Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/6 nk. 18-21
  • Salelá malamu mposa na yo ya koyeba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá malamu mposa na yo ya koyeba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kebá mpe zalá na bokatikati
  • Ndakisa moko ya malamu mpenza
  • Boyebi oyo tosengeli kozwa
  • Kobungisa mposa yango te!
  • Bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tózwa boyebi sikoyo mpe mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bilenge ya esengo bazali kosalela Jehovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/6 nk. 18-21

Salelá malamu mposa na yo ya koyeba

“Moto azali ekelamu oyo atunaka mituna. Tobandaka kotuna mituna ntango kaka tobotami . . . Mpe tokoki koloba ete bomoi na biso bato esalemá na mituna oyo totuná mpe biyano oyo topesá.”​—Octavio Paz, mokomi moko ya maloba ya ntɔki na ekólo Mexique.

NINI etindaka molambi moko abimisa lolenge ya sika ya kolamba? Nini etindaka moto asala mibembo na bisika ya mosika mpo na koluka koyeba mokili? Nini etindaka mwana atunaka mituna ebeleebele? Mbala mingi, ezalaka kaka mposa ya koyeba.

Bongo yo? Ozalaka na mposa ya koyeba makambo ya sika to ya kozwa biyano na mituna ya makasi? Na ndakisa, bomoi eutá wapi? Mpo na nini tozali awa na mabelé? Nzambe azali mpenza? Banda bomwana, mposa ya koyeba etindaka mingi kati na biso tótuna mituna lokola oyo wana mpe tóluka biyano na mituna yango. Soki likambo moko esepelisi biso, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na koyeba yango. Na yango, mposa ya koyeba ekoki kopesa biso matomba mingi. Nzokande, koluka koyeba ekoki mpe komema mikakatano.

Kebá mpe zalá na bokatikati

Soki tosaleli mposa na biso ya koyeba makambo malamu te, yango ekoki komema makama. Na ndakisa, mpo na koluka koyeba, mwana akoki kosimba mbambola oyo ezali na mɔtɔ makasi mpe ekoki kozikisa ye. Kasi, mposa ya koyeba ekoki kotinda biso tókolisa boyebi na biso, tózwa biyano na mituna na biso. Kasi, ezali malamu kolukaka koyeba nyonso mpe kolinga kolekisa ata likambo moko te?

Emonani ete boyebi mosusu ezalaka malamu te, mpo ekoki komemela moto mikakatano. Kotala bafilme to bafɔtɔ ya bosɔtɔ, koluka koyeba makambo ya maji to koluka koyeba mateya ya bato oyo bakoki ata kosala bato mabe to kondima liwa mpo na bindimeli na bango, ekoki kozala likama mpo na biso. Na makambo oyo mpe na makambo mosusu, tokosala malamu soki tomekoli mokomi ya nzembo oyo abondelaki ete: “Bendá miso na ngai ete natala biloko mpamba te.”​—Nzembo 119:37.

Ezali mpe na boyebi mosusu oyo ekoki kosala moto mabe te, kasi ezali na litomba te. Na ndakisa, litomba nini tokozwa soki toyebi makambo nyonso oyo etali basani ya bafilme to bato oyo bayebani mingi, makambo nyonso etali ekipi mokomoko ya masano mpe basani na yango, to biloko nyonso oyo ebimi sika? Mpo na bato mingi, koyeba makambo ya ndenge wana ezali na litomba te.

Ndakisa moko ya malamu mpenza

Kasi, mposa ya koyeba ezali mpe na malamu na yango. Tózwa ndakisa ya Alexander von Humboldt, moto moko ya mayele na Allemagne ya ekeke ya 19 oyo azalaki mpe kosala mibembo mpo na koyeba mokili. Kutu, bokula Humboldt oyo ezali na wɛsti ya Amerika ya sudi ezwá nde nkombo na ye.

Mokolo mosusu, Humboldt alobaki ete: “Banda bomwana na ngai, nazalaki na mposa makasi ya kosala mibembo na mikili ya mosika, epai bato ya Mpoto bazalaki kokóma mpenza te.” Alobaki ete mposa yango ebandaki ntango akómaki na “mposa makasi ya koyeba makambo mingi.” Ntango akómaki na mbula 29, asalaki mobembo ya mbula mitano na Amerika ya ntei mpe ya sudi. Akomaki mokanda moko ya volimi 30 oyo elobeli makambo nyonso oyo amonaki na mibembo na ye.

Makambo nyonso ezalaki kobenda likebi na ye: Mai ya mbu, mbisi na yango, milona, mpe bongo na bongo. Amataki bangomba, akatisaki bibale mpe bambu. Makambo oyo Humboldt ayekolaki ebimisá mayele mingi oyo bato ya siansi basalelaka lelo oyo. Nyonso wana ebandaki na mposa ya koyeba, mpe abungisaki mposa yango te bomoi na ye mobimba. Ndenge Ralph Waldo Emerson, mokomi moko ya Amerika, alobaki yango, “Humboldt azalaki moko ya bato ya kokamwa . . . oyo bamonanaka mpambampamba te, mpe basalisaka biso tóyeba soki bɔɔngɔ ya moto, makasi mpe makoki na ye mosusu ekoki kokende tii wapi.”

Boyebi oyo tosengeli kozwa

Mingi te na kati na biso bazali na likoki ya kosala mibembo mpo na koyeba mokili to kobimisa mayele ya sika na siansi. Kasi, ezali na lolenge moko ya boyebi oyo tosengeli kosala nyonso mpo na kozwa; mpe soki tosali bongo, tokozwa matomba beboo. Yesu alobelaki likambo yango na libondeli moko oyo asalaki epai ya Tata na ye ya likoló: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”​—Yoane 17:3.

