Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/3 nk. 12-14
  • Talá! Pole ezali malamu mingi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Talá! Pole ezali malamu mingi!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso”
  • ‘Solo oyo ezali kopesa bonsomi’
  • Pole mpo na nzela na biso
  • Tóngɛnga lokola miinda na mokili
  • ‘Sombá nkisi ya miso mpo opakola na miso na yo’
  • Pole ya Nzambe elongolaka molili!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • “Pole eyei na mokili”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tolanda pole na mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Tolata bibundeli na pole”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/3 nk. 12-14

Talá! Pole ezali malamu mingi!

OSILÁ koluka nzela na kati ya molili? Boye oyebi ete ezalaka pɛtɛɛ te. Mpe oyebi ete pole esalisaka mpenza mpo na komona nzela! Ekoki mpe kozala ete okutanaki na likambo moko oyo etindaki yo omiyoka lokola nde ozali na kati ya molili. Ntango mosusu ezalaki ntango ozalaki komona te ndenge ya kosilisa mokakatano moko boye. Mpe mokemoke obandaki komona pole, elingi koloba, omonaki ndenge ya kosilisa mokakatano yango. Komona ndenge ya kosilisa mokakatano moko oyo ezalaki lokola molili ezalaka esengo mpenza.

Na siɛklɛ ya liboso, bato mingi bazalaki na molili ya elimo. Ntoma Petelo akomelaki bato oyo batikaki bindimeli na bango mpo na kolanda mateya ya boklisto boye: “[Nzambe] abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na kati ya pole na ye ya kokamwa.” (1 Petelo 2:9) Ezalaki lokola nde bato yango balongwaki na molili mpo na kokɔta na pole. Tokoki mpe kokokanisa yango na moto oyo azalaki liboso ye moko mpe azalaki na elikya te; bongo na nsima, akɔtaki na libota moko oyo ezali na elikya.​—Baefese 2:1, 12.

“Otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso”

Baklisto ya liboso bamonaki “solo,” elingi koloba kondima ya solo ya boklisto. (Yoane 18:37) Bamonaki pole ya kokamwa mpe balongwaki na molili mpo na kokɔta na pole. Kasi, nsima ya bambula, esengo mpe molende ya baklisto yango mosusu ekitaki. Na ndakisa, na nsuka ya ekeke ya liboso, likambo moko ebimaki na lisangá ya Efese. Yesu Klisto, ye oyo asilaki kosekwa mpe amataki na likoló, amonaki likambo yango; alobaki boye: “Nazwi yo mabe na likambo oyo, ete otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso. Na yango kanisá lisusu na nini okwei, mpe bongolá motema mpe salá misala ya kala.” (Emoniseli 2:4, 5) Baklisto ya Efese basengelaki kozongela bolingo oyo bazalaki na yango liboso mpo na Nzambe mpe mpo na solo.

Ezali boni mpo na biso? Lokola toyekoli solo ya Liloba ya Nzambe, ezali lokola nde tomoni pole mpe tosepeli na yango mingi. Tolingaka solo mingi. Kasi, mikakatano ya bomoi ekoki kokitisa bolingo na biso mpo na solo. Longolá yango ezali mpe na mikakatano ya “mikolo ya nsuka.” Tozali na mokili oyo ezali na “bantango ya ndenge mosusu”; mokili oyo etondi na bato oyo ‘bamilingaka bango moko, balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, bato bazangi botosi epai ya baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo.’ (2 Timote 3:1, 2) Makanisi na bango ekoki kokitisa molende mpe bolingo na biso mpo na Yehova.

Soki tosili kobungisa bolingo oyo tozalaki na yango liboso, tosengeli ‘kokanisa lisusu na nini tokwei, mpe kobongola motema.’ Tosengeli kozongela milende oyo tozalaki na yango liboso. Lisusu, tosengeli kokeba ete bolingo na biso mpo na solo ekita te. Ezali mpenza na ntina ete tóbatela makanisi ya malamu, tózala na esengo mpe tósala ete bolingo na biso mpo na Nzambe mpe solo na ye ezala kaka makasi.

‘Solo oyo ezali kopesa bonsomi’

Mateya ya Biblia ezali malamu mingi mpamba te epesaka biyano na mituna oyo bato bamitunaka banda bankóto ya bambula. Mituna lokola: Mpo na nini tozali na bomoi? Mpo na nini mabe ezali na mokili? Bomoi mosusu ezalaka nsima ya liwa? Yehova ateyi biso solo ya Biblia. Tiká tózanga soki moke te botɔndi mpo na makambo nyonso oyo tosili koyekola.

Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:32) Mbeka ya Yesu epesi biso likoki ya kosikolama na lisumu mpe liwa. Kasi, mateya yango kitoko ya solo esikoli biso mpe na kozanga boyebi mpe kozanga elikya ya mokili oyo etondi na molili. Soki tozali komanyola makambo oyo tozali koyekola, bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na Liloba na ye ekokóma makasi.

Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Tesaloniki boye: “Ntango boyambaki liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe, oyo ezali mpe kosala mosala na kati na bino bandimi.” (1 Batesaloniki 2:13) Batesaloniki bayokaki mpe ‘bandimaki liloba ya Nzambe na esengo.’ Bazalaki lisusu “na kati ya molili” te; kutu, bakómaki “bana ya pole.” (1 Batesaloniki 1:4-7; 5:4, 5) Baklisto yango bayekolaki ete Yehova azali Mozalisi, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, atondi na bwanya, bolingo mpe motema mawa. Ndenge moko na bayekoli mosusu ya Klisto, bango mpe bayekolaki ete Yehova azwaki bibongiseli mpo na kolimbisa masumu na bango na nzela ya mbeka ya lisiko ya Mwana na ye, Yesu Klisto.​—Misala 3:19-21.

Atako na ntango wana, baklisto ya Tesaloniki bazalaki na boyebi nyonso te ya solo, bayebaki epai basengeli kozwa boyebi yango. Makomami Mosantu ekoki kosalisa moto ya Nzambe “azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Baklisto ya Tesaloniki bakokaki kokoba koyekola mpe komona ete pole ya Liloba ya Nzambe ezali malamu mingi. Bazalaki na bantina ya kosepela ntango nyonso. (1 Batesaloniki 5:16) Ezali mpe bongo mpo na biso.

Pole mpo na nzela na biso

Mpo na komonisa ntina mosusu oyo pole ezali malamu mingi, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Liloba na yo ezali mwinda na [makolo] na ngai mpe pole na nzela na ngai.” (Nzembo 119:105) Toli ya Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tólanda nzela ya malamu mpe tózala na bomoi oyo ezali na ntina. Tokozala te lokola masuwa oyo ebungi nzela. Soki toyebi mateya ya solo mpe tozali kosalela yango, ekosalisa biso tózala te lokola bato oyo bazali “kotindikama lokola na mbonge mpe komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya.”​—Baefese 4:14.

Biblia elobi boye: “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” Ebakisi mpe boye: “Esengo na ye oyo Nzambe ya Yakobo azali kosunga ye; oyo azali na [Yehova] Nzambe na ye.” (Nzembo 146:3, 5) Lisusu, kotya elikya epai ya Yehova, ekosalisa biso tózala na kobanga te mpe tómitungisa te. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Soki totiki pole ya Liloba ya Nzambe etambwisa biso, tokozwa matomba mingi.

Tóngɛnga lokola miinda na mokili

Ntina mosusu oyo tolobi ete pole ya Liloba ya Nzambe ezali malamu mingi, ezali ete epesaka biso libaku ya kosala mosala moko ya lokumu koleka. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda. Mpe, talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” Liboso ya maloba yango, Yesu alobaki naino boye: “Bokonzi nyonso epesameli ngai na likoló mpe na mabelé.”​—Matai 28:18-20.

Tótalela banani bazali kosunga baklisto ya solo na mosala ya kosakola nsango malamu mpe koteya solo ya Biblia epai ya bato ya bikólo nyonso. Yesu alakaki bayekoli na ye ete akozala elongo na bango. Na ntembe te, asalisi bango mpe asungi bango wana bazali ‘kongɛngisa miinda na bango’ na mosala ya kosakola mpe na “misala ya malamu.” (Matai 5:14-16) Baanzelu bazali mpe kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola. (Emoniseli 14:6) Ezali boni mpo na Yehova Nzambe? Ntoma Paulo akomaki boye: “Ngai nalonaki, Apolo amwangisaki mai, kasi Nzambe azalaki kokolisa.” Oyo nde libaku malamu ya “kosala elongo na Nzambe”!​—1 Bakolinti 3:6, 9.

Tókanisa mpe ndenge oyo Nzambe azali kopambola milende na biso na mosala yango. Eloko moko te ekokani na libaku oyo Nzambe apesi biso ya “kongɛnga lokola miinda na mokili.” Soki tozali kongɛngisa pole ya Liloba ya Nzambe na maloba na biso mpe na misala na biso, tokosalisa mpenza bato ya mitema sembo. (Bafilipi 2:15) Lisusu, tokoki kosepela ndenge tozali kosakola mpe koteya na molende nyonso mpamba te ‘Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na biso mpe bolingo oyo tomonisaki mpo na nkombo na ye.’​—Baebele 6:10.

‘Sombá nkisi ya miso mpo opakola na miso na yo’

Na maloba oyo Yesu atindelaki baklisto ya Laodikia na siɛklɛ ya liboso, alobaki boye: “Osomba epai na ngai . . . nkisi ya miso mpo opakola na miso na yo bongo omona. Baoyo nyonso ngai nalingaka mingi napamelaka bango mpe napesaka bango disipilini.” (Emoniseli 3:18, 19) Mateya mpe disipilini ya Yesu yango nde “nkisi ya miso” oyo ekoki kobikisa moto oyo akufi miso na elimo. Mpo tózala makasi na elimo tosengeli kondima toli na ye mpe kolanda litambwisi oyo ezali na Biblia. Tosengeli mpe kolanda makanisi mpe ndakisa ya Klisto. (Bafilipi 2:5; 1 Petelo 2:21) Nkisi yango ya miso ezali ofele te. Yesu alobaki boye: “Sombá [yango] epai na ngai.” Yango ezali kosɛnga ntango mpe milende.

Ntango tolongwe na esika moko ya molili mpe tokɔti na esika ya pole, esɛngaka mwa ntango mpo miso na biso emesana. Ndenge moko mpe, esɛngaka ntango mpo na koyekola Liloba ya Nzambe mpe komona pole ya solo. Esɛngaka ntango mpo na komanyola makambo oyo toyekoli mpe komona motuya ya mateya ya solo. Kasi, nkisi yango eleki ntalo te. Mpo na nini? Mpamba te pole ezali malamu mingi!

[Elilingi na lokasa 14]

“Sombá epai na ngai . . . nkisi ya miso mpo opakola na miso na yo bongo omona”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto