Mekolá kondima na bango
Ayekoli koyokela basusu mawa
NA NTEMBE te, Yona azwaki ntango mingi mpo na kokanisa. Asengelaki kotambola kilomɛtrɛ 800 na makolo, mobembo oyo esengelaki kozwa sanza mobimba to koleka. Asengelaki naino kopona soki akokende na banzela ya mikuse to mpe oyo ya milai oyo ezalaki na makama te, mpe kotambola na banzela ya mabwaku mpe ya bangomba. Asengelaki mpe kotambola pembenipembeni ya esobe monene ya Sulia, kokatisa bibale ya minene lokola Efalata, mpe koluka esika ya kolala epai ya bato oyo ayebaki te, na bingumba mpe bamboka ya Sulia, Mezopotamia mpe Asulia. Wana mikolo ezalaki koleka mpe azalaki kopusana na Ninive, engumba oyo azalaki kobanga makasi, azalaki kokanisa makambo oyo ekokaki kokómela ye kuna.
Kasi, Yona ayebaki malamu ete akoki te kokima mokumba oyo Yehova apesaki ye. Amekaki kosala yango liboso. Ntango Yehova atindaki ye mpo na mbala ya liboso akende kosakola nsango ya etumbu na engumba yango monene ya Asulia, Yona azwaki masuwa oyo ezalaki kokende epai mosusu. Na yango, Yehova atindaki mopɛpɛ makasi, mpe Yona amonaki ete bato oyo bazalaki na masuwa yango balingi kokufa mpo na kozanga botosi na ye. Mpo bato ya masuwa yango bákufa te, ayebisaki bango bábwaka ye na mai. Atako bakakatanaki, babwakaki ye na mai mpe Yona amonaki ete esili mpo na ye. Kasi, Yehova atindaki mbisi moko ya monene emɛla Yona, mpe nsima ya mikolo misato ebwakaki ye na libongo. Yona ayokaki nsɔmɔ mpe akómaki na botosi makasi.a—Yona, mikapo 1, 2.
Ntango Yehova atindaki Yona na Ninive mpo na mbala ya mibale, mosakoli yango atosaki mpe abandaki mobembo yango ya molai. (Yona 3:1-3) Kasi, liteya oyo Yehova apesaki ye ebongolaki ye mpenza? Na ndakisa, Yehova ayokelaki ye mawa yango wana abikisaki ye na mai mpe apesaki ye etumbu te mpo na botomboki na ye, kasi apesaki ye libaku mosusu ya kokokisa mokumba oyo apesaki ye. Nyonso wana eteyaki Yona amoniselaka basusu motema mawa? Koyekola komonisa motema mawa ezalaka pɛtɛɛ te mpo na bato ya kozanga kokoka. Tótala liteya oyo tokoki kozwa na lisolo ya Yona.
Nsango ya etumbu ebongoli bango
Yona azalaki komona Ninive te ndenge Yehova azalaki komona yango. Biblia elobi boye: “Ninive ezalaki mboka monene mingi mpenza.” (Yona 3:3) Mbala misato mobimba na Mokanda ya Yona, Yehova abengi Ninive ‘mboka monene.’ (Yona 1:2; 3:2; 4:11) Mpo na nini engumba yango ezalaki monene na miso ya Yehova?
Ninive ezalaki engumba moko ya kala, moko ya bingumba ya liboso oyo Nimerode atongaki nsima ya Mpela. Ezalaki engumba moko monene, oyo mbala mosusu esangisaki bingumba mingi, mpe ezalaki kosɛnga mikolo misato mpo na kotambola na engumba yango mobimba na makolo. (Genese 10:11; Yona 3:3) Emonani ete Ninive ezalaki engumba monene mpenza, oyo ezalaki na batempelo, bifelo mpe bandako mosusu ya mineneminene. Kasi na miso ya Yehova, biloko nyonso wana te nde ezalaki na ntina. Bato nde bazalaki na ntina koleka. Ninive ezalaki na bato ebele mpenza. Atako bazalaki kosala mabe mingi, Yehova azalaki kaka komibanzabanza mpo na bango. Bomoi ya bato ezali na motuya mingi na miso na ye, mpe amonaka ete moto nyonso ya mabe azali na likoki ya kobongwana mpe koyekola kosala oyo ezali malamu.
Ntango Yona akómaki na Ninive, na ntembe te abangaki ntango amonaki bato soki 120 000 ya engumba yango.b Atambolaki mokolo mobimba na kati ya engumba yango, ntango mosusu mpo na koluka esika oyo ebongi mpo na kobanda kosakola nsango na ye. Ndenge nini akokaki kosolola na bato yango? Ayekolaki nde monɔkɔ ya Baasulia? To Yehova apesaki ye likoki ya koloba monɔkɔ yango na ndenge ya likamwisi? Toyebi te. Ekoki kozala ete Yona azalaki kosakola na monɔkɔ ya Liebele mpe moto mosusu azalaki kobongola na monɔkɔ ya Baasulia. Ezala bongo to te, nsango na ye ezalaki mindɔndɔ te mpe ekokaki kosepelisa bato te. Azalaki koloba boye: “Naino mikolo ntuku minei mpe Ninive akobukama.” (Yona 3:4) Azalaki kozongela yango mbala na mbala mpe koloba na mpiko nyonso. Na ndenge yango, amonisaki mpiko mpe kondima, bizaleli oyo baklisto basengeli na yango mingi koleka lelo oyo.
Nsango ya Yona ebendaki likebi ya bato ya Ninive. Na ntembe te azalaki kokanisa ete bato yango bakosilika mpo na nsango yango. Nzokande, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Bato yango bayokaki mpe batosaki! Nsango ya Yona epanzanaki na engumba mobimba. Mosika te, bato nyonso na engumba yango bakómaki kolobela nsango ya etumbu oyo Yona azalaki kosakola. Mokanda ya Yona elobi boye: “Bato ya Ninive bandimaki Nzambe; babongisaki kokila mpe balataki ngɔtɔ, longwá na oyo alekaki monene kati na bango kino oyo alekaki moke na bango.” (Yona 3:5) Bato nyonso, babola mpe bazwi, bato minene mpe bato mpamba, bilenge mpe mikóló, bango nyonso babongolaki mitema. Likambo yango ekómaki tii epai ya mokonzi.
Mokonzi mpe abangaki Nzambe. Alongwaki na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya lokumu mpe alataki saki lokola bato nyonso, mpe “afandaki na mputulu.” Ye ná “mikóló” to bankumu na ye babimisaki mobeko oyo esɛngaki bato nyonso ya engumba yango bákila bilei. Mokonzi asɛngaki ete bato nyonso, ata mpe banyama, bálata basaki.c Na komikitisa nyonso, andimaki ete bato na ye basalaki mabe. Amonisaki mpe elikya ete Nzambe akoyokela bango mawa ntango akomona ete babongoli motema; alobaki boye: “Nzambe ya solo akoki . . . koyoka mpenza mawa mpe kozonga nsima na nkanda na ye ya kongala, mpo tókufa te.”—Yona 3:6-9, NW.
Bato mosusu balobaka ete ekokaki kosalema te ete bato ya Ninive bábongola motema mbala moko bongo. Nzokande, balimboli ya Biblia balobi ete yango ezalaki momeseno ya bato ya ntango wana oyo bazalaki kobanga bilimo. Atako bongo, Yesu mpe alobelaki kobongola motema ya bato ya Ninive. (Matai 12:41) Ayebaki likambo yango malamu, mpo ntango esalemaki, azalaki na likoló mpe amonaki ndenge elekaki. (Yoane 8:57, 58) Kasi, Yehova atalelaki kobongola motema ya bato ya Ninive ndenge nini?
Bokeseni kati na mawa ya Nzambe mpe motema makasi ya moto
Yona akomaki boye: “Nzambe amonaki misala na bango oyo bazalaki kobongwana longwa na nzela na bango mabe; mpe Nzambe abongolaki motema na ye longwa na mabe malobaki ye ete akosalela bango yango; asalaki yango te.”—Yona 3:10.
Tokoki nde koloba ete Yehova amonaki ete asalaki libunga mpo na etumbu oyo alingaki kopesa bato ya Ninive? Te. Mpo na Yehova, Biblia elobi boye: “Mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe ya sembo mpe ya mabe te.” (Deteronome 32:4) Nkanda oyo Yehova azalaki na yango mpo na bato ya Ninive esilaki. Amonaki mbongwana oyo bato yango basalaki, mpo na yango apesaki bango te etumbu oyo akanaki kopesa bango. Nzambe amonaki ete asengeli komonisela bango motema mawa.
Yehova azali te Nzambe ya makambo makasi mpe motema mabe ndenge bakonzi ya mangomba bateyaka. Alimbisaka mpe azali motema mawa. Soki akani kopesa bato mabe etumbu, atindaka liboso basaleli na ye bákebisa bango, mpo alingaka mpenza ete bato mabe básala lokola bato ya Ninive, elingi koloba bábongola motema mpe bátika nzela na bango ya mabe. (Ezekiele 33:11) Yehova alobaki na mosakoli Yilimia boye: “Na ntango moko nakoloba mpo na libota mpe mpo na bokonzi ete nabikola mpe nakitisa mpe nabebisa yango. Nde soki libota yango oyo ngai nalakeli bango mabe, bakopɛngwa na mabe na bango, nakobongola motema na ngai mpe na mabe makanaki ngai kosalela bango.”—Yilimia 18:7, 8.
Tokoki nde koloba ete makambo oyo Yona asakolaki ezalaki lokuta? Te, esakweli na ye ekokisaki mokano na yango, oyo ezalaki ya kokebisa bato. Esakweli yango ezalaki mpo na kokebisa bato ya Ninive bátika nzela na bango ya mabe, mpe basalaki yango. Soki bato ya Ninive bazongelaki makambo na bango ya mabe, etumbu yango elingaki koyela bango. Yango mpenza nde esalemaki.—Sefania 2:13-15.
Yona asalaki nini ntango amonaki ete engumba yango ebomami te ndenge asakolaki? Biblia elobi boye: “Nde eyokisaki Yona mabe mingi mpe azalaki na nkanda.” (Yona 4:1) Asalaki kutu libondeli moko oyo emonisaki lokola azali kopamela Mozwi-ya-Nguya-Nyonso! Mpo na ye, ebongaki kutu atikala na ye na mboka na ye. Alobaki ete ayebaki ete Yehova akobebisa engumba yango te, yango wana na mbala ya liboso akimaki na ye na Talasisi. Alobaki ete eleki malamu kutu akufa na ye.—Yona 4:2, 3.
Nini epesaki Yona mpasi? Tokoki mpenza koyeba te makambo oyo azalaki kokanisa; kasi, toyebi ete Yona asakolaki epai ya bato ya Ninive ete engumba na bango ekobomama. Bato yango bandimelaki ye. Mpe mboka yango ebomamaki te. Azalaki nde kobanga ete bato yango bakotyola ye to bakobenga ye mosakoli ya lokuta? Ezala bongo to te, asepelaki te na ndenge bato yango babongolaki motema to ndenge Yehova amoniselaki bango motema mawa. Asilikaki, azalaki komibanzabanza mpo na ye moko mpe amonaki ete lokumu na ye ebebi. Kasi atako bongo, Yehova, Nzambe ya motema mawa, akobaki kaka komona bizaleli malamu ya mosakoli yango. Na esika apesa Yona etumbu mpo na kozanga limemya na ye, Yehova atunaki ye na boboto nyonso boye: “Ozali mpenza na ntina ya kosilika makasi boye?” (Yona 4:4, NW) Yona apesaki eyano? Biblia elobi likambo moko te.
Ndenge Yehova ateyaki Yona
Na mawa na ye, Yona abimaki na Ninive mpe, na esika azonga na mboka na ye, akendaki na ngámbo ya ɛsti, na esika moko ya bangomba. Atongaki mwa esika moko mpo na komibatela na moi mpe afandaki wana mpo na kotala likambo oyo ekokómela Ninive. Ekoki kozala azalaki kolikya ete engumba yango ekobomama kaka. Ndenge nini Yehova ateyaki moto yango ya motema makasi mpo akóma na motema mawa?
Na butu, Yehova akolisaki molona ya ekutu. Ntango Yona alamukaki, amonaki molona yango oyo ebimisaki nkasa mingi mpe ekokaki kobatela ye malamu na moi. Asepelaki makasi. Biblia elobi ete “Yona asepelaki na esengo monene” mpo na molona yango, ntango mosusu amonaki ete ezali lipamboli ya Nzambe mpe ete Nzambe abimisaki yango na ndenge ya likamwisi mpo na komonisa ete asepeli na ye. Nzokande, Yehova asalaki yango kaka te mpo na kobatela Yona na moi mpe kokitisa ye motema. Alingaki nde kosimba motema na ye. Yango wana, Nzambe atindaki nkusu elya mpe ebɛbisa molona yango. Na nsima, atindaki “mopɛpɛ ya molunge.” Lokola molunge elekaki makasi, Yona akómaki ‘kosɛnzwa.’ Yona asilikaki lisusu makasi mpe asɛngaki Nzambe liwa.—Yona 4:6-8.
Na mbala wana mpe, Yehova atunaki Yona soki azalaki mpenza na ntina ya kosilika mpo na mwa molona ya ekutu. Na esika abongola motema, Yona abandaki nde koluka komilongisa. Alobaki boye: “Nasiliki mpenza na ntina, tii na liwa.” Ntango ekokaki sikoyo mpo Yehova apesa ye liteya.—Yona 4:9.
Nzambe amonisaki Yona ete soki ye ayokaki mpasi mpe asɛngaki akufa kaka mpo na molona oyo ekolaki na butu moko mpamba, molona oyo ye alonaki te mpe akolisaki te, bongo ye akoyoka ndenge nini. Na nsima, alobaki na Yona boye: “Ngai mpe nayokela Ninive mawa te, mboka oyo monene, wana bato baleki nkoto monkama na ntuku mibale, baoyo bayebi kokabola kati na lobɔkɔ na bango ya mobali mpe lobɔkɔ na bango ya mwasi te, mpe bibwele mingi lokola?”—Yona 4:10, 11.d
Omoni bozindo ya liteya oyo Yehova apesaki Yona? Yona asalaki eloko moko te mpo na kokolisa molona wana. Epai mosusu, Yehova nde apesaki bato ya Ninive bomoi mpe azalaki kobatela bomoi na bango ndenge asalaka mpo na bikelamu na ye nyonso awa na mabelé. Ndenge nini Yona akokaki kopesa mwa molona motuya mingi koleka bato 120 000 ya Ninive, bakisá mpe bibwele? Ekoki kozala ete Yona akómaki komibanzabanza kaka mpo na ye moko? Ayokaki mpasi mpo na mwa molona wana kaka mpo ezalaki kobatela ye na moi. Nkanda oyo amonisaki mpo na likambo ya Ninive, ezalaki kaka mpo na koluka lokumu na ye moko—alingaki komonana moto ya lokuta te.
Ezalaki liteya moko mozindo! Motuna yango oyo: Yona azwaki liteya na likambo yango? Mokanda oyo ezali na nkombo na ye esuki na motuna oyo Yehova atunaki ye. Bato mosusu bamitunaka mpo na nini Yona ayanolaki te. Likambo ya solo ezali ete Yona ayanolaki; eyano yango ezali buku ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye. Ezali na makambo oyo emonisi ete Yona moto akomaki buku yango. Kanisá naino mosakoli yango, ntango azongaki na mboka na ye mpe azali kokoma buku yango. Mobange moko, oyo atondi na bwanya mpe na komikitisa azali koningisa motó ntango azali kolobela mabunga, botomboki na ye mpe motema makasi oyo amonisaki. Emonani mpenza ete Yona azwaki liteya na toli ya bwanya oyo Yehova apesaki ye. Biso mpe tokosala lokola ye?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Mekolá kondima na bango—Mabunga na ye eteyaki ye,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2009.
b Balobaka ete na ntango ya Yona, Samalia, mboka-mokonzi ya Yisalaele, ezalaki na bato soki 20 000 to 30 000; nzokande, Ninive ezalaki na bato soki mbala minei koleka engumba yango. Ekoki kozala ete na ntango wana, Ninive ezalaki engumba oyo elekaki monene na mokili mobimba.
c Likambo yango ekoki kokamwisa, kasi bato ya Ninive bazalaki bato ya liboso te ya kosala likambo yango. Hérodote, Mogrɛki mpe moto ya mayele na masolo ya kala, alobaki ete bato ya Perse balelaki mokonzi moko ya basoda oyo bazalaki kolinga mingi elongo ná banyama na bango.
d Nzambe alobaki ete bato yango bayebaki te kokesenisa lobɔkɔ na bango ya mobali ná oyo ya mwasi mpo na komonisa ete bazalaki lokola bana mike mpamba te bayebaki mibeko ya Nzambe te.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 16]
Nzambe asepelaka komona bato mabe babongoli motema mpe batiki nzela na bango ya mabe, ndenge bato ya Ninive basalaki
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 17]
Nzambe asalelaki molona ya ekutu mpo na koteya Yona motema mawa