Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/10 nk. 12-15
  • Landá pole

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Landá pole
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kotika te ete kondima na yo ebeba
  • Pembeni ya Mokili ya Ndaka
  • Lisalisi mpo na kosɛnzɛla na elimo
  • Kebá na miinda ya lokuta
  • Nani azali kolanda pole na mokili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tolanda pole na mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bamemi na pole​—Mpo na mokano nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Pole ya Nzambe elongolaka molili!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/10 nk. 12-15

Landá pole

MIINDA oyo elakisaka masuwa nzela ebikisá bomoi ya bato mingi. Nzokande, mpo na motambwisi-masuwa oyo alɛmbi, mwinda oyo ezali komonana na mosika emonisaka kaka te ete azali kopusana na makama. Emonisaka mpe ete libongo ekómi pembeni. Ndenge moko mpe lelo oyo, baklisto bakómi na nsuka ya mobembo molai oyo bazali kosala na mokili oyo ezali na molili. Biblia ekokanisi bato oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ na “mai-ya-monana [oyo] mazali kotombwatombwa, bayebi kofanda na kimya te, mai na yango ekobwaka bosoto mpe mbindo likoló.” (Yisaya 57:20) Basaleli ya Nzambe bazali na mokili elongo na bato ya ndenge wana. Atako bongo, bazali na elikya ya lobiko oyo ezali lokola mwinda ya elilingi. (Mika 7:8) Na lisalisi ya Yehova mpe ya Liloba na ye, “pole ekonami mpo na moto ya boyengebene, mpe esengo mpo na baoyo bazali na mitema sembo.”​—Nzembo 97:11.a

Nzokande, baklisto mosusu batiki ete makambo mosusu elongola likebi na bango na pole oyo ezali kouta epai ya Yehova; na ndenge yango, makama oyo ezali lokola mabanga na nse ya mai, na ndakisa, kolinga biloko ya mokili, pite mpe ekobo, to mpe lipɛngwi, ezindisi kondima na bango. Lokola na siɛklɛ ya liboso, lelo oyo “kondima [ya baklisto mosusu] ebebi lokola masuwa oyo epanzani.” (1 Timote 1:19; 2 Petelo 2:13-15, 20-22) Tokoki kokokanisa mokili ya sika na libongo epai tozali kokende. Lokola mokili yango ekómi pene, ekozala mawa soki moko na biso abebisi boyokani na ye na Yehova!

Kotika te ete kondima na yo ebeba

Na ntango ya kala, masuwa ekokaki kosala mobembo molai na mbu mpe koya kozinda kaka pembeni ya libongo. Makama ezalaki mingi pembeni ya libongo. Ndenge moko mpe, mpo na bato mingi, “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya makambo oyo ezali eleko oyo eleki na makama. Biblia elobaki ete ekozala ntango “ya mpasi mpenza,” mingimingi mpo na baklisto ya solo.​—2 Timote 3:1-5.

Mpo na nini mpasi ezali mingi na mikolo ya nsuka? Satana ayebi ete atikali kaka “na eleko moko ya ntango mokuse” mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe. Yango wana, abakisi lisusu milende mpo na kobebisa kondima na bango. (Emoniseli 12:12, 17) Atako bongo, Yehova azali kosalisa mpe kotambwisa biso. Azali ntango nyonso ekimelo mpo na baoyo balandaka batoli na ye. (2 Samwele 22:31) Mpo na kokebisa biso, apesi biso bandakisa oyo ezali komonisa polele mayele mabe ya Satana. Tótalela bandakisa mibale oyo elobeli Bayisalaele ntango bakómaki pembeni ya Mokili ya Ndaka.​—1 Bakolinti 10:11; 2 Bakolinti 2:11.

Pembeni ya Mokili ya Ndaka

Bayisalaele babimaki na Ezipito na litambwisi ya Moize. Mwa moke na nsima, bakómaki pembeni ya Mokili ya Ndaka. Moize atindaki mibali 12 bákende konɔnga mokili yango. Ntango bazongaki, mibali 10 kati na bango balobaki ete Bayisalaele bakokoka kolonga Bakanana te mpamba te bazali bingambe mpe bazali na bibundeli ya makasi. Bayisalaele basalaki nini? Biblia elobi ete babandaki koimaima epai ya Moize mpe Alona; balobaki boye: “[Yehova] alingaki kokɔtisa biso na mokili oyo ete tókufa na mopanga mpo na nini? Basi na biso ná bana na biso bakokangama. . . . Tiká tópona kapitɛni mosusu mpe tóbutwa na Ezipito.”​—Mituya 13:1, 2, 28-32; 14:1-4.

