Biyano oyo ebongi!
BATOLI mingi ya ebele ya babuku oyo bato bakomá ezali mingimingi mpo na kosalisa bato oyo bazali kotungisama. Biblia ekeseni na babuku yango. Batoli na yango esalisaka kaka te baoyo bazali kotungisama. Esalisaka moto akwea te na mabunga oyo ekoki komemela ye mindondo ya mpamba.
Biblia ekoki “kopesa mayele epai ya elema, boyebi mpe [likoki ya kokanisa, NW] epai ya elenge.” (Masese 1:4) Soki otosi toli ya Biblia, “mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo mpo na kobatela yo na nzela mabe.” (Masese 2:11, 12) Tótalela mwa bandakisa oyo ezali komonisa ete kolanda toli ya Biblia ekoki kosalisa yo ozala nzoto kolɔngɔnɔ, obongisa bomoi ya libota na yo mpe ozala mosali to patrɔ ya malamu.
Komɛlaka masanga mingi te
Biblia epekisi te komɛla na bokatikati. Ntoma Paulo alobelaki matomba oyo vinyo ekoki komema na nzoto ntango apesaki elenge Timote toli oyo: “Salelá nde mwa vinyo moke mpo na estoma na yo mpe bamaladi oyo obɛlabɛlaka.” (1 Timote 5:23) Mikapo mosusu ya Biblia ezali komonisa ete Nzambe asalaki vinyo te kaka lokola nkisi. Biblia elobaka ete vinyo ‘esepelisaka motema ya moto.’ (Nzembo 104:15) Nzokande, Biblia ezali kokebisa biso tókóma te “baombo ya ebele ya vinyo.” (Tito 2:3) Elobi ete: “Zalá elongo na bamɛli ya masanga te, soki elongo na bato [oyo balekisaka ndelo na kolya mosuni, NW]. Zambi kolangwa mpe [kolekisa ndelo na kolya, NW] ekokómisa moto na bobola.” (Masese 23:20, 21) Nini ekómaka soki moto alandi toli wana te? Yoká makambo oyo esalemaka na bikólo mosusu.
Lapolo ya mokili mobimba oyo Organisation mondiale de la santé esalaki mpo na mobu 2004 na oyo etali masanga elobi ete: “Bato ya Irlande babungisaka miliare soki 3 ya dolare mbula na mbula mpo na mikakatano oyo eutaka na komɛla masanga mingi.” Na kati na yango, mosusu ebimaka “mpo na kosalisa nzoto (350 milio ya dolare), mosusu mpo na makama ya mituka (380 milio ya dolare), mpo na bato oyo babomaki bato mpo bamɛlaki masanga mingi ( 126milio ya dolare), oyo bakompanyi ezali kobungisa mpo bato bazangisaki mosala mpo na masanga (1 300 milio ya dolare).”
Longola mbongo ebele oyo ezali kobeba, komɛla masanga kozanga bokatikati ezali mpe komemela bato mikakatano mingi. Na ndakisa, na Australie, na boumeli ya mbula moko kaka, bato koleka nkóto 500 banyokwamaki na bato oyo bamɛlaki masanga kozanga ndelo. Na France, bato mingi (30%) oyo balangwaka masanga basalaka bato ya mabota na bango mabe. Na kotalela makambo oyo touti kolobela, toli oyo Biblia epesi mpo na masanga ezali mpenza malamu!
Boyá mimeseno oyo ebebisaka nzoto
Kala, na mobu 1942, ntango bato nyonso bazalaki kosepela komɛla likaya, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalisaki batángi na yango báyeba ete komɛla makaya ezali kobuka mitinda ya Biblia mpe bato basengeli koboya yango. Lisolo moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mbula yango emonisaki ete bato oyo balingi kosepelisa Nzambe basengeli kotosa mobeko ya Biblia ya ‘komipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.’ (2 Bakolinti 7:1) Omoni te ete toli wana ya Biblia oyo epesamaki esili koleka sikoyo mbula soki 65 ezali ya bwanya?
Na mobu 2006, Organisation mondiale de la santé elobaki ete makaya ezali “eloko ya mibale oyo eleki koboma bato na mokili.” Mbula na mbula, bato soki milio mitano bakufaka mpo na makaya. Nzokande, bato soki milio misato bakufaka na sida mbula na mbula. Na boumeli ya ekeke ya 20, makaya ebomi bato soki 100 milio; motángo yango ekesani mpenza te na motángo ya bato oyo babomamaki na bitumba nyonso oyo esalemaki na ekeke yango. Ya solo, lelo oyo bato mingi na mokili bamoni ete komɛla makaya ezali mabe.
