Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/8 lok. 8-lok. 12 par. 3
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Mikonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Mikonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ELISA AKITANI ELIYA
  • (2 Mikonzi 1:1–8:29)
  • YISALAELE NÁ YUDA BAKEI NA BOOMBO
  • (2 Mikonzi 9:1–25:30)
  • Ezali na ntina mpo na biso
  • Mokanda ya Biblia nimero 12—2 Mikonzi
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Nani akobika na “Mokolo ya Yehova”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Na kati ya 2 Bakonzi
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/8 lok. 8-lok. 12 par. 3

Liloba ya Yehova ezali na bomoi

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Mikonzi

MOKANDA ya Mibale ya Mikonzi ebandi esika Mokanda ya Liboso ya Mikonzi esuki. Ezali lisolo ya bakonzi 29, elingi koloba mikonzi 12 ya Yisalaele, bokonzi ya nɔrdi mpe mikonzi 17 ya Yuda, bokonzi ya sudi. Mokanda yango ezali mpe kolobela makambo oyo basakoli Eliya, Elisa mpe Yisaya basalaki. Atako elobeli masolo yango na molɔngɔ te, elobeli mpe makambo oyo esalemaki na ntango oyo Samalia mpe Yelusaleme ebebisamaki. Mokanda ya Mibale ya Mikonzi elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 340, kobanda na 920 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) tii na 580 L.T.B., ntango mosakoli Yilimia asilisaki kokoma yango.

Mokanda ya Mibale ya Mikonzi ezali na ntina nini mpo na biso? Ezali koteya biso nini mpo na Yehova mpe mpo na lolenge oyo atalelaka bato? Mateya nini tokoki kozwa na makambo oyo bakonzi, basakoli mpe bato mosusu oyo balobeli na mokanda yango basalaki? Tiká tótalela makambo oyo Mokanda ya Mibale ya Mikonzi ekoki koteya biso.

ELISA AKITANI ELIYA

(2 Mikonzi 1:1–8:29)

Ahazia Mokonzi ya Yisalaele akwei na ndako na ye mpe abɛli. Mosakoli Eliya ayebisi ye ete akokufa. Ahazia akufi mpe ndeko na ye Yolama abandi koyangela na esika na ye. Na ntango yango, Yosafata azalaki mokonzi ya Yuda. Eliya amemami na likoló na Mopɛpɛ monene mpe Elisa, mosungi na ye, akómi mosakoli na esika na ye. Na boumeli ya mbula soki 60 nsima ya liwa ya Eliya, Elisa asalaki makamwisi ebele.​—Talá etanda oyo ezali na motó ya likambo “Makamwisi ya Elisa.”

Ntango mokonzi moko ya Moaba aboyaki Yisalaele eyangela ekólo na ye, Yolama, Yosafata mpe mokonzi ya Edome bakendeki kobundisa ye. Yehova asalisaki bango bálonga mpo Yosafata azalaki sembo epai na ye. Na nsima, mokonzi ya Sulia akanaki kokende kobundisa Yisalaele na ntango Yisalaele bayebi te. Kasi, Elisa abimisi sɛkɛlɛ. Mokonzi ya Sulia asiliki makasi mpe atindi “mbalata mpe makalo wana esika moko na ebolo makasi ya basoda” mpo na kokanga Elisa. (2 Mikonzi 6:14) Elisa asali makamwisi mibale mpe azongisi bango tii na mboka na bango na kimya. Na nsima, Bene-hadadi mokonzi ya Sulia azingaki Samalia. Nzala ekɔtaki makasi na Samalia, kasi Elisa asakoli ete nzala yango ekosila.

Mwa moke na nsima, Elisa akei na Damasi. Mokonzi Bene-hadadi abɛli mpe atindi Hazaele akende kotuna Elisa soki akobika na maladi yango. Elisa asakoli ete mokonzi akokufa mpe Hazaele akokóma mokonzi na esika na ye. Na mokolo oyo elandaki, Hazaele atyaki elamba ya kilo na mai mpe azipaki elongi ya mokonzi na yango, mokonzi akufaki mpe ye azwaki bokonzi. (2 Mikonzi 8:15) Na Yuda, Yolama mwana ya Yosafata akómi mokonzi, mpe na nsima mwana na ye Ahazia akómi mokonzi na esika ya tata na ye.​—Talá etanda oyo ezali na motó ya likambo “Bakonzi ya Yuda mpe ya Yisalaele.”

Biyano na mituna ya Biblia:

2:9​—Mpo na nini Elisa asɛngaki ‘ndambo mibale ya elimo ya Eliya’? Mpo Elisa akokisa malamu mokumba ya mosakoli na Yisalaele, azalaki na mposa ya elimo oyo Eliya amonisaki, elimo ya mpiko mpe ya kozanga kobanga. Lokola ayebaki yango, Elisa asɛngaki ndambo mibale ya elimo ya Eliya. Eliya aponaki Elisa azala mokitani na ye mpe azalaki mosungi na ye na boumeli ya mbula motoba, yango wana Elisa azalaki komona Eliya lokola tata na ye ya elimo; Elisa azalaki lokola mwana ya liboso ya elimo ya Eliya. (1 Mikonzi 19:19-21; 2 Mikonzi 2:12) Kaka ndenge mwana ya liboso azalaki kozwa ndambo mibale ya libula ya tata na ye, Elisa mpe asɛngaki mpe azwaki ndambo mibale ya libula ya elimo epai ya Eliya.

2:11​—“Lola” epai “Eliya abutaki na mopɛpɛ monene” ezalaki nini? Ezalaki te esika moko ya mosika na kati ya molɔ́ngɔ́ to mpe efandelo ya elimo epai Nzambe ná bana na ye baanzelu bafandi. (Deteronome 4:19; Nzembo 11:4; Matai 6:9; 18:10) “Lola” epai Eliya abutaki ezalaki kaka likoló oyo tomonaka na miso, esika bandɛkɛ ná baaviɔ etambolaka. (Nzembo 78:26; Matai 6:26) Emonani ete likalo ya moto oyo ezalaki kopumbwa na likoló ememaki Eliya epai mosusu kaka awa na mabelé, epai atikalaki lisusu na bomoi mpo na mwa ntango. Bambula na nsima, Eliya akomelaki Yolama mokonzi ya Yuda mokanda.​—2 Ntango 21:1, 12-15.

5:15, 16​—Mpo na nini Elisa aboyaki kozwa likabo oyo Namana apesaki? Elisa aboyaki kondima likabo yango mpo ayebaki ete likamwisi ya kobikisa Namana oyo asalaki, asalaki yango na nguya ya Yehova, kasi ya ye moko te. Amonaki malamu te kolyela bato na nzela ya mosala oyo Nzambe apesaki ye. Lelo oyo, baklisto ya solo balukaka te kokokisa bamposa na bango moko na nzela ya mosala oyo Yehova apesi bango. Balandaka toli ya Yesu oyo: “Bozwi ofele, bópesa ofele.”​—Matai 10:8.

5:18, 19​—Namana asɛngaki bolimbisi mpo azalaki komikɔtisa na losambo ya lokuta? Mokonzi ya Sulia akómaki mobange mpe azalaki lisusu makasi te. Asengelaki kosimba Namana mpo akwea te. Ntango mokonzi azalaki kofukama mpo na kosambela nzambe Limone, Namana mpe azalaki kofukama. Nzokande, Namana azalaki kofukama kaka mpo na kosalisa mokonzi akwea te, kasi ezalaki te mpo na kosambela. Namana asɛngaki Yehova bolimbisi mpo na ndenge azalaki kosalela mokonzi likambo wana. Elisa andimaki ete Namana alobaki solo mpe alobaki na ye ete: ‘Kende na kimya.’

Mateya mpo na biso:

1:13, 14. Kotala ndenge bato mosusu bazali kosala mpe kozala na komikitisa ekoki kobikisa.

2:2, 4, 6. Atako Elisa azalaki mosungi ya Eliya mbula soki motoba mobimba, abondelaki ye ete atika ye te. Oyo nde ndakisa malamu ya bosembo mpe ya boninga!​—Masese 18:24.

2:23, 24. Ekoki kozala ete ntina mpenza oyo bana mike basɛkaki Elisa ezalaki ete azalaki na libandi mpe alataki elamba oyo Eliya azalaki kolata mpo na mosala na ye ya mosakoli. Bayebaki ete Elisa azali momonisi ya Yehova, kasi baboyaki nde komona ye na mboka na bango. Balobaki na ye, “butá,” elingi koloba matá na Betele, to mpe bázwa yo lokola bazwaki Eliya. Emonani polele ete Bana wana balandaki baboti na bango oyo bazalaki koyina mosakoli yango. Ezali na ntina mpenza ete baboti báteya bana na bango kotosa bamonisi ya Nzambe.

3:14, 18, 24. Liloba ya Yehova ezangaka te kokokisama.

3:22. Kongɛnga ya moi ya ntɔngɔ likoló ya mai, esalaki ete mai yango emonana lokola makila, ntango mosusu mpo mabelé ya batalase oyo bautaki kotimola ezalaki motane. Yehova akoki kosalela biloko oyo azalisá mpo na kokokisa mikano na ye.

4:8-11. Mwasi moko ya Suneme oyo ayebaki ete Elisa azali “moto ya bulɛɛ ya Nzambe,” ayambaki ye na ndako na ye. Biso mpe tosengeli kosalaka bongo mpo na basambeli ya Yehova ya sembo.

5:3. Mwana mwasi moke ya Yisalaele azalaki na kondima ete Nzambe azali na likoki ya kosala makamwisi. Alobelaki mpe kondima na ye na mpiko. Bino bilenge, bosalaka nyonso mpo na kokómisa kondima na bino makasi na bilaka ya Nzambe mpe bozalaka na mpiko ya koyebisa balakisi mpe baninga na bino ya kelasi solo ya Biblia?

5:9-19. Ndakisa ya Namana, emonisi biso ete moto ya lolendo akoki koyekola komikitisa​—1 Petelo 5:5.

5:20-27. Gehazi abukaki mbuma mabe ya lokuta na ye! Soki tokanisi mpasi oyo ekoki kokómela biso soki tozali kosalela Nzambe mpe kosala mabe na kobombana, yango ekosalisa biso tóboya etamboli ya ndenge wana.

YISALAELE NÁ YUDA BAKEI NA BOOMBO

(2 Mikonzi 9:1–25:30)

Yehu apakolami mpo azala mokonzi na Yisalaele. Azwi bibongiseli mbala moko mpo na koboma bato ya ndako ya Ahaba. Na mayele mpenza, Yehu “alongolaki Baala na kati ya Yisalaele.” (2 Mikonzi 10:28) Ntango kaka Atalia, mama ya Ahazia, ayokaki ete Yehu abomi mwana na ye, ‘atɛlɛmaki mpe abomaki bana nyonso ya mokonzi’ mpe azwaki bokonzi. (2 Mikonzi 11:1) Kaka Yoasa mwana ya Ahazia nde abikisamaki, mpe nsima ya mbula motoba ya kobomba ye, batyaki ye Mokonzi na Yuda. Lokola ateyamaki na nganga Yoyada, Yoasa akobaki kosala oyo ezali malamu na miso ya Yehova.

Bakonzi nyonso oyo bayangelaki nsima ya Yehu basalaki oyo ezali mabe na miso ya Yehova. Elisa akufaki ndenge bato nyonso bakufaka na ntango oyo nkɔkɔ ya Yehu azalaki koyangela. Mokonzi ya minei na nsima ya Yoasa ezalaki Ahaza, mpe ‘asalaki te oyo ezali malamu na miso ya Yehova.’ (2 Mikonzi 16:1, 2) Kasi, mwana na ye Hizikiya azalaki mokonzi moko oyo “akangamaki na [Yehova].” (2 Mikonzi 17:20; 18:6, Bible na lingala ya lelo oyo) Na 740 L.T.B., ntango Hizikiya azalaki mokonzi na Yuda mpe Hosea azalaki koyangela Yisalaele, Salamanesele, mokonzi ya Asulia, ‘abɔtɔlaki Samalia mpe amemaki Yisalaele na boombo na Asulia.’ (2 Mikonzi 17:6, NW) Na nsima, bamemaki bapaya na teritware ya Yisalaele mpe lingomba ya Basamalia ebotamaki.

Na kati ya bakonzi nsambo oyo bayangelaki Yuda na nsima ya Hizikiya, kaka Yosiya nde alongolaki losambo ya lokuta na mboka. Nsukansuka, na 607 L.T.B., bato ya Babilone babɔtɔlaki Yelusaleme mpe ‘Yuda bamemamaki na boombo mosika na mboka na bango.’​—2 Mikonzi 25:21, Bible na lingala ya lelo oyo.

Biyano na mituna ya Biblia:

13:20, 21​—Likamwisi wana emonisi ete tosengeli kosambelaka mikuwa ya basantu to biloko mosusu oyo batiká? Te! Biblia emonisi te ete bato bazalaki kosambela mikuwa ya Elisa. Likamwisi wana esalemaki na nguya ya Nzambe, lokola kaka makamwisi mosusu nyonso oyo Elisa asalaki ntango azalaki na bomoi.

15:1-6​—Mpo na nini Yehova apesaki Azalia maba? “Ezalaki [Uziya] na makasi, akómaki na lolendo . . . , zambi aboyaki [Yehova] Nzambe na ye. Akɔtaki na tempelo ya [Yehova] mpo na kotumba mpaka ya malasi na etumbelo ya mpaka.” Ntango banganga “batɛmɛlaki mokonzi Uziya” mpe balobaki na ye ete, “bimá na esika ya bulɛɛ,” asilikelaki banganga mpe maba ezwaki ye.​—2 Ntango 26:16-20.

18:19-21, 25​—Hizikiya asalaki boyokani na Ezipito? Te. Makambo oyo Laba-sake alobaki ezalaki lokuta, kaka ndenge alobaki ete ayei mpo ‘Yehova azali elongo na ye.’ Mokonzi ya sembo Hizikiya atyaki motema kaka epai ya Yehova.

Mateya mpo na biso:

9:7, 26. Etumbu makasi oyo ndako ya Ahaba ezwaki emonisi ete losambo ya lokuta mpe kosopa makila ya bato oyo basali eloko te ezali mabe na miso ya Yehova.

9:20. Yehu ayebanaki lokola moto oyo atambwisaka likalo mbangumbangu; yango emonisi molende na ye mpo na kokokisa mokumba oyo bapesaki ye. Yo, oyebani lokola mosakoli ya molende ya Bokonzi?​—2 Timote 4:2.

9:36, 37; 10:17; 13:18, 19, 25; 14:25; 19:20, 32-36; 20:16, 17; 24:13. Tosengeli kondima mpenza ete ‘liloba oyo ebimi na monɔkɔ ya Yehova ezangaka te kokokisama.’​—Yisaya 55:10, 11.

10:15. Kaka ndenge Yonadaba andimaki na motema moko kokɔta na likalo ya Yehu mpe kokenda na ye, “ebele ya bato” mpe bandimi kosalisa Yesu Klisto, Yehu ya mikolo na biso ná bayekoli na ye bapakolami.​—Emoniseli 7:9.

10:30, 31. Atako lisolo ya bomoi ya Yehu ezangi makambo mabe te, Yehova asepelaki na nyonso oyo asalaki. Ya solo, ‘Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na biso.’​—Baebele 6:10.

13:14-19. Lokola Yoasa, nkɔnkɔ ya Yehu, amonisaki molende te, kasi abɛtaki mbanzi na nse kaka mbala misato, alongaki koboma Baasulia nyonso te. Yehova alingaka ete tósala mosala oyo apesi biso na motema mobimba mpe na molende.

20:2-6. Yehova ‘ayokaka mabondeli.’​—Nzembo 65:2.

24:3, 4, Bible na lingala ya lelo oyo. Mpo na nyongo ya makila oyo Manase azalaki na yango, Yehova “aboyaki kolimbisa” Yuda. Nzambe azwaka na motuya makila ya moto oyo babomi ye kaka mpamba. Tokoki kozala na elikya ete Yehova akoboma baoyo basopaki makila ya bato oyo basali eloko te.​—Nzembo 37:9-11; 145:20.

Ezali na ntina mpo na biso

Mokanda ya Mibale ya Mikonzi ezali komonisa Yehova lokola moto oyo akokisaka bilaka. Ndenge bafandi ya bikólo mibale wana bakendeki na boombo, liboso ekólo ya Yisalaele mpe na nsima ekólo ya Yuda, yango emonisi mpenza ndenge bitumbu oyo Deteronome 28:15–29:28 elobelaki ekokisamaki. Mokanda ya Mibale ya Mikonzi ezali kolobela Elisa lokola mosakoli moko oyo azalaki na molende mpo na nkombo ya Yehova mpe losambo ya solo. Balobeli Hizikiya ná Yosiya lokola bakonzi ya komikitisa, oyo bazalaki kotosa Mobeko ya Nzambe.

