Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/5 lok. 30
  • Bayikaki mpiko liboso ya botɛmɛli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bayikaki mpiko liboso ya botɛmɛli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/5 lok. 30

Bayikaki mpiko liboso ya botɛmɛli

EBELE ya bato oyo batondaki na nkanda bamemaki na makasi na esika ya masano ya Efese Gayusi ná Alisitake, baninga mibale ya Paulo ya mobembo. Kuna, bato yango bagangaki na boumeli ya ngonga mibale boye: “Alatemisi ya Efese azali Monene!” (Misala 19:28, 29, 34) Baninga wana ya Paulo balongaki botɛmɛli yango? Nini ebimisaki botɛmɛli yango?

Paulo asakolaki na boumeli ya mbula soki misato na Efese, mpe mosala na ye ebotaki mbuma mpenza. Yango esalaki ete bato mingi ya Efese bátika kosambela bikeko. (Misala 19:26; 20:31) Ekeko oyo bato bazalaki kosalela mingi na Efese ezalaki mwa ndako moke ya losambo ya Alatemisi, nzambe-mwasi oyo atalaka makambo ya kobota, oyo tempelo monene na ye ezalaki molai koleka bandako nyonso ya Efese. Bato bazalaki kolata bandako mike yango na nzoto to kotya yango na bandako mpo na komibatela. Nzokande, baklisto bakokaki te kosomba yango.​—1 Yoane 5:21.

Demetiliusi, moko ya bato oyo bazalaki kosala bikeko ya palata, amonaki ete mosala ya Paulo ya kosakola elingi kobebisa mosala na bango oyo bazalaki kozwela mbongo. Abalolaki maloba ya Paulo mpe abakisaki makambo mosusu ya lokuta mpo na kondimisa baninga na ye mosusu oyo bazalaki kosala bikeko ete soki bakebi te, na Asie Mineure mobimba, bato bakotika kosambela Alatemisi. Ntango bato wana oyo basilikaki babandaki koganga mpe kokumisa Alatemisi, bato nyonso ya mboka batombokaki mpe yikiyiki monene ekɔtaki na mboka.​—Misala 19:24-29.

Ebele ya bato bakendaki kotonda na esika yango ya masano, oyo ezalaki na bisika ya kofanda soki 25 000. Paulo asɛngaki azwa maloba liboso ya bato yango oyo basilikaki, kasi bakonzi mosusu ya motema malamu bapesaki ye toli atika. Nsukansuka, kalaki ya engumba akitisaki mitema ya bato yango, mpe Gayusi ná Alisitake babikaki.​—Misala 19:35-41.

Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bakoki mpe kokutana na botɛmɛli, ata mpe botomboki makasi na mosala ya kosakola. Mbala mingi, basakolaka nsango malamu na bingumba oyo etondi na losambo ya bikeko, na pite mpe ekobo, mpe na bato ya mobulu ya ndenge nyonso. Atako bongo, na mpiko mpenza bazali kolanda ndakisa ya ntoma Paulo, oyo ‘amipekisaki te koteya na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako’ na engumba ya Efese. (Misala 20:20) Mpe lokola ntoma Paulo, basepelaka ntango bamonaka ete ‘liloba ya Yehova ezali kokoba kokola mpe kolonga.’​—Misala 19:20.

[Elilingi na lokasa 30]

Ndenge esika ya masano ya Efese etikalá

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto