Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/5 lok. 32
  • Ozali kotonga likoló ya moboko nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali kotonga likoló ya moboko nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/5 lok. 32

Ozali kotonga likoló ya moboko nini?

MPO ndako ezala makasi, esɛngaka kotonga yango likoló ya moboko ya malamu. Na bantango mosusu, Biblia esalelaka liloba moboko na ndenge ya elilingi.

Na ndakisa, mosakoli Yisaya alobaki ete Yehova Nzambe “atyaki miboko ya mokili.” (Yisaya 51:13) Miboko yango ezali mibeko oyo ebongwanaka te oyo esalaka ete mabelé ebalukaka mpe etɛngatɛnga te. (Nzembo 104:5) Lisusu, Biblia elobeli “miboko” oyo esimbi mokili ya bato. Miboko yango ezali bosembo, mibeko mpe molɔngɔ. Soki makambo lokola kozanga bosembo, mobulu, misala ya mabe ‘ebebisi’ miboko yango, bomoi ya bato mpe ebebaka.​—Nzembo 11:2-6, NW; Masese 29:4.

Likambo ya kotonga na moboko ya malamu etaleli mpe mokomoko na biso. Na nsuka ya Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu Klisto alobaki boye: “Moto nyonso oyo ayokaka maloba na ngai oyo mpe atosaka yango akokokana na moto ya mayele, oyo atongaki ndako na ye likoló ya mabanga. Mpe mbula enɔkaki makasi mpe mpela eyaki mpe mipɛpɛ epɛpaki mpe ebɛtaki ndako yango, kasi ebukanaki te, mpo yango ezwaki moboko likoló ya mabanga. Lisusu, moto nyonso oyo ayokaka maloba oyo ya ngai mpe asalelaka yango te akokokana na moto ya zoba, oyo atongaki ndako na ye likoló ya zɛlɔ. Mpe mbula enɔkaki makasi mpe mpela eyaki mpe mipɛpɛ epɛpaki mpe ebɛtaki ndako yango mpe ebukanaki, mpe kokwea na yango ezalaki monene.”​—Matai 7:24-27.

Ozali kotonga bomoi na yo likoló ya moboko nini? Ozali kotonga yango likoló ya zɛlo, elingi koloba, likoló ya filozofi ya bato oyo bayebi Nzambe te, oyo ekosuka na kokwea? To ozali nde kotonga yango likoló ya mabanga, elingi koloba, na kotosa maloba ya Yesu Klisto, oyo ekosalisa yo olonga mipɛpɛ makasi ya elilingi oyo ekoki kokómela yo na bomoi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto