Ukaristya elimbolaka mpenza nini?
NA MOKILI mobimba, bato basalaka molulu ya Ukaristya mbala mingi na mbula, pɔsɔ na pɔsɔ to mpe mokolo na mokolo. Kasi, babengaka yango libombami ya kondima, mpe bato mingi oyo basalaka yango bayebaka ntina na yango te. Batalelaka yango lokola molulu mosantu, ata mpe lokola likamwisi.
Ukaristya ezali eteni moko ya Misa na Lingomba ya Katolike, oyo na boumeli na yango sango apambolaka limpa ná vinyo mpe asɛngaka bandimi básangana motema moko na Klisto mpe na bandeko baklisto banso.a Pápa Bénoît XVI alobaki ete mpo na Bakatolike, molulu yango ezali “likambo eleki monene na kati ya eyamba na biso.” Mosika te, Lingomba ya Katolike esepelaki “Mobu ya Ukaristya” mpo na “kolamusa mpe kolendisa kondima na Ukaristya.”
Ata Bakatolike oyo bandimaka te makambo mosusu ya lingomba bapesaka motuya mingi na molulu yango. Na ndakisa, na lisolo moko oyo eutaki kobima na zulunalo Time, mwasi moko oyo balobaki ete azali elenge Mokatolike ya molende, akomaki boye: “Ata soki toyokanaka te mpo na mateya oyo esimbi Lingomba na biso, tokangami makasi na likambo oyo esangisi biso na eyamba ya Katolike: bondimi na biso mpo na molulu ya Ukaristya.”
Kasi, Ukaristya ezali mpenza nini? Bayekoli ya Klisto basɛngisami kosalaka molulu yango? Tótala naino ndenge molulu yango ebandaki. Na nsima, tokoluka koyanola na motuna ya ntina mingi oyo: Molulu ya Ukaristya eyokani mpenza na oyo Yesu Klisto abandisaki eleki lelo mbula soki 2 000?
Ukaristya mpe mangomba ya boklisto
Ezali mpasi te mpo na koyeba ntina oyo batalelaka Ukaristya lokola likamwisi. Ntango ya ntina mingi na molulu yango ezalaka libondeli ya Ukaristya. Buku moko (Catéchisme de l’Église Catholique) elobi ete na ntango yango, “nguya ya maloba mpe misala ya Kristo mpe nguya ya Elimo Santu” eyeisaka nzoto mpe makila ya Yesu “na kati ya sakramento.” Sango ye moko alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo, mpe na nsima abengaka bandimi ya sembo báya kolya kominyo; mbala mingi bandimi balyaka kaka limpa, to Ostiya.
Lingomba ya Katolike eteyaka ete likamwisi moko esalemaka mpe limpa ná vinyo ebongwanaka mpenza nzoto mpe makila ya Klisto. Liteya yango ekolaki mokemoke, mpe ekɔtaki mpenza na Misa na bambula ya 1 200. Na ntango Lingomba ya Protesta ebandaki, bakómaki kotya ntembe na makambo mosusu ya Ukaristya ya Lingomba ya Katolike. Luther abimisaki liteya mosusu oyo bokeseni na yango ná oyo ya Katolike ezali mpenza polele te. Alobaki ete limpa ná vinyo ebongwanaka nzoto mpe makila ya Yesu te, kasi esanganaka nde na yango.
Mokemoke, kozanga boyokani na kati ya mangomba ya boklisto mpo na likambo yango emonanaki mpe na makambo mosusu: ndimbola ya Ukaristya, ndenge ya kosala molulu yango mpe soki esengeli kosalaka molulu yango mbala boni na mbula. Atako bongo, molulu yango ezali kaka likambo ya ntina mingi na mangomba ya boklisto. Kasi, molulu oyo Yesu abandisaki ezalaki ndenge nini?
Ebandeli ya “Elambo ya Mpokwa ya Nkolo”
Yesu ye moko abandisaki “Elambo ya Mpokwa ya Nkolo,” to Ekaniseli ya liwa na ye. (1 Bakolinti 11:20, 24) Kasi, na molulu oyo Yesu abandisaki, limpa mpe vinyo esengelaki nde kobongwanaka mpenza nzoto mpe makila na ye mpo bayekoli na ye bályaka mpe bámɛlaka yango?
Yesu autaki kolya Pasika ya Bayuda mpe abimisaki Yuda Mokeliota, ntoma oyo alingaki kokaba ye. Matai, moko na bantoma 11 oyo bazalaki wana, akomaki boye: “Ntango bazalaki kokoba kolya, Yesu akamataki limpa mpe, nsima ya kopesa lipamboli, abukaki yango mpe, apesaki yango na bayekoli, alobaki ete: ‘Bókamata, bólya. Oyo elakisi nzoto na ngai.’ Lisusu, akamataki kɔpɔ mpe, kopesáká matɔndi [na Grɛki, eukariste’sas], apesaki bango yango, kolobáká ete: ‘Bómɛla yango, bino nyonso; mpo yango elakisi “makila [na ngai] ya kondimana,” oyo ekosopama mpo na bato mingi mpo na bolimbisi ya masumu.’”—Matai 26:26-28.
Mpo na Yesu, ata mpe basalaleli mosusu nyonso ya Nzambe, kosɛnga Nzambe apambola bilei ezalaki momeseno ya mokolo na mokolo. (Deteronome 8:10; Matai 6:11; 14:19; 15:36; Malako 6:41; 8:6; Yoane 6:11, 23; Misala 27:35; Baloma 14:6) Tokoki nde kokanisa ete na libondeli wana Yesu asalaki mpe likamwisi mpo limpa mpe vinyo ekóma mpenza nzoto mpe makila na ye, oyo bayekoli na ye basengelaki kolya mpe komɛla?
“Oyo elakisi” to “Oyo ezali”?
Ya solo, Babiblia mosusu ebongoli maloba wana ya Yesu boye: “Bókamata, bólia. Oyo ezali nzoto na ngai,” mpe, “Bómela yango bino nyonso. Pamba té, oyo ezali makila na ngai.” (Matié 26:26-28, Bible na lingala ya lelo oyo) Ezali mpe solo ete liloba ya Grɛki estin, oyo euti na verbe “kozala,” elimboli mpenza “ezali.” Kasi, kaka verbe yango ekoki mpe kolimbola “elakisi.” Kutu, na Babiblia mingi, verbe yango ebongolami na bisika mingi na “elimboli,” to “elakisi.”b Likambo oyo bazali kolobela nde emonisaka lolenge oyo ebongi kobongola yango. Na ndakisa, na Matai 12:7, estin ebongolami na “ntina” [to, “ndimbola”] na Babiblia mingi: “Sókó boyébákí ntína [na Grɛki, estin] ya maloba maye: Nalingí motéma ngolu, leká libonza, mbele botíkákí kokitisa bato bazalí na likambo té.”—Biblia Liloba lya Nzambe.
Yango wana, bato mingi ya mayele na maloba ya Biblia balobaka ete na vɛrsɛ wana, liloba “ezali” emonisaka mpenza te oyo Yesu alingaki koloba. Na ndakisa, nsima ya kotalela mimeseno ya bato esika oyo Yesu akolaki, Jacques Dupont alobaki ete ndenge oyo “ebongi mpenza” kobongola vɛrsɛ yango ezali: “Oyo elimboli nzoto na ngai” to “Oyo ezali komonisa nzoto na ngai.”
Ata ndenge nini, Yesu akokaki te koyebisa bayekoli bálya nzoto na ye mpe bámɛla makila na ye. Mpo na nini? Nsima ya Mpela ya Noa, Nzambe apesaki moto ndingisa ya kolya nyama. Kasi, ata mokolo moko te apesaki ndingisa ya kolya moto. Longola yango, apekisaki mpe bato kolya makila. (Genese 9:3, 4) Nzambe azongelaki etinda yango na Mibeko ya Moize, oyo Yesu akakolaki ata moke te. (Deteronome 12:23; 1 Petelo 2:22) Lisusu, na lisalisi ya elimo santu bantoma bazongelaki mobeko oyo epekisaki kolya makila; na ndenge yango, bamonisaki ete baklisto mpe basengeli kotosa mobeko yango. (Misala 15:20, 29) Yesu akokaki nde kobandisa molulu oyo elingaki kotinda bayekoli na ye bábuka mobeko ya bulɛɛ ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso? Ata moke te!
Emonani polele ete Yesu asalelaki limpa mpe vinyo lokola bilembo. Limpa oyo ezangi levire elimbolaki, to ezalaki elilingi ya nzoto na ye oyo ezangi lisumu, oyo asengelaki kokaba lokola mbeka. Vinyo ya motane elimbolaki makila na ye oyo asengelaki kosopa “mpo na bato mingi mpo na bolimbisi ya masumu.”—Matai 26:28.