Kanisá naino! Bayisalaele yango bautaki komona ndenge Yehova asukisaki Ezipito​—ekólo oyo elekaki makasi na ntango wana—​na malɔzi zomi oyo atindaki mpe na likamwisi oyo asalaki na Mai Motane. Na nsima, bakómaki pembeni mpenza ya Mokili ya Ndaka; bazalaki lokola masuwa oyo ezali komona mwinda oyo ezali komonisa ete libongo ekómi pene. Kasi, bango bamonaki ete Yehova akokoka te kolonga bikólo mikemike ya Kanana. Na ntembe te, kozanga kondima ya bato yango esepelisaki Yehova te mpe elɛmbisaki Yosua ná Kalebe, banɔngi mibale oyo balobaki ete Bakanana bazali lokola “kwanga mpo na [Bayisalaele]”! Mibali wana mibale balobaki makambo oyo bamonaki mpenza na mokili ya Kanana. Lokola Bayisalaele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka te, Yosua ná Kalebe mpe bakobaki kotambola elongo na bango na esobe na boumeli ya bambula mingi; kasi, bango bakufaki te na bato oyo bazangaki kondima. Kutu, Yosua ná Kalebe batambwisaki Bayisalaele oyo babotamaki na esobe mpe bakɔtisaki bango na Mokili ya Ndaka. (Mituya 14:9, 30) Na mbala oyo mpe, ntango bakómaki pembeni ya Mokili ya Ndaka, bakutanaki na komekama ya ndenge mosusu. Basalaki nini?

Balaka, mokonzi ya Moaba asɛngaki Balama, mosakoli moko ya lokuta, alakela Bayisalaele mabe. Kasi, Yehova asalaki ete Balama apambola bango. (Mituya 22:1-7; 24:10) Balama alukaki mayele mosusu mpo na kokweisa Bayisalaele mpo Nzambe apesa bango lisusu te mokili oyo alakaki. Asalaki nini? Amemaki bango na kosala pite mpe kosambela Baala. Atako apɛngwisaki Bayisalaele nyonso te, bato 24 000 bakweaki. Bato yango basangisaki nzoto na bana basi ya Moaba mpe basambelaki Baala ya Peolo.​—Mituya 25:1-9.

Kanisá naino! Mingi kati na Bayisalaele yango bamonaki ndenge Yehova abatelaki bango kati na “lisobe monene mpe ya nsɔmɔ.” (Deteronome 1:19) Atako bongo, ntango bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, bato 24 000 bakweaki mpo bamipesaki na bamposa ya mosuni mpe Yehova abomaki bango. Yango ezali mpenza likebisi mpo na biso basaleli ya Nzambe oyo tozali lelo pene ya kokɔta na mokili ya sika.

Na milende ya nsuka oyo Satana azali kosala mpo na kopekisa basaleli ya Yehova bázwa mbano na bango, azali kosalela mayele ya sika te. Se ndenge asalaki epai ya Bayisalaele na mbala ya liboso oyo bakómaki pembeni ya Mokili ya Ndaka, mbala mingi Satana asalelaka minyoko, botɛmɛli, mpe kotyola mpo na kokɔtisa kobanga mpe ntembe na mitema na biso. Makambo yango ezongisi baklisto mosusu nsima. (Matai 13:20, 21) Mayele mosusu oyo Satana asalelaka banda kala ezali ya kobebisa etamboli ya bato. Bato mosusu oyo bazali kokɔta na lisangá na makanisi ya mabe, bazali kobebisa bato oyo bazali makasi te na elimo mpe bazali te kotambola na pole oyo eutaka epai ya Nzambe.​—Yuda 8, 12-16.

Mpo na baklisto oyo bakɔmeli na elimo mpe bazali ekɛngɛ, ndenge bizaleli ya bato ezali kobeba lelo oyo ezali elembeteli ya polele ete Satana akómi na nsuka. Satana ayebi ete etikali moke akokoka lisusu kosala mabe moko te na basaleli ya Nzambe oyo bazali sembo. Yango wana, sikoyo ezali mpenza ntango ya kosɛnzɛla na elimo mpo Satana akweisa biso te.

Lisalisi mpo na kosɛnzɛla na elimo

Ntoma Petelo alobaki ete liloba ya esakweli ezali lokola “mwinda oyo ezali kongɛnga na esika moko ya molili,” mpamba te esalisaka baklisto básosola ndenge oyo mokano ya Nzambe ezali kokokisama. (2 Petelo 1:19-21) Bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe mpe batikaka yango etambwisa bango bamonaka ete Yehova akobongisa nzela na bango. (Masese 3:5, 6) Lokola bazali na mitema oyo etondi na elikya, bato yango bazali ‘koyemba mpo na esengo ya motema,’ nzokande, baoyo bayebi Yehova te mpe baoyo bazali kotika banzela na ye bazali kosuka na “mpasi na motema” mpe na “mikakatano na [makanisi, NW].” (Yisaya 65:13, 14) Yango wana, soki tozali komipesa na koyekola Biblia mpe kosalela makambo oyo tozali kotánga, miso na biso ekozala ntango nyonso na mokili ya sika kasi te na bisengo ya ntango mokuse ya mokili oyo.

Libondeli mpe ezali na ntina mingi mpo na kosɛnzɛla na elimo. Ntango Yesu alobelaki nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo, alobaki boye: “Bólala mpɔngi te, kopesáká malɔmbɔ ntango nyonso mpo bólonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.” (Luka 21:34-36) Tomoni ete Yesu asalelaki liloba “malɔmbɔ,” oyo ezali mabondeli ya mozindo. Yesu ayebaki ete na mikolo oyo ya nsuka, baklisto bakokutana na makambo oyo ekoki kozangisa bango bomoi ya seko. Mabondeli na yo emonisaka mpenza ete ozali na mposa makasi ya kolala mpɔngi te na elimo?

Tóbosana te ete eteni ya nsuka ya mobembo na biso nde ekoki kozala na makama mingi. Yango wana, ezali na ntina mingi tólongola miso te na pole oyo ezali komema biso na lobiko.

Kebá na miinda ya lokuta

Na ntango ya kala, bato ya mabe bazalaki kotyela masuwa mitambo na butu, ntango oyo batambwisi-masuwa bazalaki komona mabelé malamu te. Bato yango bazalaki kotya miinda na bisika ya mabe mpo na kobungisa batambwisi-masuwa nzela. Baoyo bazalaki kokwea na mitambo, masuwa na bango ezalaki kozinda, bazalaki koyiba bango biloko nyonso, mpe bazalaki kokufa na mai.

Ndenge moko mpe, Satana, oyo amimonisaka lokola “anzelu moko ya pole,” alukaka kobebisa boyokani na biso na Nzambe. Zabolo akoki kosalela “bantoma ya lokuta” mpe bapɛngwi oyo bamimonisaka lokola “baministre ya boyengebene” mpo na kokosa baoyo bazali ekɛngɛ te. (2 Bakolinti 11:13-15) Na ntango ya kala, soki kapitɛnɛ ná bato na ye bazali ekɛngɛ mpe bamesaná na mosala, bazalaki kokosama te na miinda ya lokuta. Ndenge moko mpe, baklisto “oyo makoki na bango ya kososola, lokola bazali kosalela yango, eteyami mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu” bakosamaka te na mateya ya lokuta mpe bafilozofi.​—Baebele 5:14; Emoniseli 2:2.

Batambwisi-masuwa bazalaki na mokanda oyo bakómá bisika nyonso oyo miinda ezalaki. Mokanda yango ezalaki kolobela lolenge ya mwinda mokomoko mpe ndenge oyo epelaka. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Batambwisi-masuwa balukaka koyeba mwinda nini oyo bazali komona mpe esika yango ezali; batalelaka lolenge ya mwinda yango mpe batalaka soki ekokani na oyo mokanda elobeli.” Ndenge moko mpe, Liloba ya Nzambe esalisaka bato ya sembo báyeba lingomba ya solo mpe bandimi na yango, mingimingi na mikolo ya nsuka oyo, na eleko oyo Yehova atomboli losambo ya solo likólo ya mangomba ya lokuta. (Yisaya 2:2, 3; Malaki 3:18) Yisaya 60:2, 3 emonisi bokeseni moko oyo ezali kati na losambo ya solo mpe oyo ya lokuta; elobi boye: “Molili ekozipa mokili, molili tuu ekozipa mpe mabota; nde [Yehova] akobimela yo, mpe nkembo na ye ekomonana likoló na yo. Mpe mabota bakoya epai na pole na yo mpe mikonzi kino kongɛnga ya kobima na yo.”

Bamilio ya bato oyo bauti na mabota nyonso bakobungisa kondima na bango te na eteni ya nsuka ya mobembo na bango soki bazali kokoba kolanda pole oyo eutaka epai ya Yehova. Kutu, bakosala mobembo kozanga likama na mikolo oyo etikali na ebongiseli ya makambo oyo mpe bakokɔta na mokili ya sika ya kimya.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Biblia esalelaka liloba “pole” na bandimbola mingi ya elilingi. Na ndakisa, Biblia elobi ete Nzambe azali pole. (Nzembo 104:1, 2; 1 Yoane 1:5) Bingɛngiseli ya elimo oyo ezali kouta na Liloba ya Nzambe ekokisami na pole. (Yisaya 2:3-5; 2 Bakolinti 4:6) Yesu azalaki pole ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabelé. (Yoane 8:12; 9:5; 12:35) Lisusu, Yesu alendisaki bayekoli na ye bángɛngisa pole na bango.​—Matai 5:14, 16.

[Elilingi na lokasa 15]

Ndenge moko na batambwisi-masuwa, baklisto bakebaka ete bákosama te na miinda ya lokuta

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto