenza kozwa disipilini oyo ebongi te. Bato mingi bazali koloba ete bilenge bazali koboma baninga mpe balakisi na bango na mindoki mpe bazali kosala makambo mosusu ya nsɔmɔ mpo “baboti bazali kopesa bango disipilini te.” Ata soki bana bakómi tii na kosala makambo ya nsɔmɔ te, ezala bango moko to baboti na bango babukaka kaka mbuma mabe ya lolenge mabe ya kobɔkɔla bana.
Biblia elobi nini mpo na likambo ya kobɔkɔla bana? Biblia ezali kopesa baboti toli ete básalela bokonzi na bango na bolingo, kasi bápesaka mpe etumbu na ntango oyo esengeli. Biblia elobi boye: “Bozoba ekangami na motema ya mwana mobali; fimbo nde ekobengana yango mosika na ye.” (Masese 22:15, NW) Ya solo, ntango moboti azali kopesa disipilini asengeli kotalela mbula ya mwana mpe likambo oyo asali. Mbala nyonso oyo baboti bazali kopesa disipilini, basengeli komonisa boboto, komipekisa mpe komitya na esika ya bana. Soki basali bongo, bana bakomona ete balingi bango. Mpo na kolonga, baboti basengeli kopesa disipilini na bolingo, kasi na ndenge ya konyokola te.
Ezali komonana ete baboti oyo bazali kolanda toli yango, bazali kobuka mbuma malamu. Arturo, mobali moko ya mbula 30 na ekólo Mexique oyo auti kobala kala te, alobi boye: “Tata na biso azalaki komonisa ngai ná bandeko na ngai polele ete ye ná mama nde bakonzi ya libota. Bazalaki kokakatana ata moke te mpo na kopesa biso disipilini. Kasi, bazalaki kosolola na biso ntango nyonso. Sikoyo, lokola nakoli, nasepelaka na bomoi ya malamu oyo nazali na yango mpe nayebi ete nyonso wana ezali mingimingi mpo babɔkɔlaki ngai malamu.”
Landá toli oyo eleki malamu
Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali kopesa bato toli oyo eleki malamu. Toli na yango ezali kaka mpo na makambo ya libota te. Ezali kopesa biso nyonso oyo ekoki na makambo ndenge na ndenge mpamba te ezali koteya biso oyo tosengeli kosala na mokili oyo ebele ya bato bazali kondima te ete Moto moko oyo aleki na bwanya asengeli kotambwisa bango mpo na bolamu na bango.
Na nzela ya mokomi ya nzembo, Yehova Nzambe, Mozalisi ya bato, apesaki elaka oyo: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” (Nzembo 32:8) Kanisá naino: Mozalisi atyela biso miso mpo na kobatela biso tózwa likama te! Kasi, motuna oyo mokomoko na biso asengeli komituna yango oyo: ‘Nakondima na komikitisa nyonso Yehova atambwisa ngai mpo na kobatela ngai?’ Liloba na ye ezali koyebisa biso na bolingo nyonso ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”—Masese 3:5, 6.
Mpo na koyeba Yehova esɛngaka milende mpe komipesa; kasi na lisalisi ya Biblia, tokoki mpenza koyeba ye. Lolenge ya bomoi oyo Yehova azali kosɛnga “ezali na elaka ya bomoi ya sikoyo mpe ya oyo ezali koya.” Soki totali bolamu oyo yango ezali kopesa, tokoloba ete ezali mpenza nzela ya kozwa litomba monene.—1 Timote 4:8; 6:6.
Soki osepeli na bwanya oyo Biblia epesaka mpe matomba oyo moto azwaka soki azali kosalela yango, salá ete botángi mpe komanyola Liloba ya Nzambe ezala na esika ya liboso na bomoi na yo. Soki osali bongo, okolonga mikakatano oyo tozali na yango lelo mpe oyo ezali koya. Lisusu, okozala na elikya ya kofanda na mokili ya sika, epai bato nyonso bakoteyama na Yehova mpe bakozala na kimya mingi.—Yisaya 54:13.
[Elilingi na lokasa 5]
Toli ya Biblia ekoki kobongisa libala
[Bililingi na lokasa 6]
Toli ya Biblia esalisaka na koteya bana malamu, kasi epekisi kosepela te
[Bililingi na lokasa 7]
Baoyo balandaka toli ya Biblia bazalaka na bomoi ya malamu