“Oyo ezali solo nkombo ya Nzambe oyo eleki mosantu mpe monene”
Nicolas de Cues alobaki maloba yango na lisolo moko oyo asalaki na mobu 1430.a Mobali yango ayekolaki makambo ndenge na ndenge; na ndakisa, ayekolaki monɔkɔ ya Grɛki, ya Liebele, filozofi, teoloji, matematiki, mpe astronomi. Ntango akokisaki mbula 22, akómaki doktɛrɛ na teoloji na Lingomba ya Katolike. Na mobu 1448, akómaki kardinale.
Eleki mbula soki 550, Nicolas de Cues asalaki ndako moko ya mibange na Kues, mboka oyo ebengamaka lelo Bernkastel-Kues, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 130 na sudi ya engumba Bonn, na Allemagne. Lelo oyo, ndako yango ezali na bibliotɛkɛ ya Cues, oyo ezali na bamaniskri koleka 310. Moko na bamaniskri yango ezali Codex Cusanus 220, oyo ezali na lisukulu oyo Cues asalaki na mobu 1430. Na lisukulu yango, oyo ezali na motó ya likambo ete In principio erat verbum (Na ebandeli Liloba ezalaki), Nicolas de Cues asalelaki ekomeli ya Latin Iehoua mpo na nkombo Yehova.b Na lokasa 56 tokoki kotánga maloba oyo mpo na nkombo ya Nzambe: “Ezali nkombo oyo Nzambe amipesá. Ezali Tetragrame, elingi koloba nkombo oyo ezali na balɛtrɛ minei. . . . Oyo ezali solo nkombo ya Nzambe oyo eleki mosantu mpe monene.” Maloba ya Nicolas de Cues emonisi ete nkombo ya Nzambe ezalaki na makomi ya ebandeli ya Makomami ya Liebele.—Ex. 6:3.
Codex yango, oyo ekomamaki na ebandeli ya ekeke ya 15, ezali moko ya mikanda ya kala oyo ezali tii na moi ya lelo, oyo kati na yango balɛtrɛ minei ya nkombo ya Nzambe ebongolami “Iehoua.” Makomi yango ezali elembeteli mosusu ete nkombo ya Nzambe, oyo ekomeli na yango ekeseni mingi te na ekomeli “Yehova,” ezali lolenge oyo ezalaki kosalelama mingi na boumeli ya bikeke.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nicolas de Cues ayebanaki mpe na nkombo ya Nikolaus Cryffs (Krebs), Nicolaus Cusanus, mpe Nikolaus von Kues. Kues ezalaki nkombo epai abotamaki, na Allemagne.
b Lisukulu yango ezalaki mpo na kolongisa liteya ya Bosato.
[Elilingi na lokasa 16]
Bibliotɛkɛ ya Cues