Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/4 nk. 10-11
  • Kobotama ya sika—Ekokisaka likambo nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobotama ya sika—Ekokisaka likambo nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mbongwana oyo yango ememaka
  • Kobotama ya sika—Moto ye moko nde asengeli kopona yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Kobotama ya sika—Mokano na yango ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/4 nk. 10-11

Kobotama ya sika​—Ekokisaka likambo nini?

MPO na nini Yesu asalelaki maloba ‘kobotama na elimo’ ntango azalaki kolobela batisimo ya elimo? (Yoane 3:5) Ntango liloba “kobotama” esalelami na ndenge ya elilingi, elimbolaka “ebandeli”; na ndakisa, “kobotama ya ekólo moko.” Na yango, maloba “kobotama ya sika” emonisi “ebandeli ya sika.” Maloba “kobotama” mpe “kobotama ya sika” emonisaka ete likambo moko ya sika ebandi na boyokani ya Nzambe ná moto oyo abatisami na elimo. Mbongwana monene yango esalemaka ndenge nini?

Mpo na komonisa ndenge oyo Nzambe abongisaka bato mpo bákende koyangela na likoló, ntoma Paulo azwaki ndakisa ya likambo moko na kati ya libota. Akomelaki Baklisto ya ntango na ye ete ‘bakokamatama lokola bana’ mpe na ndenge yango, Nzambe akosalela bango makambo “lokola bana.” (Bagalatia 4:5; Baebele 12:7) Mpo na komona ndenge ndakisa yango ekoki kosalisa biso tóyeba mbongwana oyo esalemaka na bomoi ya moto oyo abatisami na elimo santu, tózongela lisusu ndakisa ya elenge oyo alingi kokɔta na eteyelo ya bana-mboka.

Mbongwana oyo yango ememaka

Na ndakisa yango, elenge wana akoki kokɔta na eteyelo yango te mpo azali mopaya. Kasi, kanisá ete mokolo moko mbongwana esalemi na bomoi na ye. Tata moko, oyo azali mwana-mboka azwi ye lokola mwana na ye. Yango ekomema mbongwana nini na bomoi ya elenge yango? Lokola tata yango akamati ye lokola mwana na ye, elenge yango akómi lokola bana-mboka ya ekólo yango, azali mpe na lotomo ya kokɔta na eteyelo ya bana-mboka. Lokola akómi mwana ya tata wana, yango ebongoli mpenza makambo ya bomoi na ye.

Yango emonisi likambo oyo esalemaka epai ya baoyo babotamaka lisusu. Bato yango bakokani na elenge wana na nini? Elenge yango akokɔta na eteyelo ya bana-mboka kaka soki akokisi masɛngami, elingi koloba, soki akómi mwana-mboka. Kasi, akokokisa masɛngami yango na makasi na ye moko te. Ndenge moko mpe, bato mosusu bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe, to guvɛrnema ya likoló, kaka soki bakokisi masɛngami, elingi koloba, soki ‘babotami lisusu.’ Kasi, na makasi na bango moko bakoki kokokisa masɛngami yango te, mpamba te Nzambe nde asalaka ete moto abotama lisusu.

Nini ebongoli bomoi ya elenge wana? Kokóma mwana ya tata oyo azali mwana-mboka. Ya solo, likambo yango ebongoli bomoto ya elenge yango te. Ata ndenge akómi mwana ya tata wana, azali kaka ndenge bato bayebi ye. Atako bongo, likambo yango epesi ye lotomo ya kokóma mwana-mboka. Tokoki koloba ete abandi bomoi ya sika, to abotami lisusu. Akómi mwana ya tata oyo azali mwana-mboka mpe yango epesi ye lotomo ya kokɔta na eteyelo mpe na libota ya tata yango.

Ndenge moko mpe, Yehova abongolaka bomoi ya bato ya kozanga kokoka oyo aponi na ndenge akamataka bango lokola bana na ye. Ntoma Paulo, oyo azali moko ya bato yango akomelaki baninga na ye boye: “Bozwaki nde elimo ya kokamatama lokola bana, oyo na nzela na yango togangaka ete: ‘Aba, Tata!’ Elimo yango moko epesaka litatoli elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe.” (Baloma 8:15, 16) Ya solo, lokola Nzambe akamati baklisto yango lokola bana na ye, bakɔti na libota na Ye, to bakómi “bana ya Nzambe.”​—1 Yoane 3:1; 2 Bakolinti 6:18.

Nzokande, likambo yango ebongoli bomoto na bango te, bazali kaka bato ya kozanga kokoka. (1 Yoane 1:8) Ndenge Paulo alimbolaki yango lisusu, likambo yango epesi bango lotomo ya kokóma bana ya Nzambe. Na ntango yango, elimo ya Nzambe apesaka bato yango elikya makasi ete bakozala na Klisto na likoló. (1 Yoane 3:2) Elikya yango, oyo elimo santu epesaka bango, etindaka bango bákóma kotalela bomoi ndenge mosusu. (2 Bakolinti 1:21, 22) Ɛɛ, babandaka bomoi ya sika to mpe babotamaka lisusu.

Mpo na bana yango ya Nzambe Biblia elobi boye: “Bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakoyangela elongo na ye mbula yango nkóto.” (Emoniseli 20:6) Elongo na Klisto, bana yango ya Nzambe bakozwa esika lokola bakonzi na Bokonzi ya Nzambe to na guvɛrnema ya likoló. Ntoma Petelo akomelaki baninga na ye baklisto ete bakozwa libula “oyo ekoki kopɔla te mpe oyo ezangi mbindo” oyo “ebombami na likoló” mpo na bango. (1 Petelo 1:3, 4) Yango ezali solo mbano monene!

Nzokande, likambo yango ya boyangeli ebimisi mpe motuna. Soki bato oyo bazali kobotama lisusu bakoyangela na likoló, bakoyangela banani? Lisolo oyo elandi, ekoyanola na motuna yango.

[Elilingi na lokasa 10]

Paulo alobaki nini na likambo etali kokamatama lokola mwana?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto