Nsango malamu ekɔti na bingumba ya mosikamosika ya Bolivie
TOZALI bato soki 20 oyo tokutani na libongo, tokozwa bwato mpe konana mokolo mobimba mpo na kokende na bamboka ya mikemike. Tozali pembeni ya Bangomba ya Andes, esika Ebale Beni ekɔti na etando patatalu ya Amazone. Esika yango ezali kitoko mpenza.
Kasi, biso tozali baturiste te. Bamosusu kati na biso bazali bana-mboka; basusu bautá mosika mpe bayaki kofanda na Rurrenabaque, mwa engumba oyo ezali na banzete oyo ebimisaka bafololo kitoko, ezali na bandako ya briki, mpe babalabala na yango ezalaka kimya, makɛlɛlɛ eyokanaka kaka soki tukutuku oyo esalaka taxi ezali koleka. Mpo na nini tozali kosala mobembo yango?
Makambo oyo ezali kosalema awa, ezali mpe kosalema na bisika mosusu ya ekólo Bolivie. Batatoli ya Yehova oyo bauti na bavile mpe na mikili mosusu bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bingumba mikemike.—Matai 24:14.
Bolivie ezali na ntei ya Amerika ya Sudi. Ekólo yango eleki France na monene mbala mibale, kasi France eleki yango na bato mbala soki zomi. Bato ya Bolivie bafandaka mingimingi na bavile, na bingumba oyo batimolaka mabanga ya ntalo to likoló mpenza ya bangomba mpe na bingumba oyo ezali na mabwaku, bisika oyo basalaka bilanga. Kasi, bingumba oyo ezali na nse mpe na bazamba minene ekabwani moko na mosusu na bantaka mingi mpenza.
Na bambula ya 1950 mpe ya 1960, bamisionɛrɛ ya mpiko, na ndakisa Betty Jackson, Elsie Meynberg, Pamela Moseley, mpe Charlotte Tomaschafsky, bakɔtisaki nsango malamu na bingumba mingi ya mosikamosika. Bateyaki bato ya mitema sembo solo ya Biblia mpe bafungolaki masangá ya mikemike. Na bambula ya 1980 mpe ya 1990, motángo ya Batatoli ya Yehova emataki mbala motoba, kasi mingimingi na bingumba ya minene. Lelo oyo, masangá ezali na bakartye mingi ya bingumba yango. Masangá ezali na bingumba ya minene, na bakartye epai bato basalaka na babiro oyo ezali na bandako ya etaje, bafandaka na bandako ya kitoko, mpe basombaka biloko na bamagazini. Masangá mosusu mpe ezali na bakartye ya babola, epai bato bafandaka na bandako ya ndɛlɛ, basombaka biloko na wenze, mpe balataka bilamba ya langilangi ya modɛlɛ ya mboka na bango. Kasi, ndenge nini kosalisa bato mingi na bingumba oyo ezali mosikamosika mpo báyeba Yehova?
Bandimi kolongwa na bavile
Na boumeli ya mbula ntuku mibale oyo eleki, bato mingi ya Bolivie bazalaki kotika bingumba epai batimolaka mabanga ya ntalo mpe bamboka mpo na kokende kofanda na bavile ya minene. Ezalaki kosalema mpenza te ete moto alongwa na vile mpo na kokende kofanda na mboka. Na bamboka mingi telefone ezali kaka moko mpo na bato nyonso mpe kura ezalaka mokolo mobimba te. Batatoli oyo bafandaka na bingumba ya mike bazwaka libaku ya komonana ná bandeko na bango baklisto kaka na mayangani ya etúká oyo, mpo na kokende kuna esɛngaka mbongo mingi, ezalaka na makama, mpe elɛmbisaka. Na bamboka yango ezali kaka na biteyelo ya ebandeli. Na bongo, nini mpenza etindaka Batatoli ya Yehova mosusu bálongwa na bavile mpe bákende kofanda na bamboka?
Ndeko mobali moko nkombo na ye Luis alobi boye: “Nazalaki na likoki ya kozwa mosala ya malamu mpenza na engumba La Paz. Kasi, baboti na ngai bazalaki ntango nyonso komonisa ngai ete mosala ya kokómisa bato bayekoli ezali mosala eleki malamu oyo nakoki kosala. Yango wana, nalandaki formasyo ya ntango mokuse na mosala ya masɔ. Ntango nakendaki konje na Rurrenabaque, namonaki ete bato bazali mpenza na mposa ya koyoka nsango malamu. Ntango namonaki ete bandeko bazali mingi te, nayokaki mposa ya kozonga kuna mpe kopesa bango mabɔkɔ. Lelo, nazali koyekola Biblia na bato 12. Na ndakisa, nayekolaka na elenge mobali moko ná mwasi na ye oyo bazali na bana minei. Mobali yango azalaki kolangwa masanga mpe kobɛta masano ya mbongo, kasi atiki nyonso wana mpe abandi koyebisa baninga na ye makambo ya Yehova oyo azali koyekola. Amibongisaka malamu liboso ya boyekoli. Soki akei kolekisa mikolo misato to minei na zamba mpo na kokata banzete, ayokaka mawa mingi mpo alingaka kozangisa ata ebongiseli moko te ya elimo. Ntango namonaka bango na makita, namonaka ete nasalaki malamu ndenge nayaki awa.”
Juana, ndeko mwasi moko oyo abɔkɔlaka mwana na ye ye moko, alobi boye: “Nazalaki kosala lokola mwana ya mosala na ndako moko na engumba La Paz. Ntango mwana na ngai azalaki naino moke, nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza na engumba yango. Ntango nakendaki mobembo na Rurrenabaque, namonaki ete nakoki kosala mingi lisusu soki nakei kofanda kuna. Yango wana, tokendaki kuna, mpe nazwaki mosala na ndako mosusu. Na ebandeli, ezalaki mpasi mpo tómesana na molunge ná banyama-nkɛkɛ. Kasi, tokokisi mbula nsambo awa. Nayekolaka Biblia na bato mingi pɔsɔ na pɔsɔ, mpe mingi kati na bango bayanganaka na makita.” Juana ná mwana na ye bazali na kati ya bato oyo bakozwa bwato mpo na kosala mobembo. Babengi yo osala na bango mobembo yango.
Mobembo na mai
Tozali koyoka makɛlɛlɛ ya motɛrɛ ya bwato wana tozali koleka na esika oyo ebale ezali moke mpe eleki na katikati ya bangomba. Ntango batshaku bamoni biso, babandi kosala makɛlɛlɛ makasi. Mai ya salite oyo ezali kouta na bangomba ezali kobaluka wana moto oyo azali kotambwisa bwato azali kolekisa yango na bisika ya malamu. Liboso midi ebɛta, tokómi na mwa mboka moko mpe tokiti na bwato. Kuna, tokutani na nkulutu moko ya lisangá ya Rurrenabaque, mpe alakisi biso epai oyo tokosakola.
Bato ya mboka bazali koyamba biso malamu mpenza, bamosusu bazali kopesa biso esika na nse ya nzete mpe bamosusu bazali kokɔtisa biso na ndako na bango ya bambu oyo bazipá na mandalala. Tomoni mobali moko ná mwasi na ye bazali kokamola koko na ekamwelo moko ya mabaya. Mai ya koko ezali kokita na nzungu ya ebende. Na nsima, bakotɔkisa yango tii ekokóma pɔtɔpɔtɔ ya moindo mpe bakokende kotɛka yango na vile. Bakɔtisi biso na ndako na bango mpe batuni biso mituna mingi na Biblia.
Na nsima, tokobi mobembo na biso pembenipembeni ya mai mpe tozali kosakola mboka na mboka. Bato mingi bazali kosepela ntango bazali koyoka ete Biblia elobi ete maladi mpe liwa ekosila. (Yisaya 25:8; 33:24) Lokola minganga bazalaka mpenza te na bamboka yango, na mabota mingi basilá kokufela mwana. Kosala bilanga mpe koboma mbisi, misala oyo bato ya mboka babikelaka, ezali pɛtɛɛ te. Yango wana, bato mingi bazali kosepela koyoka elaka ya Nzambe oyo ezali na Nzembo 72, oyo elobeli guvɛrnema oyo ekosilisa bobola. Kasi, okanisi ete bato oyo bafandi na mwa bamboka yango ya mosikamosika bakosala molende mpo na koyangana na makita? Eric ná mwasi na ye Vicky bazalaki komituna motuna yango; bango mibale bazali babongisi-nzela na Santa Rosa, engumba oyo esɛngaka ngonga misato na motuka mpo na kokóma kuna.
Bato oyo bazali kosepela bakoya na makita?
Eleki sikoyo mbula 12 banda Eric ná Vicky bautaki na etúká ya Californie, na États-Unis, mpe bayaki na Bolivie. Mokɛngɛli-motamboli moko alendisaki bango bákende na engumba Santa Rosa. Vicky alobi boye: “Telefone ya bato nyonso ezali kaka mibale na engumba mobimba mpe Internet ezali te. Mboka yango ezali na kati ya zamba mpenza. Mbala mingi, ntango tozali kokende na bamboka mosusu na batukutuku na biso, tomonaka bangando, maligbanga, mpe banyoka ya minene. Kasi, tosepelaka mingi na bato ya bamboka yango koleka banyama. Toyekolaka Biblia na mobali moko nkombo na ye Vaca ná mwasi na ye; bazali na bana minei ya mike. Bafandaka na ntaka ya kilomɛtrɛ 26 longwa na engumba. Vaca azalaki molangwi-masanga, kasi sikoyo abongwani. Pɔsɔ na pɔsɔ, amemaka libota na ye mobimba mpe leki na ye ya mwasi na Ndako ya Bokonzi. Amemaka mwasi na ye mpe mwana na bango ya moke na velo. Mwana mosusu ya mbula libwa amemaka leki na ye na velo mosusu, mpe mwana na bango ya mbula mwambe atambwisaka velo na ye ye moko. Esɛngaka bangonga misato mpo bakóma na Ndako ya Bokonzi.” Libota yango balingi mpenza Yehova mpe basalaka nyonso mpo na koyangana na makita.
Nsima ya sanza 18 mpamba, bato misato bazwi batisimo, mpe bato soki 25 bazali koya na Ndako ya Bokonzi ya sika na Santa Rosa. Bato mingi bazali kosepela koyekola Biblia, kasi mingi kati na bango basengeli kobongisa makambo mosusu oyo ezali kopekisa bango básalela Yehova.
Mokakatano ya kokomisa libala na buku ya Leta
Marina ná Osni, bamisionɛrɛ na engumba moko ya Bolivie oyo ezali pene na Brésil, balobi ete bato mingi ya mboka yango bamonaka te ete libala esengeli koumela libela. Bazalaka na basi ebele. Osni alobi boye: “Likambo yango epekisaka bango bákola na elimo. Soki moto alingi kokóma moklisto ya solo, ezalaka mindɔndɔ mpe esɛngaka mbongo mingi. Bamosusu basengeli kotika basi mosusu mpe kokomisa kaka mwasi moko na buku ya Leta. Atako bongo, bato mosusu, nsima ya koyeba ete Biblia nde esɛngi kokomisa libala na buku ya Leta, basali mosala makasi mpo na kozwa mbongo oyo esengeli mpo na kosala yango.”—Baloma 13:1, 2; Baebele 13:4.
Marina abɛti lisolo ya Norberto. “Mobali yango azalaki na basi ebele liboso akóma kofanda na mwasi moko oyo azalaki kosala mampa. Norberto alekaki mwasi yango na mbula soki 35 mpe mwasi yango azalaki na mwana moko ya mobali oyo Norberto andimaki kobɔkɔla. Ntango mwana yango akolaki, Norberto alingaki kopesa ye ndakisa malamu. Na yango, ntango Motatoli moko ayaki koteya na esika oyo bazalaki kotɛka mampa, Norberto andimaki koyekola Biblia, atako ayebaki kotánga te mpe azalaki na mbula koleka 70. Ntango Norberto ná makango na ye bayebaki makambo oyo Yehova azali kosɛnga, bakomisaki libala na bango na buku ya Leta mpe na nsima, bazwaki batisimo. Mwana na bango akómá moklisto oyo azali ndakisa malamu—kaka ndenge tata-mobɔkɔli na ye alingaki. Norberto ayekolaki kotánga, kutu asalaka masukulu na lisangá. Atako azali lisusu makasi te mpo akómi mobange, azali kaka molende na mosala ya kosakola nsango malamu.”
Elimo ya Yehova ezali kopesa makasi
Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Misala 1:8) Komona ndenge elimo ya Nzambe ezali kotinda bandeko mibali mpe basi bákende tii na bisika eleki mosika, ezali likambo ya kolendisa mpenza! Na ndakisa, na mobu 2004, basakoli soki 30 ya molende bandimaki kokende mpo na mwa ntango na bateritware ya mosikamosika mpo na kozala babongisi-nzela monene. Bazali kolanda ndakisa malamu ya bandeko soki 180 oyo bauti na mboka mopaya mpe bayei na Bolivie mpo na kosala lokola babongisi-nzela, bakɛngɛli ya zongazonga, bamisionɛrɛ, to na mosala ya Betele. Basakoli 17 000 ya Bolivie bazali koyekola Biblia ná bato soki 22 000.
Bandeko yango bazali na esengo mingi ntango bazali komona ndenge oyo elimo ya Yehova ezali kotambwisa bango. Na ndakisa, Robert ná Kathy bandimaki kosala mosala ya misionɛrɛ na engumba Camiri. Engumba yango ezali mosika mpenza na bingumba mosusu; ezali na kati ya mwa bangomba mike mpe pembeni ya ebale. Robert alobi boye: “Tomoni ete toyaki mpenza na ntango ebongi. Nsima ya mbula mibale, bato soki 40 bakómi basakoli ya nsango malamu.”
Molangwi-masanga mpe mobɛti ya masano ya mbongo ayoki nsango malamu
Bato mingi ya mboka bakamwaka ntango bazali komona ndenge bato oyo bazali koyekola Biblia bazali kobongwana. Na ndakisa, eleki sikoyo mbula minei, moto moko nkombo na ye Ariel, alalaki na mbeto mpo alangwaki masanga. Atako ayebanaki mingi mpo azalaki kobɛta masano ya mbongo, azalaki komitungisa mpo azalaki na banyongo minene, azalaki komibanzabanza mpo na bana na ye, mpe azalaki na mikakatano na libala na ye. Mbala moko, Motatoli ya Yehova moko oyo azalaki kosakola ndako na ndako, abɛtaki na porte na ye. Ariel afungolaki mpenza matoi ntango ndeko mobali yango azalaki koteya ye makambo ya Biblia. Na nsima, Ariel azongaki na mbeto, kasi na mbala oyo, mpo na kotánga makambo oyo Biblia elobi na ntina na bolamu ya libota, Paladiso, mpe kosalela Nzambe. Na mikolo oyo elandaki, akómaki koyekola Biblia.
Na ntango bamisionɛrɛ bakómaki na Camiri, Arminda, mwasi ya Ariel, azalaki mpe koyekola—kasi azalaki mpenza komipesa te. Alobaki boye: “Nakosala nyonso mpo atika masanga. Kasi nayebi te soki nakokoka. Namoni lokola nde akotika ezaleli yango te.” Kasi, Arminda akómaki kosepela mingi na boyekoli ya Biblia. Nsima ya mbula moko, azwaki batisimo mpe akómaki kopesa bandeko na ye litatoli. Mwa moke na nsima, bandeko na ye mingi bamipesaki na Yehova.
Kasi, Ariel azalaki na etumba monene mpo atika masanga, likaya, mpe masano ya mbongo. Makambo ebongwanaki ntango abengisaki baninga na ye na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Alobaki boye: “Moto oyo akoya te, akozala lisusu moninga na ngai te. Nakobanda koyekola Biblia na bato oyo bakoya.” Abandaki koyekola Biblia na bato misato. Liboso Ariel akóma mosakoli na lisangá, ayekolaki Biblia na ndeko na ye moko oyo akolaki na elimo mpe bazwaki na ye batisimo mokolo moko. Arminda alobi boye: “Azali lisusu te Ariel oyo nayebaki liboso.”
Robert alobi boye: “Nsukansuka, bato 24 ya libota yango bakómaki koyangana na mikita pɔsɔ na pɔsɔ. Bato zomi kati na bango bazwi batisimo, mpe mwambe bazali basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Bato mosusu oyo bamonaki mbongwana oyo basalaki bakómaki mpe koyekola Biblia mpe bazali koyangana na makita. Motángo ya bayangani elongwe na bato 100 mpe ekómi bato 190. Ngai ná Kathy tozali koyekola Biblia na bato 30; bango nyonso bayanganaka na makita. Tosepelaka mpenza ndenge tozali awa.”
Makambo oyo ezali kosalema na bingumba ya mosikamosika ya Bolivie ezali kaka eteni moke ya mosala oyo Emoniseli mokapo 7 elobi ete ekosalema na mokili mobimba; mokapo yango elobeli koyanganisama na “mokolo ya Nkolo” ya bato oyo bakobika na bolɔzi monene. (Emoniseli 1:10; 7:9-14) Esalemá naino te ete bamilio ya bato ya bikólo nyonso básangana na losambo ya Nzambe kaka moko ya solo ndenge ezali kosalema lelo oyo. Yango ezali mpenza komonisa ete bilaka ya Nzambe ekokokisama mosika te!
[Elilingi na lokasa 9]
Betty Jackson
[Elilingi na lokasa 9]
Elsie Meynberg
[Elilingi na lokasa 9]
Pamela Moseley
[Elilingi na lokasa 9]
Charlotte Tomaschafsky, na lobɔkɔ ya mobali
[Elilingi na lokasa 10]
Pɔsɔ na pɔsɔ, Vaca ná libota na ye batambolaka bangonga misato na bavelo mpo na kokende na Ndako ya Bokonzi
[Elilingi na lokasa 10]
Eric ná Vicky bayaki kosakola na esika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te
[Elilingi na lokasa 11]
Bato ya mboka oyo ezali pembeni ya Ebale Beni bazali koyoka nsango malamu na likebi mpenza
[Elilingi na lokasa 12]
Robert ná Kathy, bamisionɛrɛ na Camiri