Koluka kokweisa mateya ya Batatoli ya Yehova esalisi ngai nayeba solo
Lisolo ya R. Stuart Marshall
Nsango moko alobaki boye: “Tosololaka na Batatoli ya Yehova te. Basalelaka Biblia.” Eyano na ye ekamwisaki ngai mpo nasɛngaki ye amonisa mwasi na ngai bafoti oyo ezali na mateya ya Batatoli ya Yehova. Nazwaki ekateli ya koyekola Biblia na Batatoli mpo ngai moko namonisa ye bafoti yango.
EZALAKI na ntango wana, ntango nakómaki na mbula 43, nde nabandaki koluka kokweisa mateya ya Batatoli ya Yehova na nzela ya mayele ya logique mpe ya teoloji. Natángaki bakelasi na ngai nyonso na biteyelo ya Katolike. Atako nazwaki diplome na ekonomi na 1969 mpe nalandaki mateya ya filozofi mpe ya teoloji ntango nazali koyekola ekonomi, nayekolaki Biblia te na biteyelo ya Katolike.
Nsima ya kosilisa iniversite, nabalaki Patricia McGinn, mondimi ya Katolike lokola ngai. Biso nyonso mibale tozwaki badiplome ya minene (doctorat) na Iniversite ya Stanford. Mwana na biso, Stuart, abotamaki na 1977, mpe na nsima toyaki kofanda na Sacramento, mboka mokonzi ya etúká ya Californie, na États-Unis. Na boumeli ya mbula 23, nasalaki na biro moko (Legislative Analyst’s Office) na etúká ya Californie; mosala na ngai ezalaki ya kotalela mbongo oyo ebimaka mpo na kelasi na etúká wana. Nazalaki kosala mingi mpe nazalaki na bomoi ya malamu. Nazalaki mpenza na esengo ya kozala tata ya mwana na biso ntango azalaki kokola. Mwasi na ngai azalaki mosungi monene mpo na ngai; ngai mpe nazalaki kosunga ye.
Eyano ezwami na santimɛ 25 ya mpamba
Ntango mwana na biso akómaki na mbula mibale, Patricia azwaki Biblia epai ya Batatoli ya Yehova mpe abandaki koyekola yango elongo na bango. Azwaki batisimo mbula misato na nsima. Nazalaki komona ete makanisi ya Batatoli ya Yehova na likambo etali biyenga mpe kozongisa makila etɛngamá, kasi namonaki ete makanisi na bango na makambo mosusu ezalaki malamu. Likambo ya kokamwa, mokolo moko na 1987, nabimisaki makanisi na ngai polele ntango basɛngaki ngai nalimbola, liboso ya badepite ya parlema mpe ya sena oyo batalelaka makambo ya kelasi, likanisi moko oyo napesaki na biro ya parlema ya Californie.
Iniversite ya Californie ezalaki na bosɛnga ya mbongo mpo na kowela mosala moko ya dolare miliare motoba ná bitúká mosusu. Mosala yango ezalaki ya kosala masini moko ya monene mpo na basava. Ngai naboyaki ete mbongo ebima mpo na mosala yango, mpe namonisaki ete kosala masini yango ekozala na litomba moko te mpo na etúká na biso. Bakonzi ya iniversite bayaki na baprofɛsɛrɛ mibale ya siansi oyo bazwá mbano ya monene (prix Nobel) na mosala na bango mpo bámonisa litomba ya mosala yango liboso ya badepite. Bango nyonso mibale bamonisaki ete soki basali masini yango, ekosalisa mpenza basava. Moko na bango alobaki kutu ete masini yango ekosalisa biso tóyeba ndenge molɔ́ngɔ́ ebandaki. Oyo mosusu alobaki ete ekosalisa biso tóyeba ndenge bomoi ebandá awa na mabelé.
Mokambi ya likita yango atalaki ngai.
Atunaki ngai boye: “Yo okanisi ete dolare miliare motoba eleki ebele mpo na eloko oyo ekosalisa biso tózwa biyano na mituna wana?”
Nayanolaki ete: “Nandimi ete mituna wana ezali na ntina mingi. Kasi, Batatoli ya Yehova bayaka epai na ngai mokolo nyonso ya pɔsɔ na ntɔngɔ mpo na kotikela ngai zulunalo moko na santimɛ 25 ya dolare oyo ekoyanola na mituna yango. Mpe nandimi te ete biyano oyo ekoki kozwama na mosala oyo bolingi kosala ya dolare miliare motoba eleki biyano oyo ezali na zulunalo yango.”
Moto nyonso oyo azalaki wana, ná baprofɛsɛrɛ mibale wana, bakatanaki na kosɛka. Atako badepite bandimaki ete mbongo ebima mpo na mosala yango, ata moko te alobaki ete likanisi na ngai ezali lokuta.
Mokemoke, nabandaki komona ete nasengeli kotalela likambo moko oyo ezalaki koleka na ndako na ngai. Nsima ya kosolola na Patricia na boumeli ya mbula motoba na likambo ya Biblia mpe Batatoli ya Yehova, nayokaki mabe mpenza ntango Patricia akómaki na likanisi ya komipesa mingi na mosala ya kosakola. Mpo na yango, asengelaki kosala lisusu mingi te na iniversite. Ekamwisaki ngai ete moto ya mayele boye azala na makanisi ya ndenge wana, mpe nayebaki ete nyonso oyo nakoloba to kosala ekobongola makanisi na ye te.
Nabengaki moto moko oyo ayebaki Biblia koleka ngai, oyo nakanisaki ete akosalisa Patricia amona mabunga oyo ezali na mateya ya Batatoli ya Yehova. Soki amonisi ata libunga moko na mateya na bango, yango ekokweisa mateya na bango nyonso. Likambo mpenza oyo nazalaki na mposa ezalaki nabongola makanisi ya mwasi na ngai. Nabengaki sango ya lingomba oyo ngai ná Patricia tozalaki kosambela liboso. Lisolo na biso ná ye esukaki ndenge nayebisi bino na ebandeli ya lisolo oyo. Ntango sango aboyaki kosolola na mwasi na ngai, namonaki ete ata soki ekozwa ngai ntango molai, kaka ngai moko nde nasengelaki koluka mabunga na mateya ya Batatoli mpe kosalisa Patricia amona yango.
Nazali koluka mabunga ya Batatoli
Ntango nazalaki koyekola Biblia na Batatoli, eloko ebendaki likebi na ngai mingi ezalaki bisakweli ya Biblia. Natángaki makambo oyo mosakoli Yisaya alobaki mpo na kokwea ya Babilone, makambo oyo ekomamaki mbula soki 200 liboso esakweli yango ekokokisama. Mosakoli atángaki mpe Sirise lokola moto oyo akokweisa Babilone, mpe alobelaki mayele oyo akosalela mpo na kolekisa Ebale Efalata pembeni mpo na kokɔta na Babilone. (Yisaya 44:27–45:4) Bambula liboso, nayekolaki ndenge Babilone ekweaki ntango tozalaki koyekola mayele ya bitumba na kelasi ya basoda. Nayekolaki mpe ete mosakoli Danyele alobelaki mbula koleka 200 liboso mokonzi ya nguya oyo asengelaki kobima na Grèce, oyo bokonzi na ye esengelaki kokabwana na bikonzi minei ya mikemike nsima ya liwa na ye. (Danyele 8:21, 22) Ntango nakanisaki mateya ya istware oyo nazwá, namonaki ete mokonzi yango ezalaki Alexandre le Grand. Nsima ya kotángatánga babuku mosusu, namonaki mpenza ete mikanda wana ya Biblia ekomamaki liboso makambo oyo balobeli esalema.
Ntango nazalaki kokoba koyekola na Batatoli, nakómaki komona ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, likambo oyo nayebaki te na boumeli ya bambula nyonso oyo nalekisaki na mateya ya teoloji ya Katolike. Nasengelaki kosala nini na boyebi yango? Nazwaki ekateli ya komipesa epai na Yehova mpe kokóma Motatoli na ye. (Yisaya 43:10) Nabatisamaki na 1991, mbula mibale kaka nsima ya lisolo wana oyo tosololaki na sango. Mwana na biso azwaki batisimo na mbula oyo elandaki.
Lokola lolenge na biso ya kotalela bomoi ebongwanaki, tobongolaki mpe mikano na biso. Likambo ya liboso oyo nasalaki nsima ya batisimo na ngai ezalaki ya kozwa bibongiseli mpo nsima ya mbula mitano, ntango mwasi na ngai akokóma na mbula 50, atika kotángisa na iniversite. Azalaki na mposa ya komipesa mingi lisusu na mosala ya kosakola, elingi koloba alekisaka ngonga 1 000 na mbula to ngonga soki 83 na sanza, ndenge ezalaki kosɛngama na ntango wana, mpo na kosalisa bato báyeba Biblia. Na 1994, akitisaki mpenza bangonga na ye ya mosala mpo akóma kosakola mingi. Mikano na ngai ya ebandeli ezalaki ya kobongisa lolenge na ngai ya kosakola, kopesa mabɔkɔ na likambo nyonso nakoki kosala na lisangá, mpe kosalela mayele na ngai mpo na kotalelaka mbongo oyo ezali kobima mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi na etúká na biso.
Nazwaki mpe libaku ya kosalisa ndeko moko na esika na biso ya mosala. Ndeko mwasi moko oyo atikaki kosakola akómaki kosala na biro na biso. Ntembe oyo azalaki na yango mpo na mateya mosusu ya Biblia elɛmbisaki kondima na ye. Nazalaki na esengo ya kosalisa ye azongela boyokani na ye na Yehova. Azongaki na mboka na ye mpe amipesaki lisusu mingi na mosala ya kosakola.
Na 1995, nazalaki na likita moko oyo badepite ya parlema mpe ya sena oyo batalelaka makambo ya kelasi bakutanaki mpo na kotalela mbongo wana oyo guvɛrnema ebimisaki mpo na misala ya siansi na etúká na biso. Mokambi ya likita yango atunaki badepite ya etúká yango báyebisa soki mosala ya kotonga masini yango ekómi wapi. Mokambi na bango alobaki ete bapesaki mosala yango na etúká ya Texas, kasi esilá te mpo na ntina misato. Ya liboso, liboso kutu mosala yango ebanda, mbongo oyo esengelaki mpo na yango emataki na dolare miliare libwa na esika ya miliare motoba oyo tokanisaki na ebandeli. Ya mibale, bakonzi ya etúká bamonaki malamu kosalela mbongo yango na makambo mosusu, na etumba ya Iraq, oyo esalemaki na 1991. Ya misato, bamonaki ete bakoki kozwa biyano na mituna oyo bamitunaki na ntina ya bomoi na mikanda ya Batatoli ya Yehova, oyo bakoki kozwa kaka na mwa basantimɛ 25! Emonanaki mpenza ete bato ebele bakómaki kozongela makanisi oyo napesaki na likita oyo tosalaki liboso.
Ntango bato nyonso bazalaki kosɛka, bato mosusu ya komite batalaki ngai. Nayebisaki bango nyonso ete: “Sikoyo, bokoki kozwa biyano yango kozanga kofuta, mpo tokómá kokabola mikanda yango ofele.”
Bomoi ya esengo mpe ya ntina
Ntango mwasi na ngai azwaki pansiɔ, tozwaki bibongiseli ya mbula mitano mpo na ngai. Lokola nazalaki na mposa ya kolekisa ntango mingi na koteya basusu Biblia, nabandaki koluka mosala na mayele na bisika mosusu, epai nakobanda kosala kaka ndambo ya mokolo. Likambo ya kokamwa, esika nazalaki kosala bandimaki nasalaka kaka mwa ndambo ya mokolo. Yango wana, na 1998, ngai mpe nalandaki lokolo ya mwasi na ngai, nakómaki komipesa mingi na mosala ya kosakola.
Mokolo moko na ntɔngɔ, ntango ngai ná mwasi na ngai tozalaki komilengele mpo na kobima na mosala ya kosakola, nayokaki telefone eleli; bandeko ya biro ya Batatoli ya Yehova na États-Unis babengaki. Ndeko oyo abengaki atunaki ngai soki nakosepela kopesa mabɔkɔ na mosala moko na Brooklyn. Nandimaki mbala moko. Yango wana, tosalaki sanza 18 na biro oyo etambwisaka mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Nasɛngaki pansiɔ ya mbangumbangu na mosala na ngai na etúká ya Californie mpo nasilisa mosala oyo bapesaki ngai na Brooklyn. Na nsima, tokendaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova na engumba Fairfield, na etúká ya Californie. Totɛkaki ndako na biso oyo ezalaki na Sacremento mpe tokendeki kofanda na mwa ndako moko ya moke na engumba Palo Alto, na etúká ya Californie. Kotika mosala atako bambula ekokaki naino te efungwelaki ngai nzela ya mapamboli mosusu. Banda wana, tozwi libaku ya kopesa mabɔkɔ na misala mingi na babiro ya Batatoli ya Yehova na Nigeria, Afrique du Sud, Canada, Angleterre mpe Allemagne.
Lokola bandeko oyo basalisaki biso tókóma Batatoli, ngai ná mwasi na ngai sikoyo tozali na esengo ya kosalisa basusu báyeba Biblia. Nandimi na motema moko ete mateya ya Yehova eleki mpenza mateya nyonso oyo nazwá na bainiversite. Na ntembe te, na makambo nyonso, mateya ya Nzambe eleki mosika mateya mosusu nyonso oyo tokoki kozwa na mokili oyo. Yehova alakisi basaleli na ye koteya Biblia na lolenge oyo ekoki kosimba motema. Yango nde etindaka ngai nakoba koyekola. Ngai ná mwasi na ngai tozali na botɔndi mpo na bomoi oyo tozali na yango lelo mpe mpo na libaku kitoko oyo tozali na yango ya kosalela mayele oyo tozwá na kelasi na mosala ya Yehova Nzambe, Nkolo mokonzi ya molɔ́ngɔ́.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
Ntango nazalaki koyekola Biblia na Batatoli, eloko ebendaki likebi na ngai mingi ezalaki bisakweli ya Biblia
[Elilingi na lokasa 27]
Ngai ná Patricia, mokolo ya libala na biso
[Elilingi na lokasa 29]
Ngai ná Patricia, tozali kosalisa basusu báyeba Biblia