Koluka koyeba Nzambe kaka moko ya solosolo, oyo nkombo na ye ezali Yehova, mpe Mwana na ye Yesu Klisto, ekoki kopesa moto matomba koleka boyebi mosusu nyonso. Kanisá lisusu mituna oyo totunaki na ebandeli ya lisolo oyo na ntina na bomoi. Tokoki mpe kobakisa mituna mosusu lokola oyo: Mpo na nini mpasi etondi na mokili? Bato bakobebisa to bakoboma mokili? Nzambe akosala nini mpo mabelé ebebisama te? Kozwa biyano na mituna wana ekosuka kaka te na kopesa moto boyebi. Ndenge Yesu alobaki yango, yango “elakisi bomoi ya seko.” Mpo na nini tosengeli kondima yango?

Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Na ntina na Biblia, ntoma Paulo akomaki boye: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”​—2 Timote 3:16, 17.

Kanisá naino: ntoma Paulo alobaki ete Biblia epesaka boyebi oyo ekoki kopesa moto likoki ya kosala nyonso oyo ezali malamu. Ekoki kosalisa biso tókóma kotalela makambo ndenge Nzambe atalelaka yango. Longola yango, toyebi ete boyebi mpe bwanya ya Nzambe ezali likoló koleka boyebi mpe bwanya mosusu nyonso. Na lisalisi ya elimo santu, Mosakoli Yisaya akomaki boye: “Makanisi na ngai mazali makanisi na bino te mpe nzela na bino ezali nzela na ngai te. [Yehova] alobi bongo. Zambi lokola lola eleki mokili likoló, boye nzela na ngai eleki nzela na bino mpe makanisi na ngai maleki makanisi na bino.”​—Yisaya 55:8, 9.

Olingi koyeba banzela mpe makanisi ya Nzambe oyo eleki likoló? Ozali mpenza na mposa ya koyeba oyo Biblia, Liloba ya Nzambe, elobi na ntina na banzela mpe makanisi ya Nzambe? Olingi koyeba oyo Nzambe akosala mpo na kosukisa mpasi nyonso mpe makambo ya malamu oyo akani kosala mpo na bato ya botosi? Biblia elobi boye: “Meká mpe sosolá ete [Yehova] azali malamu; esengo ezali na moto oyo akoluka ekimelo epai na ye.”​—Nzembo 34:8.

Nguya ya mateya ya Biblia ekoki kosala na motema ya moto ya sembo ndenge kaka bongɛngi ya moi ekoki kosala na miso ya moto oyo amoni mpo na mbala ya liboso. Ntoma Paulo alobaki ete: “E! bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali bozindo boni! Kosambisa na ye ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki komonana te!” (Baloma 11:33) Likambo ya solo ezali ete tokososola te boyebi mpe bwanya nyonso ya Nzambe. Tozali na elikya moko kitoko ete tokolɛmba te mpo tokozala ntango nyonso na makambo mingi ya sika ya koyekola.

Kobungisa mposa yango te!

Ya solo, mingi na kati na biso bakozwa likoki te ya kosala mibembo mpo na koyeba mikili to kobimisa mayele ya sika na siansi. Mpe ntango mosusu tokotikala koyeba te makambo nyonso oyo tozali na mposa ya koyeba na mwa bambula oyo toumelaka na bomoi. Atako bongo, tosengeli te kobungisa mposa ya koyeba. Kobungisa te mposa ya koyeba oyo Nzambe apesá biso na bolingo nyonso.

Salelá malamu likabo kitoko wana oyo Nzambe apesá biso mpe kolisá boyebi na yo ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Soki osali bongo, okomona ete bomoi na yo ezali na ntina mpe okozala na esengo, mpe okoki kozala na elikya ya kokoba kosala yango libela na libela. Biblia elobi boye: “[Nzambe] asalaki nyonso ya kitoko na ntango na yango; atii mpe [likanisi ya bomoi ya seko, NW] kati na mitema na bango, nde moto te ayebi kososola mosala mosalaki Nzambe longwa na ebandeli kino nsuka.”​—Mosakoli 3:11.

[Etanda/​Bililingi na lokasa 21]

Oyebaka ete . . .

• Ebele ya bikeke liboso Christophe Colomb ná Magellan bámonisa ndenge mabelé ezali, Biblia elobaki ete mabelé ezali patatalu te, kasi ezali nde libungutulu?​—Yisaya 40:22.

• Ebele ya bambula liboso banganga-minzoto bámona ete mabelé efandi likoló ya eloko te, Biblia esilaki koloba yango?​—Yobo 26:7.

• Mbula soki 2 500 liboso William Harvey, moto moko ya mayele ya Angleterre, ayeba ndenge makila etambolaka na nzoto ya moto, Biblia elobaki ete makambo nyonso ya bomoi ya moto eutaka na motema?​—Masese 4:23.

• Eleki lelo mbula soki 3 000, Biblia elobelaki ndenge mai ya bibale etiyolaka tii na mbu, emataka likoló na nzela ya mopɛpɛ mpe ekitaka lisusu na nzela ya mbula mpe emonisaki ete yango ezali na kati ya biloko oyo esalaka ete bomoi ezala awa na mabelé?​—Mosakoli 1:7.

Ozali kokamwa te komona ete makambo wana oyo siansi elobeli, Biblia esilaki kolobela yango ebele ya bambula liboso bato báyeba yango? Likambo ya solo ezali ete Biblia ezali na ebele ya makambo ya motuya mpenza oyo ezali kozela yo oyeba yango.

[Elilingi na lokasa 19]

Alexander von Humboldt

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto