Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/5 nk. 26-28
  • Tózala sembo lokola Itai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózala sembo lokola Itai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Mopaya mpe moto atiká mboka’
  • “Mpo na kolakisa biso”
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Mokanda ya Biblia nimero 10—2 Samwele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • “Okozala sembo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/5 nk. 26-28

Tózala sembo lokola Itai

“MISALA na yo ezali minene mpe ya kokamwa, Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Banzela na yo ezali ya boyengebene mpe ya solo, Mokonzi ya seko. Nani akobanga mpenza yo te, Yehova, mpe akopesa nkombo na yo nkembo te, mpo yo moko kaka nde ozali sembo?” Nzembo yango oyo “baoyo balongi nyama mabe mpe elilingi na ye” bazali koyemba na likoló, ezali kobenda likebi na biso na bosembo ya Nzambe. (Emon. 15:2-4) Yehova alingaka ete basaleli na ye bámekola ye, mpe bámonisa ezaleli yango ya malamu mingi.​—Ef. 4:24.

Nzokande, Satana Zabolo asalaka nyonso mpo na kokabola basaleli ya Nzambe awa na mabelé na bolingo ya Nzambe na bango. Atako bongo, mingi basili kobatela bosembo na bango epai ya Nzambe, ata na minyoko ya makasi. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova atalelaka bosembo na biso na motuya! Kutu, Biblia elobi boye: “Yehova alingaka bosembo, mpe akotika te bato na ye ya sembo.” (Nz. 37:28, NW) Mpo na kosalisa biso tótikala sembo, Nzambe akomisi na kati ya Liloba na ye masolo ya basaleli na ye mingi ya kala oyo batikalaki sembo. Moko ya masolo yango ezali ya Itai, moto ya Gata.

‘Mopaya mpe moto atiká mboka’

Ekoki kozala ete Itai azalaki moto ya Gata, engumba ya Bafilistia oyo eyebanaki mingi, oyo ezalaki mpe engumba ya Goliata mpe ya banguna mosusu ya Bayisalaele ya nsɔmɔ. Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Itai, ezali ntango Abesaloma atombokelaki mokonzi Davidi. Itai, ná Bafilistia mosusu 600 oyo balandaki ye, bazalaki kofanda na zingazinga ya Yelusaleme.

Ekoki kozala ete ntango Davidi azalaki komona Itai ná bato na ye, azalaki kokanisa ntango ye ná basoda 600 ya Yisalaele bakendaki kobombama epai ya Akisi, mokonzi ya engumba Gata ya Bafilistia. (1 Sam. 27:2, 3) Itai ná bato na ye basalaki nini ntango Abesaloma atombokelaki Davidi, tata na ye? Bakɔtaki nde na ngámbo ya Abesaloma, baboyaki kokɔta likambo yango, to balandaki Davidi ná bato na ye?

Kanisá naino, Davidi azali kokima Yelusaleme mpe akómi na esika oyo babengi Bete-merake, oyo elimboli “Ndako Mosika.” Ekoki kozala ete yango ezalaki ndako ya nsuka na Yelusaleme, soki ozali kokende na Ngomba ya Olive, liboso ya kokatisa Lobwaku ya Kidolono. (2 Sam. 15:17) Awa, Davidi azalaki kotala basoda na ye wana bazalaki kokatisa. Likambo ya kokamwa, kaka Bayisalaele ya sembo te nde balandaki ye; ezalaki mpe na Bakelete mpe Bapelete nyonso. Lisusu, ezalaki mpe na bato nyonso ya Gata, elingi koloba, Itai ná basoda na ye 600.​—2 Sam. 15:18.

Davidi ayokelaki Itai mawa mpe alobaki na ye boye: “Mpo na nini yo mpe oya na biso? Zongá mpe fandá na mokonzi [na ntembe te azalaki kolobela Abesaloma]; mpo ozali mopaya, mpe lisusu, otiká esika na yo mpe okimá na mboka mopaya. Kaka lobi nde oyaki, bongo lelo nakende na yo koyengayenga elongo na biso, mpo okende ntango ngai nakokende mpe esika nyonso oyo nakokende? Zongá mpe zwá bandeko na yo bázonga elongo na yo, mpe tiká Yehova amonisela yo motema boboto mpe bosembo!”—2 Sam. 15:19, 20, NW.

Mpo na komonisa bosembo na ye, Itai alobaki boye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola nkolo na ngai mokonzi azali solo na bomoi, na esika nyonso oyo nkolo na ngai mokonzi akozala, ezala mpo na liwa to mpo na bomoi, kuna nde mosaleli na yo akozala!” (2 Sam. 15:21, NW) Ekoki kozala ete maloba yango ekundwelaki Davidi maloba ya nkɔkɔ na ye Luta. (Luta 1:16, 17) Maloba ya Itai esimbaki motema ya Davidi mpe alobaki na ye boye: “Kende mpe katisá” Lobwaku ya Kidolono. Na yango, “Itai moto ya Gata akatisaki, ná bato na ye nyonso mpe bana nyonso oyo bazalaki elongo na ye.”​—2 Sam. 15:22, NW.

“Mpo na kolakisa biso”

Baloma 15:4 elobi ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso.” Na yango ekozala malamu tómituna, liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Itai? Tótala likambo oyo etindaki ye azala sembo epai ya Davidi. Atako atikaki mboka na ye, Filistia, mpe akimaki na mboka mopaya, Itai andimaki ete Yehova azali Nzambe ya bomoi mpe ete Davidi azalaki moponami na ye. Itai alandaki te koyinana oyo ezalaki kati na Bafilistia mpe Bayisalaele. Azalaki kotalela Davidi kaka te lokola moto oyo abomaki Goliata mpe ebele ya bato mosusu ya mboka na ye. (1 Sam. 18:6, 7) Itai azalaki kotalela Davidi lokola moto oyo azalaki kolinga Yehova mpe na ntembe te amonaki bizaleli malamu ya Davidi. Davidi mpe akómaki kosepela na Itai mingi. Kutu, Davidi atyaki ndambo ya misato ya basoda na ye “na mabɔkɔ ya Itai” mpo na kobundisa basoda ya Abesaloma!​—2 Sam. 18:2, NW.

Biso mpe tosengeli kosala makasi tómonaka bizaleli malamu ya basusu, tómonaka bango kaka te lokola bato ya mposo, to ekólo boye to boye. Bolingo oyo ekolaki kati na Davidi ná Itai emonisi ete koyeba mpe kolinga Yehova ekoki kosalisa biso tótalaka te makambo oyo ekoki kokabola biso ná bato mosusu.

Wana tozali kokanisa ndakisa ya Itai, tómituna boye: ‘Ngai mpe nazalaka sembo ndenge wana epai ya Yesu Klisto, Davidi Monene? Nasalaka na molende mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli mpo na komonisa bosembo na ngai?’ (Mat. 24:14; 28:19, 20) ‘Nakondima koyika mpiko tii wapi mpo na komonisa bosembo na ngai?’

Batata ya mabota bakoki mpe kozwa liteya na bosembo ya Itai. Bosembo na ye epai ya Davidi mpe ekateli na ye ya kolanda mokonzi oyo Nzambe aponaki etindaki mpe bato na ye básala lokola ye. Ndenge moko mpe, bikateli oyo batata ya mabota bazwaka mpo na kosimba losambo ya solo etindaka mpe mabota na bango bálanda yango, mpe ntango mosusu yango ekoki komemela bango mikakatano mpo na mwa ntango. Kasi, Biblia epesi biso elikya oyo: ‘Epai ya moto ya sembo [Yehova] akozala sembo.’​—Nz. 18:25, NW.

Nsima ya etumba ya Davidi ná Abesaloma, Biblia elobeli lisusu Itai te. Nzokande, mwa lisolo na ye oyo ezali na Liloba ya Nzambe esalisi biso tóyeba ezaleli oyo amonisaki na ntango wana ya mpasi na bomoi ya Davidi. Ndenge Biblia elobeli Itai emonisi ete Yehova amonaka moto oyo azali sembo mpe apambolaka ye mpo na ezaleli yango.​—Ebe. 6:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto