Nazali na esengo atako nazali ebɔsɔnɔ
Lisolo ya Paulette Gaspar
Atako nabotamaki na kilo soki 3, doktɛrɛ amonaki ete nazali na mokakatano makasi. Ntango mama azalaki kobota ngai, mikuwa na ngai mingi ebukanaki. Na yango, nazali na maladi moko oyo esalaka ete mikuwa ebukanaka mpambampamba. Bamemaki ngai mbangu na esika basalaka lipaso, kasi badoktɛrɛ bazalaki mpenza na elikya te ete nakobika. Bakanisaki ete mokolo mobimba ekoleka te, nakokufa.
NABOTAMÁ na mokolo ya 14 Yuni 1972, na Canberra, mboka-mokonzi ya Australie. Atako emonanaki ete nakokufa, nakufaki te. Kasi, eumelaki te, nabɛlaki maladi ya mpema oyo babengi pneumonie. Lokola badoktɛrɛ bakanisaki ete nakobika te, baboyaki kopesa ngai nkisi ata moko mpe batikaki ngai kaka bongo. Kasi, nakufaki te.
Nakanisaka mpasi oyo baboti na ngai bazalaki koyoka na ntango wana. Lokola emonanaki ete nakobika te, badoktɛrɛ bayebisaki baboti na ngai ete bákangama na ngai mingi te. Kutu, na boumeli ya sanza misato ya liboso oyo nalekisaki na lopitalo, bapekisaki baboti na ngai básimba ngai ata kosimba. Bakokaki kobakisela ngai mpasi. Ntango emonanaki ete nakoki kobika, badoktɛrɛ bayebisaki baboti na ngai bátinda ngai na ndako ya bana oyo bazali bibɔsɔnɔ.
Kasi, bango bamonaki malamu bámema ngai na ndako na biso. Na ntango yango, mama autaki kobanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Makambo oyo azalaki koyekola etindaki ye amona mpenza ete azali na mokumba ya kobatela ngai. Kasi, ezalaki mpasi mpo akangama na ngai, mpo makanisi na ye ná makasi na ye ezalaki kosila na mosala makasi oyo azalaki kosala mpo na kolukela ngai nkisi mpe biloko mosusu. Bazalaki komema ngai mbala mingi na lopitalo. Mikuwa na ngai ezalaki kobukana ata na likambo moke, na ndakisa kosukola ngai. Ata soki nasali likise, mokuwa ekokaki kolela.
Nakómi konyokwama na makanisi
Ntango nakolaki, nazalaki kofanda ntango nyonso na kiti ya bibɔsɔnɔ. Nakokaki koyekola kotambola te. Atako bongo, baboti na ngai bazalaki kokokisa bamposa na ngai nyonso malamu mpenza.
Longola yango, mama azalaki kosala nyonso mpo na koteya ngai nsango ya Biblia mpo na kobɔndisa ngai. Na ndakisa, ateyaki ngai ete na mikolo ezali koya, Nzambe akokómisa mabelé paladiso epai bato nyonso bakozala bato ya kokoka na elimo, na makanisi mpe na nzoto. (Nzembo 37:10, 11; Yisaya 33:24) Nzokande, mama ayebaki ete nakonyokwama boye tii ntango Nzambe akokómisa mabelé paladiso.
Liboso, nakɔtaki na kelasi ya bibɔsɔnɔ. Balakisi bazalaki na mikano te mpo na ngai, ngai moko mpe namityelaki ata mokano moko te. Kutu, ata kokende kelasi ekómaki mokakatano monene. Bana-kelasi mingi bazalaki konyokola ngai. Na nsima, nakɔtaki na kelasi oyo bana nyonso bakɔtaka. Namonaki ete koluka kosala makambo lokola bana nyonso ezalaki kosilisa ngai makasi. Atako bongo, nazwaki ekateli ya kotánga tii nazwaki diplome.
Mingimingi ntango nakɔtaki na iniversite, nazalaki komona ete bayekoli mingi bazalaki na elikya te mpe bomoi na bango ezalaki na ntina te. Nazalaki mpe kokanisa makambo ya Biblia oyo mama ateyaki ngai. Nayebaki ete makambo oyo azalaki koloba ezali solo. Kasi, na ntango wana mateya ya Biblia esimbaki motema na ngai te. Na boumeli ya mwa ntango, nalukaki kokóma na bomoi ya mwa loyenge, nazalaki komitungisa te mpo na lobi.
Ntango nakómaki na mbula 18, nalongwaki epai ya baboti na ngai mpe nakendaki kofanda na ndako moko elongo na bibɔsɔnɔ mosusu. Nasepelaki kasi nazalaki mpe kobanga mwa moke. Nasepelaki makasi mpo nazwi bonsomi, nakobanda kosala makambo ngai moko mpe nazwi baninga ya sika oyo tokoki kosala makambo elongo. Baninga na ngai mingi babalaki. Ngai mpe nayokaki mposa ya kobala mpe ya kozala na moto moko oyo akolinga ngai. Kasi, mpo na maladi na ngai, ezalaki mpasi mpo nazwa mobali. Likambo yango ezalaki kopesa ngai mawa.
Atako bongo, nazalaki kopesa Nzambe foti te. Nayekolaki makambo mingi na ntina ya Nzambe mpe nayebaki ete akoki soki moke te kosala likambo oyo ezangi boyengebene. (Yobo 34:10) Nasalaki makasi mpo nandima bomoi na ngai ndenge ezali. Atako bongo, nakómaki konyokwama makasi na makanisi.
Nakómi kobonga mokemoke
Likambo ya esengo, mama ayokaki nsango ya makambo oyo ekómelaki ngai mpe ayebisaki nkulutu moko ya lisangá oyo azalaki kofanda pembeni ya esika oyo nazalaki. Nkulutu yango abengaki ngai na telefone mpe abengisaki ngai na makita na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Lisusu, ndeko mwasi moko ya lisangá abandaki koyekola na ngai Biblia pɔsɔ na pɔsɔ.
Wana nazalaki koyekola lisusu mateya ya Biblia oyo mama ateyaki ngai bambula liboso, nakómaki kotalela bomoi na ndenge ya malamu. Nazalaki kosepela kozala elongo na bandeko ya lisangá. Kasi, nazalaki koboya koyebisa basusu ndenge nazali komiyoka, mpo nazalaki kobanga ete maloba na bango ezokisa ngai. Namonaka ete yango nde ezalaki kopekisa ngai nalinga mpenza Nzambe. Atako bongo, nayebaki ete ezalaki malamu namipesa epai na ye. Yango wana, na sanza ya Desɛmbɛ 1991 nazwaki batisimo.
Nalongwaki na ndako oyo nazalaki kofanda na baninga na ngai ya bibɔsɔnɔ mpe nakómaki kofutela ndako ngai moko. Mbongwana wana ememelaki ngai mapamboli mpe mikakatano. Na ndakisa, nazalaki kofanda kaka ngai moko. Mpe nazalaki kobanga ete bana mibali báya kokɔtela ngai na ndako. Eumelaki te, nakómaki lisusu konyokwama makasi na makanisi. Atako nazalaki kosɛka mpe kosala ete namonana moto ya esengo, nazalaki konyokwama. Nazalaki mpenza na mposa ya moninga moko ya malamu.
Namonaka ete Yehova Nzambe apesaki ngai moninga ya ndenge wana. Bankulutu ya lisangá bazwaki bibongiseli mpo Suzie, ndeko mwasi moko oyo abalá, akoba koyekola na ngai Biblia. Suzie asukaki kaka na koteya ngai te. Akómaki mpe moninga ya motema oyo nalingaka mingi.
Suzie asalisaki ngai nayebisaka basusu makambo oyo nazalaki koyekola, ezala na mosala ya kosakola ndako na ndako to na libaku malamu. Sikoyo nakómaki kosepela mpenza na bizaleli ya Nzambe. Kasi, atako nazwaki batisimo, bolingo na ngai mpo na Nzambe ezalaki makasi te. Na libaku moko, nakanisaki kutu ete natika kosalela Yehova. Nayebisaki Suzie likambo yango mpe asalisaki ngai mingi.
Suzie asalisaki ngai mpe namonaki ete nazalaki na esengo te mpo nazalaki na baninga oyo bazalaki kolinga Yehova mpenza te. Yango wana, nakómaki koluka baninga oyo bakoli na elimo, mingimingi mikóló. Lisusu, boyokani na ngai na mama ezalaki malamu te; yango wana, nalukaki kozongisa boyokani malamu na ye mpe na yaya na ngai ya mobali. Nakamwaki ete nakómaki na esengo oyo nazalaki na yango te liboso. Bandeko ya lisangá, libota na ngai, mpe mingimingi Yehova bakómaki kopesa ngai esengo mpe makasi.—Nzembo 28:7.
Mosala ya sika
Na liyangani moko, nayokaki lisukulu moko oyo elobelaki esengo oyo bandeko oyo bamipesi mingi na mosala ya kosakola bazwaka, mpe nalobaki na nse ya motema ete, ‘Ngai mpe nakoki kosala yango!’ Ya solo, nayebaki ete ekozala mpasi mingi mpo na ngai. Kasi, nsima ya kobondela mpo na likambo yango, nazwaki ekateli ya kotondisa formilɛrɛ mpo nabanda kosakola mingi, mpe na sanza ya Aprili 1998, namipesaki na mosala ya kosakola.
Ndenge nini nasakolaka atako nazali na maladi? Nalingaka kosala makambo ngai moko mpe nayiná kozala mokumba mpo na basusu, kozela ete bámema ngai na mituka na bango to básalisa ngai na makambo mosusu. Yango wana Suzie ná mobali na ye Michael bapesaki ngai likanisi moko: Nasomba tukutuku! Kasi, ndenge nini nakoki kotambwisa tukutuku? Ndenge fɔtɔ oyo ezali wana emonisi yango, babongisaki tukutuku yango kaka mpo na ngai. Nazalaka kutu na mposa te ya kolongola mwa nzoto na ngai ya kilo 19 na tukutuku yango!
Tukutuku na ngai esalisaka ngai nakendaka kotala bato mpo na koyekola na bango Biblia na ngonga oyo ebongi mpo na ngai ná bango. Nasepelaka ntango nazali kotambwisa tukutuku na ngai mpe ntango mopɛpɛ ezali kobɛta ngai na elongi—moko ya mwa makambo oyo epesaka ngai esengo na bomoi!
Nasepelaka kobanda kosolola na bato na babalabala mpe bato yango mingi bapesaka ngai limemya. Nazali na esengo ya kosalisa basusu báyekola mateya ya Biblia. Nabosanaka te mokolo moko oyo nabimaki na mosala ya kosakola ndako na ndako ná ndeko moko oyo azalaki molai. Apesaki nkolo-ndako mbote, mpe nkolo-ndako atalaki ngai na kokamwa nyonso mpe atunaki ndeko yango ete, “Ye mpe alobaka?” Biso nyonso tobandaki kosɛka. Ntango nasilisaki koteya mwasi yango, amonaki ete nakoki mpenza koloba!
Lelo oyo, nazali na bomoi ya esengo mpe nayekoli kolinga Yehova Nzambe. Nazali na botɔndi mingi epai ya mama ndenge ateyaki ngai mateya ya Biblia, mpe nazali kozela na elikya nyonso mikolo oyo ezali koya ntango Nzambe ‘akosala biloko nyonso biloko ya sika,’ ezala mpe mwa nzoto na ngai.—Emoniseli 21:4, 5.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]
“Nasalaki makasi mpo nandima bomoi na ngai ndenge ezali. Atako bongo, nakómaki konyokwama makasi na makanisi”