Tozali mpenza na mposa ya Masiya?
NTANGO mosusu yo mpe omitunaka motuna yango. Ya solo, ebongi mpenza omituna soki Masiya akoki kosala likambo moko na bomoi na yo.
Bato mosusu oyo okoki komemya makanisi na bango bakoloba na yo ete ezali kutu likambo ya kokakatana te: Biso nyonso tozali mpenza na mposa ya Masiya. Na ekeke ya liboso, moto moko oyo ayebaki malamu mibeko ya Bayuda akomaki mpo na Masiya ete: “Ata soki bilaka ya Nzambe ezali ebele boni, yango ekómi Ɛɛ na nzela na ye.” Na ndenge yango, amonisaki mokumba monene ya Masiya na mokano ya Mozalisi na biso ya kopambola bikólo nyonso awa na mabelé. (2 Bakolinti 1:20) Masiya azali na mokumba ya ntina mingi na boye ete bisakweli mingi ya Biblia elobeli koya na ye mpe bomoi na ye awa na mabelé. Henry Halley akomaki buku moko oyo ebele ya bato batángaki na boumeli ya bambula koleka 70 oyo eleki; kati na yango alobaki boye: “Testama ya Kala ekomamaki mpo na kolamusa mposa ya bato na koya ya [Masiya] mpe kobongisa nzela na ye.” Kasi koya na ye ezali mpenza na ntina? Mpo na nini osengeli kotyela yango likebi?
Nkombo “Masiya,” elimboli “Mopakolami” mpe ezali na ndimbola moko na “Klisto.” Moto yango, oyo buku moko (Encyclopædia Britannica, ebimeli ya 1970) ebengi ye “mosikoli oyo aleki monene,” asengelaki koya kolongola lisumu oyo Adama ná Eva bakɔtisaki. Nzambe akelaki bango bato ya kokoka, apesaki bango elikya ya bomoi ezangi nsuka na Paladiso, kasi babebisaki libaku yango. Satana Zabolo, anzelu oyo atombokelaki Nzambe, alobaki ete Mozalisi na bango azali makambo makasi mpe ete bakozala malamu koleka soki bakómi kopona bango moko malamu ná mabe.—Genese 3:1-5.
Eva akosamaki mpe andimaki lokuta yango. Adama apesaki valɛrɛ mingi na mwasi na ye koleka bosembo na ye epai ya Nzambe, amikɔtisaki na botomboki wana oyo Zabolo abimisaki. (Genese 3:6; 1 Timote 2:14) Botomboki na bango esukaki te kaka na kobebisa elikya na bango ya bomoi ya seko na paladiso. Batikelaki mpe bana na bango lisumu mpe liwa.—Baloma 5:12.
Kaka na ntango wana, Mozalisi na biso Yehova, abongisaki ndenge oyo akosukisa mabe nyonso oyo botomboki esengelaki kobimisa. Azwaki mokano ya kozongisa boyokani na bato na nzela ya likambo oyo na nsima ekómaki moko ya mitinda ya Mibeko ya Moize—bomoi mpo na bomoi. (Deteronome 19:21; 1 Yoane 3:8) Esengelaki ete etinda wana ekokisama mpo bana ya Adama ná Eva bákóma na likoki ya kozwa bomoi ezangi nsuka na paladiso awa na mabelé, ndenge Mozalisi akanaki. Yango emonisi biso ntina ya Masiya.
Ntango Yehova Nzambe akatelaki Zabolo etumbu, alobaki maloba oyo ezali esakweli ya liboso ya Biblia ete: “Nakotya bonguna kati na yo ná mwasi mpe kati na momboto na yo ná momboto na ye. Ye akopanza motó na yo mpe yo okoswa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobaki ete “maloba [yango] ezali ebandeli ya bilaka nyonso oyo Biblia elobi mpo na Masiya.” Molimboli mosusu alobaki ete Masiya azali moto oyo Nzambe akosalela mpo na “kolongola bampasi nyonso oyo lisumu ememá,” mpe na ndenge yango akomemela bato mapamboli.—Baebele 2:14, 15.
Atako bongo, okoki koloba ete lelo oyo ezali ata na eloko moko te oyo emonisi ete bato bapambolami. Kutu, bato bazali kokutana na makambo mingi oyo ezali kolongola bango elikya. Yango wana, buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete “tii lelo oyo, Bayuda mingi bazelaka koya ya Masiya” mpe soki ayei “akobongisa makambo mpe akolongola bampasi nyonso oyo ezali konyokola bato.” Nzokande, Biblia elobi ete Masiya asilá koya. Tokoki kondima oyo Biblia elobi? Tokozwa eyano na lisolo oyo elandi.