Kondima ezali nini?
MPO na yo, kondima ezali nini? Bato mosusu balobaka ete kondima elimboli kotya motema na makambo oyo bateyi, kozanga kotuna mituna. Henry Mencken, mokomi mpe mopanzi-nsango moko ya Amerika oyo ayebani mingi, alobaki ete kondima “ezali kotya motema na likambo oyo ekosalema te.”
Kasi, Biblia eteyaka bongo te. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, elakiseli ya polelepolele ya makambo ya solosolo atako ezali komonana te.”—Baebele 11:1.
Lokola bato bazali na makanisi ekeseni na likambo etali kondima, tóluka koyeba biyano na mituna oyo elandi:
• Ndimbola ya Biblia na likambo etali kondima ekeseni na nini na bandimbola oyo bato mingi bapesaka?
• Mpo na nini ezali na ntina tózala na kondima oyo Biblia elobeli?
• Ndenge nini okoki kokóma na kondima makasi?
Ndanga mpe elembeteli ya solosolo
Ntango mokanda ya Baebele ekomamaki, bato mingi bazalaki kosalela liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ezaleli ya kozela na motema mobimba.” Maloba yango ezalaki komonana mingi na mikanda ya mimbongo mpe ezalaki komonisa ete moto azali na lotomo ya kozwa biloko na mikolo ezali koya. Na yango, buku moko elobi ete Baebele 11:1 ekoki kobongolama boye: “Kondima ezali kozala na ndanga ete okozwa biloko oyo ozali kozela.”
Soki osilá kosomba eloko na kompanyi moko oyo eyebani mingi mpe osengelaki kozela mpo bápesa yo yango, omonisaki kondima ya ndenge wana. Faktire oyo bapesaki yo etindaki yo ondima ete kompanyi yango ekopesa yo biloko oyo osombaki. Tokoki koloba ete faktire wana ezalaki ndanga oyo emonisaki ete okozwa biloko oyo osombaki. Soki obungisi yango to obwaki yango, okozanga elembeteli ya kolakisa na kompanyi wana mpo bápesa yo biloko oyo osombaki. Ndenge moko mpe, baoyo bazali na kondima ete Nzambe akokokisa bilaka na ye, bazali na ndanga ete bilaka yango ekokokisama mpo na bango. Epai mosusu, baoyo bazali na kondima te, to babungisi yango, bilaka ya Nzambe ekokokisama mpo na bango te.—Yakobo 1:5-8.
Maloba mosusu oyo ezali na Baebele 11:1, oyo ebongolami na “elakiseli ya polelepolele,” elimboli kopesa elembeteli mpo na kondimisa likambo moko, mingimingi likambo oyo ezali komonana ndenge mosusu. Na ndakisa, emonanaka ete moi ebalukaka zingazinga ya mabelé—elamukaka na ɛsti, etambolaka na mapata mpe elalaka na wɛsti. Nzokande, bato oyo bayekolaka minzoto mpe bato ya mayele na matematiki bamonisi polele ete moi ná baplanɛti ebalukaka zingazinga ya mabelé te. Soki oyebi likambo yango mpe ondimi yango, okokóma kondima ete mabelé nde ebalukaka zingazinga ya moi, atako miso na yo ezali komona bongo te. Kondima na yo ezali bindimela te. Kasi, ezali kosalisa yo omona makambo ndenge ezali mpenza, kasi te ndenge kaka ezali komonana.
Kondima makasi ezali na ntina nini?
Oyo nde kondima oyo Biblia ezali kolendisa tózala na yango—kondima makasi oyo esimbami na elembeteli ya solosolo, ata soki esɛngi ete tóbongola bindimeli na biso. Kondima ya ndenge wana ezali na ntina mingi. Ntoma Paulo akomaki ete: “Na kozanga kondima likoki ya kosepelisa [Nzambe] mpenza ezali ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.”—Baebele 11:6.
Ezali na mikakatano mingi oyo ekoki kopekisa yo ozala na kondima makasi. Kasi, soki otaleli makambo minei oyo elobelami na masolo elandi, okoki kokóma na kondima makasi.