Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/9 lok. 3
  • Oyebi malamu tata na yo ya likoló?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebi malamu tata na yo ya likoló?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Tata na biso Yehova alingaka biso mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Omonaka Yehova ete azali Tata na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tokoki koyeba Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • ‘Mwana asepeli komonisa Tata’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/9 lok. 3

Oyebi malamu tata na yo ya likoló?

OYEBI tata na yo malamu? Motuna yango ekoki kokamwisa yo soki okolá na libota oyo bolinganaka. Mbala mosusu okoloba ete, ‘Ɛɛ, nayebi ye malamu!’ Ya solo, mbala mingi moto ayebaka makambo oyo tata na ye alingaka mpe oyo aboyaka, ndenge oyo azalaka ntango likambo moko ebimi, mpe ndenge oyo abatelaka bango na kati ya libota.

Nzokande, mbala mosusu esilá kokómela yo omona ezaleli moko ya tata na yo oyo oyebaki ata moke te. Na ndakisa, mwana akoki koyeba ete tata na ye azalaka moto ya kimya mpe ya boboto. Kasi, ntango likambo moko ebimi, akoki komona mbala moko ete tata na ye azali mpe moto oyo azongaka nsima te mpo na kobatela libota na ye.

Ezali boni mpo na Mozalisi na biso? Na ntina na ye, Biblia elobi na biso boye: “Na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” (Misala 17:28) Nzambe nde apesá biso bomoi; na ndenge yango, azali Tata ya baoyo nyonso bazali na bomoi. (Yisaya 64:8) Mbala mosusu yo mpe otalelaka Nzambe ndenge yango; yango ezali malamu mpamba te tosengeli kotalela ye ndenge wana. Nzokande, ezali na makambo mingi mosusu oyo tosengeli koyeba mpe koyekola na ntina na ye mpo na litomba mpe bolamu na biso.

Soki oyebi malamu tata oyo abotá yo, okolinga ye mingi mpe okopesa ye limemya. Ndenge moko mpe, soki oyebi Nzambe malamu, boyokani na yo ná ye ekokóma makasi. Nzambe akoki kosalisa yo olonga mikakatano ya bomoi soki oyekoli koyeba ye malamu mpe kosala mokano na ye.

Nzambe azali ndenge nini? Bizaleli na ye esengeli kotinda yo otalelaka ye ndenge nini? Koyeba ye malamu ekomemela yo mikumba? Okozwa biyano na mituna yango na lisolo elandi.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]

Koyeba moto moko malamu ekoki kobongola ndenge oyo otalelaka ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto