Mituna ya batángi
Mpo na nini Davidi ná Bata-Seba babomamaki te atako basalaki ekobo, kasi mwana oyo babotaki akufaki?
Mibeko ya Moize elobaki boye: “Soki mobali azwami na kolala na mwasi ya mobali mosusu, bango mibale bakokufa, mobali oyo alali na mwasi mpe mwasi yango. Bongo okolongola lisumu na Yisalaele.” (Deteronome 22:22) Soki Yehova Nzambe atikaka bato bákata likambo ya Davidi ná Bata-seba, bango mibale balingaki mpenza kobomama. Lokola bato bakokaki kotánga na mitema te, balingaki kozwa ekateli na kotalela likambo mpenza oyo basalaki. Bato oyo basali ekobo bazalaki kozwa etumbu ya liwa. Bazuzi bazalaki na ndingisa te ya kolimbisa bato oyo basali lisumu wana.
Nzokande, Nzambe ya solo akoki kotánga na mitema mpe kolimbisa masumu soki amoni ntina ya kosala yango. Lokola Yehova asalaki ná Davidi kondimana mpo na Bokonzi, amonaki malamu ye moko akata likambo na ye. (2 Samwele 7:12-16) “Mosambisi ya mokili mobimba” azali na lotomo ya kopona kosala bongo.—Genese 18:25.
Yehova amonaki nini ntango atángaki na motema ya Davidi? Maloba oyo ezali na likoló ya Nzembo 51 emonisi ndenge Davidi ayokaki “wana mosakoli Natana akendaki epai na ye nsima ya kokɔta na ye na Bata-seba.” Nzembo 51:1-4 elobi boye: “Ee Nzambe, yokelá ngai mawa, lokola ezali boboto na yo; kati na ngɔlu na yo monene, bomá bipɛngweli na ngai. Sukolá ngai malamu kolongola mabe na ngai, pɛtolá ngai na masumu na ngai. Mpo ete nayebi epɛngweli na ngai mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso. Nasali mabe na miso na yo, ɛɛ bobele epai na yo moko, nasali mabe na miso na yo.” Na ntembe te, Yehova amonaki ete mawa makasi oyo Davidi azalaki na yango emonisaki ete abongoli mpenza motema mpe amonaki ete akoki kolimbisa lisumu oyo basalaki. Lisusu, Davidi ye moko azalaki kolimbisa bato, mpe Yehova alimbisaka baoyo balimbisaka basusu. (1 Samwele 24:4-7; Matai 5:7; Yakobo 2:13) Yango wana, ntango Davidi andimaki lisumu na ye, Natana alobaki na ye boye: “[Yehova] alimbisi lisumu na yo, okokufa te.”—2 Samwele 12:13.
Atako bongo Davidi ná Bata-seba bakokaki te kokima mbuma mabe ya lisumu na bango. Natana ayebisaki Davidi boye: “Lokola na likambo wana otsiolaki [Yehova] mabe penza, mwana na yo oyo Betesabé auti kobota, akokufa.” Mwana abɛlaki mpe nsukansuka akufaki, atako Davidi amipimelaki kolya mpe alelaki mikolo nsambo.—2 Samwele 12:14-18, Bible na Lingala ya lelo oyo.
Bato mosusu bamitunaka mpo na nini mwana nde akufaki, nzokande Deteronome 24:16 elobi ete: “Bana bakobomama mpo na batata te.” Kasi, tosengeli koyeba ete soki bato bákataka likambo yango, baboti ná mwana oyo azalaki na libumu balingaki kokufa. Liwa ya mwana wana esalisaki Davidi amona malamumalamu ete Yehova asepelaki ata moke te na lisumu oyo asalaki ná Bata-seba. Tokoki kondima mpenza ete Yehova akataki likambo yango na bosembo, mpamba te “nzela na ye ezali sembo.”—2 Samwele 22:31.
[Elilingi na lokasa 31]
Davidi abongolaki mpenza motema