“Bókima pite”
Bato mingi balingaka te kondima oyo Biblia elobaka mpo na kosangisa nzoto. Na bokeseni na oyo bato mingi bandimaka, Biblia epekisi te lolenge nyonso ya kosangisa nzoto. Nzokande, ezali kopesa batoli ya malamu mpo na koyeba ndenge ya kokokisa mposa yango. Biblia eteyaka ete kosangisa nzoto epesami nzela kaka epai ya mobali mpe mwasi oyo babalani. (Genese 2:24; Matai 19:4-6; Baebele 13:4) Kosangisa nzoto ezali ndenge oyo babalani bamoniselanaka bolingo. (1 Bakolinti 7:1-5) Mwana nyonso oyo abotami na libala yango, akozala na baboti mibale oyo bamibanzabanzaka moko mpo na mosusu.—Bakolose 3:18-21.
Mpo na oyo etali pite, Biblia elobi ete: “Bókima pite.” (1 Bakolinti 6:18) Moko ya bantina ya kokima pite ezali nini? Vɛrsɛ yango ebakisi boye: “Lisumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezalaka libándá ya nzoto na ye, kasi moto oyo azali na momeseno ya kosala pite azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.” Nini ekómaka soki moto alandi te toli ya Biblia mpo na pite?
Yoká makambo oyo esalemaka na Etats-Unis. Na kati ya bikólo ya bozwi, ekólo yango ezali na motángo monene koleka (850 000) ya bana basi oyo bazali kozwa zemi mbula na mbula. Bana mingi oyo bamama na bango basopaki bazemi na bango te, bazali na batata te. Ya solo, mingi kati na bamama yango bazali kosala nyonso mpo na kobɔkɔla bana na bango na bolingo mpe na disipilini. Bamosusu bazali kolonga. Nzokande, likambo ya mawa ezali ete mbala mingi bana na bango ya mibali basukaka na bolɔkɔ mpe baoyo ya basi mbala mingi babotaka mpe lokola bamama na bango. Nsima ya kotalela mitángo ya bambula oyo euti koleka, Robert Lerman, moto moko ya mayele, akomaki boye: “Lokola mabota mingi lelo oyo ezali na moboti kaka moko, mikakatano ebakisami lisusu: Bana mingi bakendaka lisusu kelasi te, bato bakómi komɛla masanga mpe makaya mingi, bilenge bakómi kozwa bazemi mpe kobota, mpe bilenge ya mobulu bakómi mingi.”
Bato ya pite babɛlaka mpe bamaladi ya nzoto mpe ya makanisi. Na ndakisa, zulunalo moko (Pediatrics) elobi boye: “Makambo mingi emonisi ete bilenge mingi oyo basalaka pite babɛlaka motó to bamibomaka.” Mpo na oyo etali bamaladi mosusu, ebongiseli moko (the American Social Health Association) elobi boye: “Bato mingi ya Amérique (koleka 50%) bakobɛla maladi oyo ezwamaka na nzela ya kosangisa nzoto na bomoi na bango.” Kanisá naino bampasi oyo moto akoki kokima soki alandi toli ya Biblia na oyo etali kosangisa nzoto!
Bókolisa boyokani na kati ya libota
Biblia ezali kaka te kokebisa mpo na oyo etali bizaleli mabe. Tótalela batoli na yango mpo na oyo etali kobongisa bomoi ya libota.
Mokanda ya Nzambe elobi boye: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.” (Baefese 5:28) Na esika mibali bámonaka basi na bango mpamba, Biblia ezali kolendisa bango báfanda na basi na bango “engebene boyebi, kopesáká bango lokumu lokola epai ya mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi.” (1 Petelo 3:7) Mpo na matata oyo ekoki kobima, Biblia elendisi mibali ete: “Bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasimakasi te.” (Bakolose 3:19) Ondimi te ete soki mobali azali kotosa toli oyo, mwasi na ye akolinga ye mpe akomemya ye?
Biblia epesi basi toli oyo: “Tiká basi bátosaka mibali na bango lokola epai ya Nkolo, mpo mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Klisto mpe azali mokonzi ya lisangá . . . Mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:22, 23, 33) Omoni te ete soki mwasi azali kolanda toli oyo ntango azali kosolola na mobali na ye to kobɛta masolo na ye, mobali na ye akolinga ye?
Na likambo ya kobɔkɔla bana, Biblia epesi bino baboti toli ete bósololaka na bana na bino ‘wana ekofanda bino na ndako, mpe wana ekotambola bino na nzela, mpe wana ekolala bino mpe wana ekotɛlɛma bino.’ (Deteronome 6:7) Batata nde basengeli libosoliboso kopesa bana na bango mitinda oyo basengeli kolanda mpe disipilini oyo etondi na bolingo. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Biblia elobi mpe na bana boye: “Bótosaka baboti na bino,” mpe “kumisá tata na yo ná mama na yo.”a—Baefese 6:1, 2.
Okanisi ete mabota ekozala na esengo soki bazali kotosa toli oyo? Moto mosusu akoki koloba ete: ‘Toli yango ezali malamu na koyoka. Kasi, ekoki mpenza kosalisa?’ Tozali kosɛnga yo okende na ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na esika ofandi. Kuna, okokutana na mabota oyo bazali kosala makasi mpo na kotosa batoli ya Biblia. Sololá na bango. Talá ndenge bazali kosolola kati na bango. Okomona yo moko ete kotosa batoli ya Biblia esalaka mpenza ete mabota ezala na esengo!
Mosali ya molende mpe patrɔ ya bosembo
Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa moto abungisa mosala na ye te? Biblia elobi ete mosali oyo ayebi mosala na ye malamu, patrɔ na ye akolinga ye mpe akofuta ye malamu. Mokonzi Salomo atunaki boye: “Omoni moto oyo azali na etingya na mosala na ye? Ye akotɛlɛma liboso ya mikonzi.” (Masese 22:29) Epai mosusu, “moto ya gɔigɔi” azali lokola “molinga . . . na miso” ya patrɔ na ye. (Masese 10:26) Biblia ezali kolendisa basali bázala sembo mpe básala mosala na etingya. “Tiká moyibi ayiba lisusu te, kasi tiká nde asala mosala makasi, kosaláká na mabɔkɔ na ye oyo ezali mosala ya malamu.” (Baefese 4:28) Toli oyo elandi ezali na ntina ata ntango patrɔ azali komona yo te. “Bótosaka na makambo nyonso baoyo bazali bankolo na bino na mosuni, bózala te lokola basepelisi-bato, kosala mosala kaka ntango bazali kotala bino, bósala nde na bosembo ya motema, na kobanga Yehova.” (Bakolose 3:22) Soki ozali patrɔ, okosepela te na mosali oyo atosaka toli wana?
Biblia ezali kokundwela bapatrɔ boye: “Mosali abongi na lifuti na ye.” (1 Timote 5:18) Mobeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele ezalaki kosɛnga na bapatrɔ báfutaka basali na bango mbongo oyo ekoki mpe na ntango oyo bayokanaki. Moize akomaki boye: “Okotungisa moninga na yo te mpe okobɔtɔla biloko na ye te. Lifuti ya mosali na yo ekolala epai na yo na butu kino ntɔngɔ te.” (Levitike 19:13) Okosepela te kosala epai ya patrɔ oyo atosaka toli wana mpe afutaka yo na ntango boyokanaki mpe na bosembo?
Liziba ya bwanya oyo eleki nyonso
Ozali kokamwa ndenge Biblia, atako ezali buku moko ya kala mpenza, ezali na batoli oyo ezali kosalisa bato kino lelo oyo? Ntina oyo batoli ya Biblia esilaka ngala te lokola oyo ya babuku mosusu, ezali ete Biblia ezali liloba ya bato te, kasi ezali nde “liloba ya Nzambe.”—1 Batesaloniki 2:13.
Tozali kolendisa yo oluka koyeba Biblia malamumalamu. Soki osali bongo, okokolisa bolingo na yo mpo na Yehova Nzambe, Nkolo Biblia. Soki osaleli batoli oyo azali kopesa, yango ekobatela yo na makama mpe ekosalisa yo obongisa bomoi na yo. Soki osali bongo, ‘okopusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na yo.’ (Yakobo 4:8) Buku ata moko te ekoki kosalisa yo lokola Biblia.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba mitinda mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa libota na yo, talá buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 4]
Okanisi ete likanisi ya Biblia mpo na masanga ebongi?
[Elilingi na lokasa 5]
Ondimaka toli ya Biblia oyo emonisi ete komɛla makaya ezali mabe?
[Bililingi na lokasa 7]
Kolanda toli ya Biblia ebongisaka bomoi ya libota
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa ]
Mabelé: Fɔtɔ ya NASA