Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
YESU azalaki kolobela nini na mosala ya kosakola? Ye moko amonisaki ete azalaki kolobela Bokonzi ya Nzambe. (Luka 4:43) Na ntembe te, bato oyo azalaki koteya bazalaki koyoka ye ndenge azalaki kolobela mingi Bokonzi yango. Bato yango bazalaki kokamwa? Bazalaki kotuna ye soki Bokonzi yango ezali nini? Baevanzile emonisi bongo te. Boye, Bokonzi ya Nzambe ezalaki likambo ya sika te mpo na bato yango?
Mikanda ya Biblia oyo ezalaki na ntango wana elimbolaki Bokonzi yango; elobelaki polele Bokonzi yango mpe makambo oyo ekokokisa. Lelo oyo, biso mpe tokoki koyeba makambo mingi koleka mpo na Bokonzi yango na lisalisi ya Biblia. Tólobela makambo 7 oyo Biblia elobi na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Makambo misato ya liboso eyebanaki mpe epai ya Bayuda ya ntango ya kala mpe oyo ya ntango ya Yesu. Makambo misato oyo elandi eyebanaki na nzela ya Yesu to ya bantoma na ye ya ekeke ya liboso. Likambo ya nsuka, eyebani polele na mikolo na biso.
1. Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema oyo ekoyangela libela na libela. Esakweli ya liboso ya Biblia elobaki ete Nzambe akotinda mobikisi mpo na bato ya sembo. Mobikisi yango abengami “momboto”; akolongola bampasi nyonso oyo botomboki ya Adama, Eva, mpe Satana ebimisaki. (Genese 3:15, NW) Bambula mingi na nsima, Nzambe ayebisaki Mokonzi Davidi likambo moko ya esengo mpo na “momboto” yango to Masiya. Alobaki ete akoyangela na Bokonzi moko. Bokonzi yango ekokesana na bikonzi mosusu nyonso. Yango ekoyangela libela na libela.—2 Samwele 7:12-14.
2. Bokonzi ya Nzambe ekoboma baguvɛrnema nyonso ya mokili. Na emonaneli moko, mosakoli Danyele amonaki ndenge oyo bikólo oyo eleki na nguya esengelaki kolandana tii na ntango na biso. Talá likambo oyo elobami na nsuka: “Na mikolo na mikonzi [oyo bakozala na ntango ya nsuka] Nzambe na lola akotɛlɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Na yango, bikonzi ya mokili, elingi koloba baguvɛrnema oyo ezali konyokola bato, kobimisa bitumba, mpe kosala kanyaka, ekobomama mpo na libela. Ndenge esakweli ya Danyele emonisi yango, etikali moke Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabelé mobimba. (Danyele 2:44, 45) Bokonzi yango ekozala guvɛrnema kaka moko oyo ekoyangela mabelé mobimba.a
3. Bokonzi ya Nzambe ekosilisa bitumba, maladi, nzala, ata mpe liwa. Bisakweli ya Biblia emonisi makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na bato. Guvɛrnema yango ekosala makambo oyo ata guvɛrnema moko te awa na mabelé ekoki kosala. Kanisá naino: bibundeli nyonso ekobebisama mpo na libela! Biblia elobi ete Nzambe “akosukisa bitumba kino nsuka ya mokili.” (Nzembo 46:9) Tokozala lisusu na mposa ya minganga te, ya lopitalo te mpo maladi ekozala lisusu te. Biblia elobi ete, “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali maladi.” (Yisaya 33:24) Nzala ekozala lisusu te. Biblia elobi boye: “Masango ekotondana na mokili.” (Nzembo 72:16) Malita, bisika ya kobomba bibembe mpe mawa nyonso oyo yango epesaka ekozala lisusu te. Liwa, monguna na biso, ekolongolama mpo na libela. Nzambe “akosilisa kufa libela mpe Nkolo [ Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso.”—Yisaya 25:8.
4. Bokonzi ya Nzambe ezali na Mokonzi oyo Nzambe aponi. Masiya amitye mokonzi ye moko te; ezali mpe bato te nde baponi ye. Yehova Nzambe nde aponi ye. Kutu, bankombo Masiya mpe Klisto emonisi yango. Bankombo yango mibale elimboli “Mopakolami.” Mokonzi yango apakolami, elingi koloba ete Yehova nde aponi ye mpo na kokokisa mokumba wana ya ntina mingi. Nzambe alobi boye: “Talá moombo na ngai, ye oyo nakotɛlɛmisa ye, moponami na ngai, ye oyo molimo na ngai ekosepela na ye. Natii [elimo] na ngai likoló na ye, akosambisa mabota na sembo.” (Yisaya 42:1; Matai 12:17, 18) Kaka Mozalisi na biso nde ayebi Mokonzi oyo abongi mpenza mpo na biso.
5. Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe amonisaki bato ete abongi na mokumba yango. Yesu ya Nazalete amonisaki ete azalaki Masiya oyo basakoli balobelaki. Abotamaki na libota oyo Nzambe aponaki. (Genese 22:18; 1 Ntango 17:11; Matai 1:1) Ntango azalaki na mabelé akokisaki bisakweli mingi oyo ekomamaki bikeke mingi liboso, oyo elobelaki Masiya. Nzambe ná baanzelu mpe bamonisaki ete azali Masiya. Na ndenge nini? Mongongo ya Nzambe elobaki uta na likoló mpo na komonisa ete Yesu azali Mwana na Ye; baanzelu bamonisaki ete Yesu azalaki Masiya oyo basakoli balobelaki; Yesu ye moko asalaki makamwisi, mbala mingi liboso ya bato ebele, mpe ezalaki komonana ete azalaki kosala yango na nguya ya Nzambe.b Yesu azalaki komonisa mbala na mbala ete akozala Mokonzi oyo abongi. Azalaki na nguya mpe na mposa ya kosalisa bato. (Matai 8:1-3) Azalaki koluka matomba na ye moko te, azalaki koyokela bato mawa, azalaki na mpiko mpe na komikitisa. Masolo ya makambo oyo asalaki ntango azalaki awa na mabelé ezali na Biblia mpe moto nyonso akoki kotánga yango.
6. Bato 144 000 bakoyangela elongo na Klisto. Yesu alobaki ete bantoma na ye mpe bato mosusu bakoyangela elongo na ye na likoló. Abengaki bango “etonga moke.” (Luka 12:32) Na nsima, ntoma Yoane azwaki emonaneli oyo emonisaki ete etonga moke yango ekozala na bato 144 000. Bato yango bakozala na mokumba moko kitoko na likoló, bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Klisto.—Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3.
7. Lelo oyo, Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela na likoló, mpe etikali moke eyangela mabelé mobimba. Yango ezali likambo kitoko oyo toyekoli. Makambo oyo Biblia elobi esalisi biso tóyeba ete Yesu asili kozwa bokonzi na likoló. Azali koyangela na likoló mpe mosika te akoyangela mabelé mobimba mpe akokokisa bisakweli oyo toutaki kolobela. Kasi, ndenge nini toyebi ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela lelo oyo? Ntango nini ekobanda koyangela mabelé?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bisakweli lokola oyo ezali komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezalaka na motema ya moto te, ndenge mangomba mingi eteyaka yango. Talá lisolo “Mituna ya batángi,” na lokasa 13.
b Na ndakisa, tángá Matai 3:17; Luka 2:10-14; Yoane 6:5-14.