Ntina ya Elambo ya Mpokwa ya Nkolo
Yesu asukisaki Elambo ya Mpokwa ya Nkolo na maloba oyo: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Molulu yango esalisaka biso tókanisa Yesu mpe makambo minene oyo liwa na ye ekokisi. Esalisaka biso tóbosana te ete Yesu alongisaki bokonzi ya Yehova, Tata na ye. Lisusu, esalisaka biso tóbosana te ete na nzela ya liwa na ye ya moto ya kokoka, oyo asalaki lisumu te, Yesu apesaki “molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” Lisiko efungolaki nzela mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima na mbeka na ye alongwa na boombo ya masumu mpe azwa bomoi ya seko.—Matai 20:28.
Kasi, Elambo ya Mpokwa ya Nkolo ezali libosoliboso elambo ya bato ebele. Esangisaka (1) Yehova Nzambe, oyo azwaki ebongiseli ya mbeka, (2) Yesu Klisto, “Mwana-Mpate ya Nzambe,” oyo apesaki lisiko, mpe (3) bandeko ya Yesu ya elimo. Ntango balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo, bandeko ya Yesu bamonisaka ete basangani mpenza na Klisto. (Yoane 1:29; 1 Bakolinti 10:16, 17) Bamonisaka mpe ete bazali na kati ya “kondimana ya sika” lokola bayekoli ya Yesu, oyo bapakolami na elimo. Bango nde bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Klisto kuna na likoló.—Luka 22:20; Yoane 14:2, 3; Emoniseli 5:9, 10.
Ntango nini esengeli kosalaka Ekaniseli yango? Eyano ekomonana polele soki tokanisi ntango oyo Yesu aponaki mpo na kobandisa yango: Mokolo ya Pasika. Bayisalaele bazalaki kosala Elekeli mbala moko na mbula, na mokolo ya 14 Nisana na manaka na bango, banda mbula koleka 1 500 mpo na kokanisa mokolo monene oyo Yehova abikisaki bango. Ezali polele ete Yesu asɛngaki bayekoli na ye básalaka mpe ekaniseli yango mokolo wana mpo na kokanisa lobiko ya monene koleka oyo Nzambe akopesa na nzela ya liwa ya Klisto. Yango wana, bayekoli ya solo ya Yesu basalaka Elambo ya Mpokwa ya Nkolo mokolo oyo ekokani na mokolo ya 14 ya Nisana, na manaka ya Baebele.
Baklisto basalaka yango kaka mpo na kokokisa molulu moko oyo ezalaki kosalema kala? Ezali solo ete bato mingi basanganaka na Ukaristya mpo balingaka milulu. Mokomi ya lisolo oyo tolobelaki liboso ya zulunalo Time alobaki boye: “Kosangana na milulu ya kala oyo bato mingi basalaka esepelisaka motema.” Lokola Bakatolike mingi lelo oyo, mokomi yango alingi ete molulu yango esalemaka na monɔkɔ ya Latin ndenge ezalaki kosalema kala. Mpo na nini? Akomi boye: “Nasepelaka kolanda Misa na monɔkɔ oyo nayebi te, mpo makambo mingi oyo nayokaka na Misa na Lingelesi esepelisaka ngai te.”
Batatoli ya Yehova ná bamilio ya bato mosusu, basepelaka kosala Elambo ya Mpokwa ya Nkolo na monɔkɔ oyo elobamaka na esika oyo bazali kosala yango. Basepelaka kobakisa boyebi na bango ya ndimbola mpe motuya ya liwa ya Klisto. Ebongaka mpenza kokanisa na mateya yango mpe kolobela yango ata na eleko nini ya mobu. Batatoli bamonaka ete kosala Ekaniseli ezali lolenge eleki malamu ya kokoba kokanisa bolingo monene ya Yehova mpe ya Mwana na ye, Yesu Klisto. Esalisaka bango ‘bákoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya.’—1 Bakolinti 11:26.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Molulu yango ebengamaka mpe Limpati lya Mokonzi, Ukaristya esantu, Bokeli Ukaristya, Molulu mosantu, Libonza lisantu, Kominyo, Misa masantu mpe bongo na bongo. Liloba “Ukaristya” euti na liloba ya Grɛki eukaristia, oyo elimboli botɔndi, kopesa matɔndi.
b Na ndakisa, talá ndenge Matai 27:46; Bagalatia 4:24 ebongolami na Bible na lingala ya lelo oyo mpe Biblia Liloba lya Nzambe.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
Molulu oyo Yesu abandisaki ezalaki kosalema ndenge nini?
[Elilingi na lokasa 28]
Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye
[Elilingi na lokasa 29]
Bazali kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto