Oyo Yesu ateyaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe
“Abandaki kotambola engumba na engumba mpe mboka na mboka, mpo na koteya . . . nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.”—LUKA 8:1.
TOLINGAKA kolobela makambo oyo ezali na ntina mingi mpo na biso, mpe oyo esepelisaka motema na biso. Ndenge Yesu alobaki, “monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Matai 12:34) Soki totaleli makambo oyo Yesu alobaki ntango oyo asalaki mosala na ye, tokoki koloba ete Bokonzi ya Nzambe ezalaki likambo ya ntina mpo na ye.
Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Bokonzi ezali guvernɛma oyo mokonzi azali koyangela. Na yango, Bokonzi ya Nzambe ezali guvernɛma oyo Nzambe atye. Yesu alobelaki na mozindo mpenza Bokonzi ya Nzambe, mpe yango ezalaki motó ya likambo ya nsango na ye. Baevanzile minei elobeli likambo yango mbala koleka 110. Kasi Yesu azalaki koteya kaka na maloba te. Makambo oyo asalaki eteyaki mingi na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe na oyo Bokonzi yango ekosala.
Nani azali Mokonzi? Ezali bato te nde baponi mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Kasi, Nzambe ye moko nde aponi ye. Na mateya na ye, Yesu amonisaki ete azali Mokonzi oyo Nzambe aponi.
Yesu ayebaki ete bisakweli ya Biblia esakolaki ete Masiya oyo alakamaki akoyangela na Bokonzi oyo ekoumela seko na seko. (2 Samwele 7:12-14; Danyele 7:13, 14; Matai 26:63, 64) Kobosana te ete Yesu amonisaki polele ete azali Masiya oyo alakamaki. Na maloba wana, Yesu andimaki ete azali Mokonzi oyo Nzambe atye. (Yoane 4:25, 26) Yango wana, Yesu asalelaki mbala ebele maloba “bokonzi na ngai.”—Yoane 18:36.
Yesu ateyaki mpe ete ekozala na bato mosusu oyo bakoyangela elongo na ye na Bokonzi na ye. (Luka 22:28-30) Abengaki bato yango “etonga moke,” mpo motángo na bango eyebani. Alobaki na bango ete: “Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.” (Luka 12:32) Mokanda ya nsuka ya Biblia emonisi ete baoyo bazwi libaku ya koyangela na Kristo bakozala bato 144 000.—Emoniseli 5:9, 10; 14:1.
Bokonzi yango ezali wapi? Yesu alobaki na Ponse Pilate, mokonzi moko Moroma ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Bokonzi ya Nzambe ekotambwisama na Kristo, kasi bato te na mabele nde bakomonisa Bokonzi yango. Yesu amonisaki mbala na mbala ete Bokonzi ya Nzambe ezali “bokonzi ya likoló.”a (Matai 4:17; 5:3, 10, 19, 20) Yango wana, Bokonzi ya Nzambe ezali guvernɛma ya likoló.
Nsima ya kolekisa bambula awa na mabele, Yesu ayebaki ete asengelaki kozonga na likoló. Alobaki ete akei kuna ‘kobongisa esika,’ kofungola nzela mpo na bato oyo bakoyangela elongo na ye mpo bázala na ye.—Yoane 14:2, 3.
Bokonzi ya Nzambe ezali kokokisa nini? Yesu ateyaki bayoki na ye bábondelaka Nzambe ete: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Mokano ya Nzambe ezali kosalema na likoló. Bokonzi ezali nzela oyo mokano ya Nzambe ezali kokokisama awa na mabele. Mpo na kokokisa yango, Bokonzi ekomema mbongwana monene na mabele oyo.
Bokonzi yango ekosala nini na mabele? Yesu ateyaki ete mpo mabe esila, Bokonzi ya Nzambe ekolongola baoyo nyonso bazali na mokano ya kosala kaka mabe. (Matai 25:31-34, 46) Yango ekomonisa nsuka ya makambo nyonso ya kozanga bosembo mpe mabe. Mpo na mabele, Yesu ateyaki ete ekotonda na bato ya “ezaleli ya boboto,” boyengebene, motema mawa, “motema pɛto,” mpe bato oyo batyaka kimya.—Matai 5:5-9.
Bato yango ya sembo bakofanda na mabele oyo ebebá? Ata moke te! Yesu alakaki ete Bokonzi ya Nzambe ekomema mbongwana monene na mabele. Moto moko oyo balingaki koboma elongo na Yesu alobaki na ye boye: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” Yesu alobaki na ye ete: “Ya solo nazali koyebisa lelo: Okozala na ngai na Paradiso.” (Luka 23:42, 43) Ya solo, Bokonzi ya Nzambe ekobongola mabele mobimba paradiso—ndenge moko na oyo ezalaki na elanga ya Edene.
Makambo nini mosusu Bokonzi yango ekosala mpo na bato? Yesu asukaki te na kolaka oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala. Amonisaki mpe oyo Bokonzi yango ekosala. Yesu asalaki makamwisi mingi ya kobikisa bato, na yango amonisaki mwa moke oyo akosala na monene mpenza na mikolo ezali koya ntango akoyangela na Bokonzi na ye. Lisolo moko ya Evanzile elobi mpo na Yesu ete: “Akendaki epai na epai na Galile mobimba, azalaki koteya na basinagoga na bango mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso oyo bato bazalaki na yango na nzoto.”—Matai 4:23.
Yesu asilisaki bamaladi ya ndenge na ndenge. ‘Afungolaki miso ya moto moko oyo abotamá miso ekufá.’ (Yoane 9:1-7, 32, 33) Na boboto nyonso, Yesu asimbaki moto oyo azalaki na maladi ya maba mpe abikisaki ye. (Marko 1:40-42) Ntango bamemelaki ye “moto moko oyo akufá matoi mpe azalaki na mokakatano ya koloba,” Yesu amonisaki ete akoki “koyokisa bato bakufá matoi mpe kolobisa bato oyo balobaka te.”—Marko 7:31-37.
Mokonzi oyo Nzambe atye azali na bokonzi ata likoló na liwa. Mbala misato, Yesu asekwisaki bato oyo bakufaki. Asekwisaki mwana mobali kaka moko ya mwasi oyo mobali na ye akufá, asekwisaki mpe elenge mwasi moko ya mbula 12 mpe moninga na ye ya motema Lazare.—Luka 7:11-15; 8:41-55; Yoane 11:38-44.
Ntango alobelaki elikya kitoko oyo ezali kozela bato oyo bakoyangelama na Bokonzi ya Nzambe, Yesu asakolaki na nzela ya ntoma Yoane ete: “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.” (Emoniseli 1:1; 21:3, 4) Kanisá naino—mokili oyo bato bakotangisa mpisoli te mpo na mawa, mpasi mpe liwa ekozala te! Na ntango yango, libondeli mpo mokano ya Nzambe esalema na mabele ndenge ezali kosalema na likoló ekokokisama mpenza.
Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekoya? Yesu ateyaki ete akobanda koyangela na boumeli ya eleko oyo abengaki “kozala” na ye. Yesu apesaki esakweli moko oyo emonisaki polele ntango oyo kozala na ye na bokonzi ya nguya ekobanda. Na boumeli ya eleko yango, makambo ekobeba na mokili mobimba, na ndakisa bitumba, banzala, koningana ya mabele, bamaladi mabe mpe kobakisama ya kotyola mibeko. (Matai 24:3, 7-12; Luka 21:10, 11) Makambo yango mpe mingi mosusu oyo Yesu asakolaki ezali mpenza komonana polele kobanda 1914, mbula oyo etumba ya liboso ya mokili mobimba ebandaki. Na yango, Yesu azali sikoyo koyangela. Mosika te, ntango ekokoka mpo Bokonzi yango eya mpe ekokisa mokano ya Nzambe awa na mabele.b
Koya ya Bokonzi ya Nzambe ekolimbola nini mpenza mpo na yo? Ekotalela kaka ndenge okopona kosalela nsango ya Yesu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba “bokonzi ya likoló” emonani mbala soki 30 na Evanzile ya Matai.
b Mpo na koyeba makambo mingi oyo esalisi biso tóyeba ete koya ya Bokonzi ya Nzambe ekómi pene, talá mokapo 9, “Tozali na ‘mikolo ya nsuka’?,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.