Ntango tozali kotalela na mozindo makambo oyo bakonzi, basakoli mpe bato mosusu basalaki, ndenge elobelami na Mokanda ya Mibale ya Mikonzi, tokoyekola makambo ya ntina mingi oyo tosengeli kokangama na yango mpe makambo mosusu oyo tosengeli kokima. (Baloma 15:4; 1 Bakolinti 10:11) Ya solo, “liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”​—Baebele 4:12.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 10]

MAKAMWISI YA ELISA

1. Mai ya Yolodani ekabwani.​—2 Mikonzi 2:14

2. Mai mabe ya Yeliko epɛtolami.​—2 Mikonzi 2:19-22

3. Bankɔsi babomi bilenge.​—2 Mikonzi 2:23, 24

4. Basoda bazwi mai ya komɛla.​—2 Mikonzi 3:16-26

5. Mwasi-akufelá-mobali azwi mafuta ya kolambela.​—2 Mikonzi 4:1-7

6. Mwasi moko ya mboka Suneme oyo abotaka te aboti.​—2 Mikonzi 4:8-17

7. Mwana moko asekwisami.​—2 Mikonzi 4:18-37

8. Bilei oyo ezalaki na pwazɔ ekómi malamu mpo na kolya.​—2 Mikonzi 4:38-41

9. Bato nkama balei mampa 20.​—2 Mikonzi 4:42-44

10. Maba ya Namana esili.​—2 Mikonzi 5:1-14

11. Gehazi azwi maba ya Namana.​—2 Mikonzi 5:24-27

12. Epasola etepi.​—2 Mikonzi 6:5-7

13. Mosungi moko amoni makalo ya baanzelu.​—2 Mikonzi 6:15-17

14. Miso ya basoda ya Sulia ekufi.​—2 Mikonzi 6:18

15. Miso ya basoda ya Sulia emoni lisusu.​—2 Mikonzi 6:19-23

16. Mokufi moko azongi na bomoi.​—2 Mikonzi 13:20, 21

[Etanda/Bililingi na lokasa 12]

BAKONZI YA YUDA MPE YA YISALAELE

Saulo/Davidi/Salomo: 1117/1077/1037 L.T.B.a

BOKONZI YA YUDA DATI (L.T.B.) BOKONZI YA YISALAELE

Lehobama ․․․․․․ 997 ․․․․․․ Yelobama

Abiya/Asa ․․․․ 980/978 ․․․․

․․ 976/975/952 ․․ Nadaba/Basa/Ela

․․ 951/951/951 ․․ Zimili/Omili/Tibini

․․․․․․ 940 ․․․․․․ Ahaba

Yosafata ․․․․․․ 937 ․․․․․․

․․․․ 920/917 ․․․․ Ahazia/Yolama

Yolama ․․․․․․ 913 ․․․․․․

Ahazia ․․․․․․ 906 ․․․․․․

(Atalia) ․․․․․․ 905 ․․․․․․ Yehu

Yoasa ․․․․․․ 898 ․․․․․․

․․․․ 876/859 ․․․․ Yeohaza/Yoasa

Amasia ․․․․․․ 858 ․․․․․․

․․․․․․ 844 ․․․․․․ Yelobama II

Azalia (Uziya) ․․․․․․ 829 ․․․․․․

․․ 803/791/791 ․․ Zekalia/Salumu/Manaheme

․․․․ 780/778 ․․․․ Pekahia/Peka

Yotama/Ahaza ․․․․ 777/762 ․․․․

․․․․․․ 758 ․․․․․․ Hosea

Hizikiya ․․․․․․ 746 ․․․․․․

․․․․․․ 740 ․․․․․․ Bakangi engumba Samalia

Manase/Amona/Yosiya ․․ 716/661/659 ․․

Yoahaza/Yeyakim ․․․․ 628/628 ․․․․

Yoyakini/Sidikiya ․․․․ 618/617 ․․․․

Yelusaleme ebebisami ․․․․․․ 607 ․․․․․․

[Maloba na nse ya lokasa]

a Badati mosusu ekoki kozala mbula ya ebandeli ya boyangeli.

[Elilingi na lokasa 8]

Namana amikitisaki mpe abikisamaki na nguya ya Yehova

[Elilingi na lokasa 9]

Nini ekómelaki Eliya ntango ‘abutaki likoló na kati ya mopɛpɛ monene’?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto