Codex ya Vatican—Mpo na nini ezali na ntina mingi?
VATICAN ezali na ebele ya biloko ya motuya. Mayemi, bikeko mpe bandako na yango ekendá nsango mpo na kitoko na yango. Nzokande, ezali na eloko moko ya motuya oyo, na boumeli ya ebele ya bambula, bazalaki kolinga te ete bato mosusu bámona yango. Ezali na maniskri moko ya motuya mingi na bibliotɛkɛ ya Vatican, oyo ekomamá eleki sikoyo bankóto ya bambula, oyo ezali kosalisa biso tóyeba mikanda mosusu ya Biblia malamumalamu. Babengaka yango Codex ya Vatican.a
Ezali na bacodex mosusu mibale ya kala, codex Alexandrinus mpe codex Sinaiticus, yango ezali bamaniskri mosusu ya Biblia oyo bato ya mayele bakumisaka; ezali na masolo kitoko oyo elobeli ndenge bamonaki yango mpe ndenge babatelaki yango mpo ebeba te. Nzokande, toyebi mpenza te epai Codex ya Vatican eutá.
Bomɛngo elali wana
Codex ya Vatican eutá wapi? Mbala ya liboso oyo balobeli yango ezali na ekeke ya 15, ntango bakɔtisaki yango na liste ya babuku oyo ezali na bibliotɛkɛ ya Vatican. Bato ya mayele bakanisaka ete bakomaki yango na Ezipito, na Kaisaria to mpe na Roma. Nsima ya kotalela makanisi yango, J. Neville Birdsall, Profɛsɛrɛ moko ya iniversite ya Birmingham na Angleterre, alobi boye: “Na mokuse, tokoloba ete tokoki te koyeba ntango to esika mpenza oyo bakomaki Codex Vaticanus, mpe ata soki bato ya mayele basali milende ndenge nini, lisolo na yango liboso ya ekeke ya 15 ekoki koyebana te.” Atako bongo, balobaki ete Codex ya Vatican ezali moko ya bamaniskri ya Biblia oyo ezali na ntina mingi. Mpo na nini?
Na boumeli ya bikeke, bato mosusu oyo bazalaki kosala bakopi bakɔtisaki mwa mabunga na mikanda ya Biblia. Likambo eleki ntina mpo na babongoli oyo balingi kobimisa makomami ya sikisiki, ezali ya kozala na bamaniskri oyo ezongeli mpenza makambo nyonso ndenge ezalaki ntango bakomaki yango na ebandeli. Kanisá naino esengo oyo bato ya mayele bazalaki na yango ya kotalela Codex ya Vatican, maniskri ya monɔkɔ ya Grɛki oyo ekomamaki na ekeke ya minei ya ntango na biso, mbula soki 300 nsima ya ntango oyo basilisaki kokoma Biblia na mobimba na yango! Codex yango ezali na mikanda nyonso ya Makomami ya Ebre mpe ya Grɛki, longola kaka mwa biteni oyo ebungá.
Na boumeli ya bambula mingi, bakonzi ya Vatican bazalaki koboya kopesa bato ya mayele na makambo ya Biblia nzela ya kotala codex yango. Sir Frederic Kenyon, moto moko ya mayele oyo atalelaka mikanda, alobi boye: “Na 1843, [Konstantin von] Tischendorf asɛngaki ndingisa ya kotánga Codex yango, mpe ebele ya basanza na nsima, bapesaki ye ndingisa ya kotala yango kaka na boumeli ya ngonga motoba. . . . Na 1845, Tregelles, moto moko ya mayele na Angleterre, azwaki ndingisa ya kotala yango, kasi asengelaki kosala kopi ata ya liloba moko te.” Tischendorf asɛngaki lisusu nzela ya kotala Codex, kasi nsima ya kosala kopi ya nkasa 20, baboyaki kopesa ye nzela. Kasi, ndenge Kenyon alobi yango, “lokola alɛmbaki te kosɛnga bango nzela, babakiselaki ye lisusu mikolo motoba, oyo esalaki lokola mikolo 14, ngonga misato na mokolo; mpe lokola asalelaki ntango yango malamu, abimisaki maniskri moko ya kitoko mpenza na 1867, oyo elekaki bamaniskri mosusu nyonso oyo ebimaki liboso.” Na nsima, Vatican epesaki bato nzela ya kotala kopi moko ya codex ya malamu lisusu koleka.
“Ebatelamaki malamu”
Ndenge oyo Codex ya Vatican ekomamá emonisi nini? Buku moko (The Oxford Illustrated History of the Bible) elobi ete na codex yango “batyá liloba mokomoko na esika na yango mpe makambo nyonso ekomamá na bosikisiki, mpe bazongelá makambo nyonso ndenge kaka ezalaki na ebandeli.” Buku yango ebakisi boye: “Na yango, tokoki mpenza koloba ete codex yango ezali moko ya bakopi oyo esalemá na ndenge oyo ebongi mpenza.”
Westcott ná Hort, bato mibale ya mayele oyo bayebani mingi, bakamwaki mpenza na ndenge oyo kopi ya Codex ya Vatican esalemá. Tii lelo, Biblia na bango (New Testament in the Original Greek) oyo ebimaki na 1881 mpe eutaki na maniskri ya Vatican mpe oyo ya Sinai, ezali mokanda ya libosoliboso oyo babongoli mingi ya mikolo na biso basalelaka mpo na kobongola Makomami ya Grɛki ya bokristo, na ndakisa The Emphasised Bible ya J. B. Rotherham mpe Libongoli ya Mokili ya Sika.
Kasi, bato mosusu balobaka ete Westcott ná Hort basengelaki te kosalela Codex ya Vatican. Codex yango ezali mpenza na makambo nyonso oyo ezalaki na makomi ya ebandeli? Bato ya mayele basepelaki mingi na bapapirisi ya Bodmer, oyo ebimaki na 1956 mpe na 1961, mpo ezalaki na ndambo ya Evanzile ya Luka ná ya Yoane oyo bamonaki na ebandeli ya ekeke ya misato ya ntango na biso. Makambo oyo ezali na bapapirisi yango ekokani na oyo ya Codex ya Vatican?
Na buku na bango (Novum Testamentum) Philip Payne ná Paul Canart balobi ete Codex ya Vatican ná bapapirisi ya Bodmer ekokaná mpenza. “Na yango, tokoki mpenza koloba ete moto oyo akomaki Codex ya Vatican asalelaki maniskri moko oyo eutaki na bapapirisi ya Bodmer. Ekoki kozala ete moto yango azwaki makambo oyo akomaki na maniskri moko ya kala to mpe na kopi moko ya maniskri ya kala.” Profɛsɛrɛ Birdsall alobaki boye: “Bamaniskri yango mibale ezali mpenza na boyokani. . . . [Codex] ekomamaki na bokɛngi mpenza: emonani ete makambo oyo ezali na kati ezali ndenge moko mpenza na oyo ya ebandeli.”
Esungaka mpenza babongoli
Tokoki koloba te ete bamaniskri ya kala ekokanaka ntango nyonso na oyo ya ebandeli. Kasi, na bokeseni na bamaniskri mosusu, Codex ya Vatican esalisaki mpenza bato ya mayele mpo na koyeba makambo oyo ezalaki na makomi ya ebandeli. Na ndakisa, eteni ya maniskri ya Sinaiticus oyo bamonaki, oyo ekomamaki mpe na ekeke ya minei ya ntango na biso, ezangi mikanda mingi kobanda na mokanda ya Ebandeli tii ya 1 Ntango. Kasi, lokola mikanda yango ezali na kati ya Codex ya Vatican, yango ezali kosalisa bato báyeba mpenza ete ezali na kati ya mikanda ya Biblia.
Buku moko oyo tolobelaki liboso (The Oxford Illustrated History of the Bible) elobi ete bato ya mayele bazalaki koyokana te mpo na “mikapo oyo elobeli Yesu mpe Bosato.” Ndenge nini Codex ya Vatican esalisaki mpo na kokanga ntina ya mikapo yango?
Tózwa ndakisa. Na Yoane 3:13, Yesu alobi boye: “Moto moko te amatá na likoló longola kaka ye oyo autaki na likoló, Mwana ya moto.” Babongoli mosusu babakisá maloba “oyo azali na likoló.” Maloba wana oyo babakisá ezali kopesa likanisi ete ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki mpe na likoló na ntango wana; likanisi yango eyokani na liteya ya Bosato. Maloba wana oyo babakisá ezali na mwa bamaniskri ya ekeke ya mitano mpe na ekeke ya zomi ya ntango na biso. Kasi, lokola ezali te na maniskri ya Vatican mpe oyo ya Sinaiticus oyo ebimaki liboso, babongoli mingi ya ntango na biso balongoli yango na Babiblia na bango. Yango elongoli mokakatano oyo bato bazalaki na yango ya koyeba soki Yesu azali nani, mpe yango eyokani na mikapo mosusu ya Makomami. Ntango Yesu azalaki awa na mabele azalaki na likoló te, autaki nde na likoló mpe mosika te asengelaki kozonga na likoló to “komata epai ya Tata” na ye.—Yoane 20:17.
Codex ya Vatican esalisaki mpe mpo na kokanga ntina ya bavɛrsɛ oyo elobeli mokano ya Nzambe mpo na mabele. Tózwa ndakisa moko. Biblia moko (King James Version) elobi ete ntoma Petro asakolaki ete “ata mabele mpe na misala oyo ezali na kati na yango esengeli kozika.” (2 Petro 3:10) Mabongoli mosusu mpe elobi bongo, na kolanda Codex Alexandrinus ya ekeke ya mitano mpe bamaniskri mosusu oyo eyaki nsima. Yango wana, batángi mingi ya Biblia balobaka ete Nzambe akobebisa mabele.
Kasi, soki mbula nkama liboso Codex Alexandrinus ebima, Codex ya Vatican (mpe maniskri Sinaiticus oyo ebimaki nzela moko na yango) ekomaki esakweli yango ya Petro boye: “Mabele mpe misala oyo ezali wana ekomonana polele.” Yango eyokani na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia? Ɛɛ. Mabele “ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.” (Nzembo 104:5) Kasi, ndenge nini mabele “ekomonana polele”? Bavɛrsɛ mosusu emonisi ete liloba “mabele” ekoki kosalelama na ndenge ya elilingi. “Mabele” ekoki koloba monɔkɔ moko boye to koyemba nzembo. (Ebandeli 11:1; Nzembo 96:1) Na yango, liloba “mabele” ekoki kolimbola bato. Tobɔndisami mpenza na koyeba ete Nzambe akobebisa mabele oyo te, kasi akobimisa polele mabe nyonso ná bato oyo bazali kosala yango mpe akoboma bango.
“Ekoumela seko”
Likambo ya mawa, lokola na boumeli ya bikeke bazalaki kolinga te ete bato mosusu bámona Codex ya Vatican, babongoli mingi basalá ete batángi ya Biblia báyeba te ndimbola ya solosolo ya bavɛrsɛ mosusu ya Biblia. Nzokande, banda babimisá Codex ya Vatican mpe mabongoli mosusu ya malamu mpenza oyo ezali kobima lelo oyo esalisi bato oyo balingaka solo báyeba oyo Biblia eteyaka mpenza.
Mbala mingi, bato oyo bazalaki kosala bakopi kala bazalaki kobakisa na bamaniskri na bango boye: “Mabɔkɔ oyo ekomaki makambo [oyo] ezali kopɔla na lilita, kasi makambo oyo ekomami ekoumela libela na libela.” Lelo oyo tozali na botɔndi mingi mpo na milende oyo bato yango oyo toyebi ata bankombo na bango te basalaki. Kasi, lokumu nyonso mpo na ndenge Biblia ebatelami malamu ezali kokende epai ya Nkolo na yango, oyo, na lisalisi ya elimo santu, atindaki mosakoli na ye eleki lelo ebele ya bambula, akoma boye: “Matiti ya mobesu ekauki, fololo elɛmbilɛmbi; kasi liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko.”—Yisaya 40:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Codex ya Vatican ebengamaka mpe Maniskri 1209 ya Vatican to Codex Vaticanus, mpe bato mingi ya mayele babengaka yango “B.” Codex yango ezalaki lolenge ya libosoliboso ya babuku oyo tozali kosalela lelo oyo. Talá lisolo “Codex ezwi esika ya rulo—Ndenge oyo Biblia ekómaki buku,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 2007.
[Etanda na lokasa 20]
Ndenge ya koyeba ntango oyo bamaniskri yango ekomamaki
Atako bato mosusu oyo basalaki bakopi bakomá ntango oyo basilisaki mosala na bango, kasi ntango oyo basilisaki kokoma bamaniskri mingi ya Grɛki eyabani te. Kasi, ndenge nini bato ya mayele bayebaka ntango oyo bamaniskri ya Biblia ekomamaki? Kaka ndenge minɔkɔ mpe mayemi ebongwanaka nsima ya bambula, ezali mpe bongo mpo na makambo oyo bato bakomaka. Na ndakisa, na ekeke ya minei mpe na bikeke oyo elandaki, bazalaki kokoma mikanda na balɛtrɛ ya minene oyo egumbamagumbama, mpe ezalaki na milɔngɔ ndenge moko. Mpo na koyeba ntango oyo bamaniskri ya kala ekomamaki, bato ya mayele bazalaki kotala kaka bamaniskri mosusu oyo ekomamaki ndenge moko na yango, oyo bayebi mbula oyo bakomaki yango.
Kasi, ntango mosusu mayele yango esimbaka te. Bruce Metzger, profɛsɛrɛ moko ya teoloji na Princeton, alobi boye: “Lokola ekomeli ya moto ekoki mpe kobongwana, ekozala mpenza libunga koluka koyeba dati ya mokanda moko na nzela ya mokanda mosusu oyo eumeli ata mbula ntuku motoba te koleka yango.” Na boyokani na makanisi wana, bato mingi ya mayele bandimaka ete Codex ya Vatican ekomamaki na ekeke ya minei ya ntango na biso.