Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/2 lok. 9
  • Nzambe andimaka losambo ya ndenge nyonso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe andimaka losambo ya ndenge nyonso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • 5 Nzambe andimaka mangomba nyonso—Solo to lokuta?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Batatoli ya Yehova bakanisaka ete kaka bango nde lingomba ya solo?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/2 lok. 9

Nzambe andimaka losambo ya ndenge nyonso?

Biyano oyo bato bapesaka:

▪ “Mangomba nyonso ememaka epai ya Nzambe.”

▪ “Lingomba ekipaka te, etalaka kaka motema.”

Yesu ateyaki nini?

▪ “Bókɔta na ekuke ya nkaka; mpamba te nzela ya monene mpe oyo efungwamá ezali oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta na yango bazali mingi; nzokande ekuke oyo ezali nkaka mpe nzela oyo ekangamakangamá ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.” (Matai 7:13, 14) Yesu azalaki koteya te ete mangomba nyonso ememaka epai ya Nzambe.

▪ “Mingi bakoloba na ngai na mokolo yango, ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te, mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te, mpe tosalaki misala ya nguya na nkombo na yo te?’ Nzokande na bango nakoyambola boye: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato ya misala ya botyoli-mibeko.” (Matai 7:22, 23) Yesu andimaka te bato nyonso oyo balobaka ete balandaka ye.

BATO mingi bakangamá na bindimeli mpe bonkɔkɔ na bango. Kasi, ezali boni soki mateya yango eyokani te na mateya ya Biblia, Liloba ya Nzambe? Yesu amonisaki likama ya kolanda makanisi ya bato ntango alobaki na bakonzi ya mangomba ya ntango na ye ete: “Bokómisi liloba ya Nzambe eloko ya mpamba mpo na mimeseno na bino.” Na nsima, atángaki maloba ya Nzambe oyo: “Bato ya ekólo oyo bazali kokumisa ngai na mbɛbu na bango, nzokande motema na bango etangwá mosika na ngai. Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo bazali koteya bakomandema ya bato lokola mateya.”​—Matai 15:1-9; Yisaya 29:13.

Longola bindimeli, etamboli ya malamu ezali mpe na ntina. Biblia elobi mpo na bato mosusu oyo balobaka ete basambelaka Nzambe ete: “Balobaka polele ete bayebi Nzambe, kasi bazali kowangana ye na misala na bango.” (Tito 1:16) Kutu, Biblia elobi mpo na bato ya ntango na biso ete “bakobanda kokangama bobele na bisengo ya mokili, kasi na Nzambe té. Bakomilakisa lokola bato ya Nzambe kasi bakondima nguya na ye té. Zala mosika na bato ya ndenge wana.”​—2 Timote 3:4, 5, Bible na lingala ya lelo oyo.

Ya solo, tosengeli kozala sembo, kasi tosengeli kosuka kaka wana te. Mpo na nini? Mpamba te, moto akoki komipesa na bosembo mpenza na likambo oyo ayebi te ete ezali mabe. Yango wana, boyebi ya sikisiki ya Nzambe ezali mpenza na ntina. (Baloma 10:2, 3) Kozala na boyebi ya sikisiki mpe kosala makambo oyo eyokani na mateya ya Biblia ekosalisa biso tóyeba kosepelisa Nzambe. (Matai 7:21) Na yango, losambo ya solo esɛngaka kozala sembo, kozala na boyebi ya sikisiki mpe kosala oyo ezali malamu. Mpe kosala oyo ezali malamu elimboli kosala mokano ya Nzambe mokolo na mokolo!​—1 Yoane 2:17.

Soki olingi koyeba oyo Biblia elobi mpo na Nzambe, luká Batatoli ya Yehova mpo báyekola na yo Biblia ofele.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]

Losambo ya solo esɛngaka kozala sembo, kozala na boyebi ya sikisiki mpe kosala oyo ezali malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto