Tosengeli kondima kaka makambo oyo tokoki komona?
Bato mosusu bakanisaka ete “tokoki te koyeba solo na makambo oyo mangomba ya boklisto mpe mangomba mosusu elobelaka, na ndakisa makambo etali Nzambe mpe avenire. To mpe soki tokoki koyeba yango, tokoyeba yango lelo te.”—FILOZOFE BERTRAND RUSSELL, 1953.
THOMAS HUXLEY, moto moko oyo azalaki koyekola banyama, azali moko na bato oyo balobelaki likanisi yango. Huxley abotamaki na mobu 1825, azalaki na bomoi na eleko moko na Charles Darwin mpe azalaki kondima liteya ya evolisyo. Na mobu 1863, Huxley akomaki ete ezali na eloko moko te oyo ekokaki kondimisa ye ete Nzambe azali, “alingaka biso mpe amibanzabanzaka mpo na biso ndenge baklisto balobaka.”
Lelo oyo, bato mingi bazali kondima likanisi ya bato wana ya mayele mpe bazali koloba ete bakoki kondima kaka makambo oyo bakoki komona. Balobaka ete kondimela moto to kondima likambo kozanga elembeteli ezali bindimandima.
Biblia esɛngaka biso tóndimela Nzambe kozanga elembeteli? Te. Kutu, Biblia emonisi ete kondima likambo kozanga elembeteli ezali bozoba. Elobi boye: “Moto na zoba ayambi maloba nyonso, nde moto na mayele akotala malamu na nzela ekokende ye.”—Masese 14:15.
Ezali boni mpo na Nzambe? Ezali mpenza na makambo oyo emonisi ete Nzambe azali, alingaka biso mpe amibanzabanzaka mpo na biso?
Bizaleli ya Nzambe emonisami
Ntango Paulo, moko na bato oyo bakomaki Biblia, azalaki koloba epai ya bato ya Atene oyo batángaki kelasi mingi, ayebisaki bango ete Nzambe nde “asalá mokili ná biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.” Paulo ayebisaki bato yango ya ntembe ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato mpe ete “azali mosika te na mokomoko na biso.”—Misala 17:24-27.
Makambo nini endimisaki Paulo ete Nzambe azali mpe amibanzabanzaka mpo na bato? Paulo alobelaki moko ya makambo yango ntango akomelaki baklisto ya Loma. Na ntina na Nzambe, alobaki boye: “Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpamba te yango emonanaka na nzela ya biloko oyo esalemá.”—Baloma 1:20.
Masolo oyo ekolanda ekolobela bizaleli misato ya Nzambe oyo tokoki komona polele na biloko oyo akelá. Ntango ozali kotalela yango, omituna boye: ‘Nasengeli kosala nini lokola nayebi bizaleli yango ya Nzambe?’
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
Biblia esɛngi biso te ete tóndimela Nzambe bindimela