Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/5 lok. 32
  • Lolenge malamu ya kotánga mikolo na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge malamu ya kotánga mikolo na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/5 lok. 32

Lolenge malamu ya kotánga mikolo na biso

“TEYÁ biso ndenge ya kotánga mikolo na biso, mpo tókóma na motema ya bwanya.” (Nzembo 90:12, NW) Wana ezali libondeli oyo Moize asalaki na komikitisa mpenza. Azalaki mpenzampenza kosɛnga nini? Biso mpe tosengeli kosala libɔndeli ya ndenge wana?

Na vɛrsɛ 10, Moize amilelaki na ndenge bomoi ya moto ezali mokuse mpenza. Na libaku mosusu, akomaki maloba ya Yobo, moto oyo alobaki ete: “Moto oyo abotami na mwasi azali na mikɔlɔ mingi te mpe atondi na mpasi.” (Yobo 14:1) Emonani polele ete Moize ayebaki ete bomoi ya bato ya kozanga kokoka ezali mokuse mpenza, mpe yango ezalaki kotungisa ye mingi. Yango wana azalaki kotalela mokolo mokomoko lokola likabo ya motuya mpenza. Ntango Moize amilelaki ndenge wana epai na Nzambe, amonisaki mposa na ye ya kosalela mikolo na ye oyo etikalaki na bwanya, na ndenge oyo ekokaki kosepelisa Mozalisi na ye. Biso mpe tosengeli te koluka kosalela mikolo na biso na ndenge ebongi? Soki tolingi Nzambe asepela na biso kobanda lelo, tokosala nyonso mpo na kosalela mikolo na biso na ndenge ebongi.

Ezali na likambo mosusu oyo etindaki Moize ná Yobo báluka kosalela mikolo na bango na bwanya; esengeli mpe kozala ndenge moko mpo na biso. Bato yango nyonso mibale oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki kozela mbano moko na motema likoló, mbano ya bomoi ya malamu koleka awa na mabelé. (Yobo 14:14, 15; Baebele 11:26) Na ntango wana, misala malamu ya moto moko ekokatana lisusu te mpo na liwa. Mokano ya Mozalisi na biso ezali ete bato ya sembo báfanda libela na libela na paladiso awa na mabelé. (Yisaya 65:21-24; Emoniseli 21:3, 4) Yango ekoki mpe kozala elikya na yo soki ‘ozali kotánga mikolo na yo malamu mpo okóma na motema ya bwanya.’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto