Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/10 lok. 32
  • “Mpiko na ye ezalaki kokamwisa ngai”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mpiko na ye ezalaki kokamwisa ngai”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/10 lok. 32

“Mpiko na ye ezalaki kokamwisa ngai”

GÜNTER GRASS, mokomi moko ya Allemagne oyo azwaki Prix Nobel ya kokoma mikanda na 1999, akomaki lisolo ya bomoi na ye na buku moko oyo ebimaki na 2006. Na buku yango, alobelaki ntango oyo bakɔtisaki ye na mosala ya polisi na Allemagne. Kaka na buku yango, alobeli mobali moko oyo akamwisaki ye mingi mpe abosanaki mobali yango te ata nsima ya mbula 60. Mobali yango azalaki moto ya ndenge mosusu oyo abatelaki kondima na ye na kati ya minyoko.

Mopanzi-nsango moko atunaki ye mituna mpe ebimisamaki na zulunalo moko (Frankfurter Allgemeine Zeitung); na lisolo na bango, Grass alobelaki lisusu mobali yango oyo aboyaki kosimba mandoki. Grass alobaki ete mobali yango “azalaki Nazi te, Koministe te, Sosialiste mpe te. Azalaki nde Motatoli ya Yehova.” Lokola Grass abosaná nkombo ya Motatoli yango, azalaki kobenga ye “Tosalaka makambo wana te.” Batatoli ya Yehova balukaki mpe bamonaki ete nkombo ya mobali yango ezalaki Joachim Alfermann. Mbala na mbala, bazalaki kobɛta ye mpe kosambwisa ye, mpe na nsima batyaki ye esika oyo azalaki kaka ye moko. Atako bongo, Alfermann atikalaki ngwi mpe aboyaki kosimba mandoki.

Grass alobaki boye: “Mpiko na ye ezalaki kokamwisa ngai. Nazalaki komituna ndenge nini akoki koyika mpiko boye? Nini ezalaki kopesa ye makasi?” Nsima ya kosala nyonso mpo na kobebisa bosembo na ye epai ya Nzambe, batindaki ye na kaa ya Stutthof na sanza ya Febwali 1944. Abimaki bolɔkɔ na Aprili 1945 mpe azalaki kaka Motatoli ya Yehova ya sembo tii liwa na ye na 1998.

Alfermann azalaki na kati ya Batatoli 13 400 oyo banyokwamaki mpo na kondima na bango, na Allemagne mpe na mikili mosusu oyo Banazi bayangelaki. Bandeko yango balandaki malako ya Biblia, bakɔtaki na makambo ya politiki te mpe baboyaki kosimba mandoki. (Matai 26:52; Yoane 18:36) Batatoli soki 4 200 batyamaki na bakaa ya bakangami mpe 1 490 babomamaki. Tii lelo oyo, bato mingi oyo bazali Batatoli ya Yehova te bandimaka ekateli oyo bandeko yango bazwaki mpe bakamwaka mpiko na bango.

[Elilingi na lokasa 32]

Joachim Alfermann

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto