Alongaki na ndenge ya kokamwa
KONDIMA na yo ezali komekama, ezala na mosala, na eteyelo, na kati ya libota, to mpo na bipekiseli oyo Leta atye? Soki ezali bongo, kolɛmba nzoto te. Batatoli ya Yehova mingi bakutanaki mpe na minyoko ya ndenge wana, kasi balongaki yango. Tózwa ndakisa ya Erna Ludolph.
Erna abotamaki na engumba Lübeck, na ekólo Allemagne, na 1908. Na libota na bango mobimba, kaka ye moko nde azalaki Motatoli ya Yehova. Batatoli ya Yehova bakómaki konyokwama makasi ntango Hitler akómaki koyangela Allemagne na 1933. Baninga ya Erna ya mosala bafundaki ye ete apesaka Hitler losako te, yango wana Banazi bakangaki ye. Alekisaki mbula mwambe na babolɔkɔ ndenge na ndenge mpe na bakaa ya bakangami ya Hambourg-Fuhlsbüttel, Moringen, Lichtenberg, mpe Ravensbrück. Ntango Erna azalaki na kaa ya bakangami ya Ravensbrück, likambo moko esalemaki oyo esalisaki ye alonga.
Mwana ya mosala oyo akeseni mpenza na bana ya mosala mosusu
Profɛsɛrɛ Friedrich ná mwasi na ye Alice bazalaki kofanda na engumba Berlin. Bazalaki Banazi te mpe bazalaki kondima makanisi ya Banazi te. Kasi, bazalaki bandeko ya mokonzi moko monene ya basoda ya Banazi oyo azalaki mokɛngɛli ya bato mosusu ya bolɔkɔ na kaa ya bakangami. Ntango profɛsɛrɛ yango ná mwasi na ye bazalaki koluka mwana ya mosala, mokonzi yango alobaki na bango bápona moto ya bolɔkɔ moko ya mwasi. Na sanza ya Marsi 1943, Alice akendeki na kaa ya Ravensbrück mpo na kopona mwana ya mosala. Aponaki nani? Aponaki nde Erna Ludolph. Erna akómaki kofanda na libota ya Holtz, oyo bamoniselaki ye boboto mpenza. Ntango etumba esilaki, akendeki elongo na libota yango na engumba Halle, na pembeni ya ebale Saale. Kuna, Erna akutanaki lisusu na botɛmɛli, na mbala wana, ezalaki botɛmɛli ya Basosialiste ya ɛsti ya Allemagne. Na 1957, Basosialiste bamemaki libota yango na makasi na wɛsti ya Allemagne, mpe Erna akendeki na bango. Nsukansuka, Erna azwaki bonsomi ya losambo.
Ndenge nini Erna alongaki na ndenge moko ya kokamwa? Mpo na etamboli malamu ya Erna mpe mpo na mayele oyo azalaki kosalela mpo na koteya nsango ya Biblia, Alice Holtz ná bana na ye nyonso mitano bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova. Longola yango, bankɔkɔ ya Alice 11 bazali mpe Batatoli. Mibale bazali kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na engumba Selters, na Allemagne. Susanne, mwana moko ya Alice ya mwasi, alobi boye: “Soki libota na biso eyebi solo, ezali mingimingi mpo na ndakisa malamu ya Erna.” Molende ya Erna ebimisi mbano monene. Ezali boni mpo na yo? Soki yo mpe ozali kotikala sembo liboso ya mikakatano, okoki mpe kozwa matomba lokola Erna. Ya solo, etamboli malamu mpe mayele na mosala ya kosakola ekoki kosalisa yo olonga na ndenge ya kokamwa.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndeko Erna Ludolph akufaki na mbula 96 ntango tozalaki kobongisa lisolo oyo. Azalaki sembo tii na nsuka.
[Elilingi na lokasa 31]
Erna Ludolph (oyo afandi) ná libota ya Holtz